Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 Yuni 2010. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Mai tii na pɔsɔ ya 28 Yuni 2010.
1. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Davidi alelaki Abinere? (2 Sa. 3:31-34) [w05 15/5 lok. 17 par. 6; w06 15/7 lok. 21 par. 9-10]
2. Libunga nini Natane asalaki, mpe mpo na nini Yehova alongolaki ye mokumba ya mosakoli te? (2 Sa. 7:3) [rs lok. 153 par. 9]
3. Ndenge nini 2 Samwele 7:14 ekokisamaki? [it-1-F lok. 279 par. 3 mpe lok. 554 par. 5]
4. Na ndenge nini makambo oyo Davidi asalelaki Mefiboshete emonisi motema boboto, mpe yango eteyi biso nini? (2 Sa. 9:7) [w02 15/5 lok. 19 par. 5]
5. Mateya nini tokoki kozwa na boyokani ya Itai moto ya Gate ná Mokonzi Davidi? (2 Sa. 15:19-22) [w09 15/5 nk. 27-28]
6. Makambo nini na Biblia esalisi biso tóyeba ete maloba oyo Ziba alobaki mpo na Mefiboshete ezalaki lokuta? (2 Sa. 16:1-4) [w02 15/2 nk. 14-15 par. 11, msl.]
7. Ntango Davidi asɛngaki Barazilai, mobange ya mbula 80, akóma kofanda na ndako na ye, mpo na nini Barazilai asɛngaki mokonzi azwa nde Kimehame? (2 Sa. 19:33-37) [w07 1/6 lok. 24 par. 13]
8. Na ndenge nini komikitisa ya Yehova ekómisaki Davidi moto monene? (2 Sa. 22:36) [w07 1/11 lok. 5 par. 2; w04 1/11 lok. 29]
9. Mpo na nini Adoniya alukaki kobɔtɔla bokonzi ntango Davidi azalaki naino na bomoi? (1 Bak. 1:5) [w05 1/7 lok. 28 par. 5]
10. Mpo na nini Yehova ayokaki libondeli oyo Salomo asalaki mpo na kosɛnga bwanya mpe bososoli? (1 Bak. 3:9) [w05 1/7 lok. 30 par. 2]