Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/10 lok. 3
  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 28 Yuni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na pɔsɔ ya 28 Yuni
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Mitó ya makambo mike
  • PƆSƆ EBANDI NA 28 YUNI
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 6/10 lok. 3

Manaka mpo na pɔsɔ ya 28 Yuni

PƆSƆ EBANDI NA 28 YUNI

Loyembo 62

□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:

lv mok. 13 par. 16-26, etanda* na lok. 156

□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:

Botángi ya Biblia: 1 Bakonzi 3-6

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

□ Likita ya mosala:

Loyembo 90

Min. 5: Mayebisi.

Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Yuli. Lisolo elongo na bayangani. Na miniti moko to mibale ya ebandeli, lobelá na mokuse mwa masolo oyo ezali na bazulunalo yango. Na nsima, poná masolo mibale to misato na bazulunalo yango, mpe sɛngá bayangani báyebisa mituna nini bakoki kotuna bato to bavɛrsɛ nini bakoki kotángela bango liboso ya kolakisa zulunalo. Sɛngá bandeko mibale básala bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko. Mpo na kosukisa, sɛngá bandeko mosusu mibale básala elakiseli mosusu oyo ekomonisa ndenge ya kobanda koyekola na moto Biblia ntango tozongeli ye.​—Talá km 8/07 lok. 3.

Min. 15: Ateyamaki banda bomwana. Lisolo elongo na bayangani. Timote ayebanaki lokola mosakoli ya molende mpe moteyi malamu. (Flp. 2:20-22) Mateya oyo mama na ye mpe nkɔkɔ na ye bateyaki ye banda bomwana esalisaki mpe ye akóma na molende ndenge wana. (2 Tim. 1:5; 3:15) Makanisi ya Biblia oyo elandi ekosalisa baboti bápesa bana na bango formasyo mpo bákóma basakoli ya molende. (1) Banda komema mwana na yo na mosala ya kosakola ntango azali naino mwana moke; lakisá ye ndenge ya kopesa litatoli na kotalela mbula na ye mpe mayele na ye. (Mas. 22:6) (2) Zalá ndakisa malamu na oyo etali kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso. (Flp. 1:9, 10) (3) Na ntango ya Losambo na libota mpe na mabaku mosusu, salisá bana na yo bálinga mosala ya kosakola mpe básepela na yango. (Mib. 6:6, 7) (4) Monisá na maloba mpe na misala ete osepelaka na mosala ya kosakola. (Flp. 3:8; 4:8; 1 Tim. 1:12) (5) Bimáká mingi na mosala ya kosakola na libota na yo; komisá yango momeseno. (Mis. 5:41, 42) (6) Lekisáká ntango mingi elongo na bandeko oyo basakolaka na molende. (Mas. 13:20) Sɛngá bayangani bálobela mwa makambo oyo baboti na bango basalaki mpo na kosalisa bango bálinga mosala ya kosakola mpe bákóma basakoli ya molende.

Loyembo 88

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto