Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 lok. 116-lok. 117
  • Kokanga motema efuti

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kokanga motema efuti
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Mitó ya makambo mike
  • Kosakola na mayele
  • Bonsomi eyei!
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 lok. 116-lok. 117

RÉPUBLIQUE DOMINICAINE

Kokanga motema efuti

Kosakola na mayele

Ndeko Rafael Pared, oyo azali na Betele ná mwasi na ye Francia, akómaki mosakoli na 1957, ntango azalaki na mbula 18. Abosanaka te ndenge bapolisi bazalaki kolanda ye nsimansima na mayele ntango abimaki mosala ya kosakola mpe bazalaki koluka ndenge ya kokanga ye ná bato oyo bazalaki na ye. Alobi boye: “Ntango mosusu ezalaki kosɛnga tókima na babalabala ya mikemike, mpe tópumbwa likoló ya mwa bifelo mpo bákanga biso te.” Ndeko Andrea Almánzar alobi likambo oyo ye ná bandeko mosusu bazalaki kosala mpo bákanga bango te; alobi boye: “Tozalaki kosala na mayele. Na mosala ya kosakola, tozalaki kokɔta na lopango moko mpe koleka mapango zomi liboso tókɔta na lopango mosusu.”

Bonsomi eyei!

Na 1959, boyangeli ya Trujillo esilaki kosala mbula soki 30, kasi makambo ya politiki ekómaki kobongwana. Na mokolo ya 14/06/1959, bato ya politiki ya République dominicaine oyo bakimá mboka balukaki lisusu kokweisa Trujillo. Atako likambo yango elongaki te mpe babomaki bato yango mpe batyaki bamosusu na bolɔkɔ, banguna mingi ya Trujillo bakómaki komona ete guvɛrnema yango ekoki mpe kokwea, yango wana bakobaki na botɛmɛli na bango.

Na mokolo ya 25/01/1960, nsima ya kosala na boyokani na guvɛrnema ya Trujillo bambula ebele, bakonzi ya Katolike bakomaki mokanda moko mpo na komonisa ete ntomo ya bato ezalaki kotosama te. Bernardo Vega, moto moko ya istware na République dominicaine, alobi boye: “Mobulu oyo esalemaki na sanza ya motoba na 1959 mpe makambo mabe oyo basalaki bato wana, mpe oyo bayaki kosala bana-mboka oyo bazalaki kosala na nsense mpo na kokweisa mokonzi, etindaki Lingomba etɛmɛla mpenza Trujillo, mpo na mbala ya liboso.”

Likambo ya kokamwa, na sanza ya mitano na 1960, guvɛrnema elongolaki epekiseli na mosala ya Batatoli ya Yehova. Nsima ya konyokwama bambula ebele, bonsomi eutaki na esika oyo bakanisaki te; Trujillo ye moko alongolaki epekiseli, nsima ya kobebana ná Lingomba ya Katolike.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto