Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 114-lok. 116 par. 2
  • Bakokaki kokanga bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bakokaki kokanga bango
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • ‘Bazali ekɛngɛ lokola banyoka kasi na ngambo te lokola bibenga’
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 114-lok. 116 par. 2

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Bakokaki kokanga bango

‘Bazali ekɛngɛ lokola banyoka kasi na ngambo te lokola bibenga’

Ezalaki na ntina mingi basaleli ya sembo ya Yehova bákoba kozwa bilei ya elimo na ntango ya epekiseli, kasi ezalaki ntango ya likama mpo na bango. Na bambula wana, bakangaki bandeko ebele mpe bakatelaki bango bambula ebele ya bolɔkɔ.

Ndeko Juanita Borges alobi boye: “Ntango nayekolaki solo na 1953, nayebaki malamu ete lokola nakómi Motatoli ya Yehova, bakoki kokanga ngai. Esalemaki mpe bongo. Na sanza ya zomi na moko na 1958, ntango nakendaki kotala ndeko mwasi Eneida Suárez, bapolisi oyo basalaka na kobombana bayaki mpe balobaki ete tozali kosala makita. Bakatelaki biso mbula misato ya bolɔkɔ, mpe mokomoko na biso afutaki lomande ya 100 pesos, na ntango wana esalaki dolare 100.”

Elilingi na lokasa 115

Bapolisi oyo basalaka na kobombana bayebaki makambo ya ndeko mokomoko.

Guvɛrnema esalaki nyonso oyo ekokaki mpo na kopekisa Batatoli básalaka makita, kasi bandeko balɛmbaki te. Atako bongo, basengelaki kozala ‘ekɛngɛ lokola banyoka kasi na ngambo te lokola bibenga.’ (Mat. 10:16) Ndeko Andrea Almánzar alobi boye: “Mpo na kokende na makita, tosengelaki kokóma na bangonga ekeseni. Na nsima, mbala mingi tozalaki kozonga ndako na butu mpenza mpo tosengelaki kobima malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na kobenda likebi te.”

Ndeko Jeremías Glass, oyo abotamaki ntango tata na ye León azalaki na bolɔkɔ, akómaki mosakoli na 1957 ntango azalaki na mbula nsambo. Abosanaka te makita ya kobombana oyo ezalaki kosalema na ndako na bango mpe nyonso oyo bazalaki kosala mpo bákanga bango te. Alobi boye: “Bazalaki kopesa moyangani nyonso mwa papye moko bakomi nimero moko oyo emonisi ndenge oyo basengeli kobima. Soki makita esili, tata na biso azalaki kotya ngai na porte mpo natala banimero mpe nayebisa bandeko bábima mibalemibale, kasi bákende nzela moko te.”

Bazalaki mpe kosala makita na ngonga oyo ezali mpasi mpo bákanga bango. Na ndakisa, ndeko mwasi Mercedes García ayekolaki solo epai ya nɔkɔ na ye, Pablo González. Ntango azalaki na mbula 7 mpamba, mama na bango akufaki mpe tata na ye azalaki na bolɔkɔ; batikalaki kaka bango moko, ye ná bandeko na ye libwa ya mibali mpe ya basi. Ndeko Mercedes azwaki batisimo na 1959, ntango azalaki na mbula libwa. Mpo bákanga bango te, bandeko basalaki diskur ya batisimo na ngonga ya 3:30 ya ntɔngɔ. Diskur yango esalemaki na ndako ya ndeko mobali moko mpe bazindisaki bango na mai na Ebale Ozama, na engumba-mokonzi. Mercedes alobi boye: “Tozongaki ndako na ngonga ya 5:30 ya ntɔngɔ, wana bato ya kartye babandi kolamuka.”

Mosala ekoli atako minyoko

Atako minyoko ezalaki makasi mpe bazalaki kokosela Batatoli makambo, motángo ya basakoli ebakisamaki mbala mibale na ntango ya epekiseli.

  • 1950 - 292

  • 1960 - 495

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto