Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 67
  • Fɛti ya Halloween eutá wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Fɛti ya Halloween eutá wapi?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Istware ya fɛti ya Halloween mpe mimeseno na yango
  • Koyeba ete fɛti ya Halloween eutá na bapakano ezali mpenza na ntina?
  • Kotɛlɛma ngwi na eteyelo epesaka mbano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Tosengeli mpe kosalaka bafɛti oyo bato mingi basalaka?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Bafɛti nyonso esepelisaka Nzambe?
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 67
Bana misato balati bilamba ya Halloween, batelemi liboso ya ndako moko oyo batya biloko ya mimeseno ya Halloween.

Fɛti ya Halloween eutá wapi?

Eyano ya Biblia

Biblia elobeli te fɛti ya Halloween, oyo ezali fɛti moko bato mingi básalaka na mpokwa ya mokolo ya 31/10 ya mobu nyonso. Kasi, mimeseno na yango ya kala mpe makambo oyo esalemaka na fɛti ya Halloween, eyokani te na mateya ya Biblia.

Na lisolo oyo tokolobela

  • Istware ya fɛti ya Halloween mpe mimeseno na yango

  • Koyeba ete fɛti ya Halloween eutá na bapakano ezali mpenza na ntina?

  • Mpo na nini ebengamaka Halloween?

Istware ya fɛti ya Halloween mpe mimeseno na yango

  • Samain: Buku moko (The World Book Encyclopedia) emonisi ete fɛti ya Halloween eutá na “bafɛti ya bapakano oyo ba-Celte bazalaki kosala eleki sikoyo mbula koleka 2 000. Bazalaki kokanisa ete na ntango ya fɛti yango bato oyo bakufá bakoki kotambola na kati ya bato ya bomoi. Na ntango ya Samain, bato oyo bazali na bomoi bakoki kokende kotala bato oyo bakufá.”​—Talá “Mpo na nini ebengamaka Halloween?”

  • Bilamba ya Halloween, babɔmbɔ, mpe masɛki: Na kotalela buku moko, ba-Celte mosusu bazalaki kolata bilamba oyo ezalaki komonisa ete bazali bilimo, mpo bilimo oyo ezali koyengayenga “bakanisa ete bato yango baninga na bango” mpo basala bango eloko te. Bamosusu bazalaki kopesa biloko ya sukali mpo na kokitisa bilimo motema.a

    Katini moko ezali likoló ya mesa na ba citrouille oyo babongisi malamu mpe batya babɔmbɔ na kati.

    Na siɛklɛ ya 5 tii ya 15, bankonzi ya lingomba ya Katatolike na mpoto, balandaki mimeseno ya bapakano yango, mpe bátindaki bandimi na bango balata bilamba ya kobangisa mpe kokende ndako na ndako kosɛnga mwa makabo.

  • Bilimo, bavampire, bambwa ya zamba, bandɔki, ná bazombi: Banda kala, biloko yango eyebanaki ete ezalaki biloko ya mokili ya bilimo. Buku (Halloween Trivia) elobeli bango lokola “bilimo mabe ya nguya” ebakisi ete bikelamu yango bazali na “boyokani makasi na liwa, bakufi to bobangi ya liwa.”

  • Mbuma ya citrouille oyo basalelaka na fɛti ya Halloween: Na eleko ya Moyen-Âge, na Angleterre, bato “bazalaki koleka ndako na ndako mpo bato bápesa bango biloko mpe bango bábondela mpo na bato oyo bakufá,” mpe bazalaki komema “mwinda basalá na mbumba ya navet oyo batɔbɔli mpe bazalaki kopelisa buji na kati, oyo ezalaki komonisa molimo ya moto oyo ekangami na epongelo.” (Halloween​—From Pagan Ritual to Party Night) Bato mosusu balobaka ete bazalaki kosalela miinda yango mpo na kobengana bilimo mabe. Na bambula ya 1 800, na Amerika ya Nɔrdi, bakómaki kosalela mbuma ya citrouille na esika ya navet mpo mbuma yango ezalaki mingi mpe ezalaki mpasi te mpo na kotɔbɔla yango mpe kobongisa yango.

Koyeba ete fɛti ya Halloween eutá na bapakano ezali mpenza na ntina?

Ɛɛ. Atako bato mosusu bámonaka ete fɛti ya Halloween ezali na yango molulu mpamba, makambo oyo bato basalaka na molulu yango eyokani te na mateya ya Biblia. Fɛti ya Halloween elendisaka mateya ya lokuta oyo etali bakufi, bilimo oyo bamonanaka te to bademo.

Bavɛrsɛ oyo elandi emonisi ndenge oyo Nzambe atalelaka bindimeli oyo eyokani na fɛti ya Halloween:

  • “Moto akozuama kati na bino tɛ . . . moto na kobianga milimo, to moto na kosolola na bakufi.”​—Kolimbola Mibeko 18:10-12, Biblia Haut-Fleuve.

    Ndimbola: Nzambe alingaka te ete tosolola na bato oyo bakufá to koluka kosala makasi ya komeka kosolola na bato oyo bakufá.

  • “Bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—Mosakoli 9:5.

    Ndimbola: Lokola bakufi bayebi eloko moko te, bakoki mpe te kosolola na bato oyo bazali na bomoi.

  • ‘[Bosengeli te] kosangana na bademo. Bokoki te komɛla kɔpɔ ya Yehova mpe kɔpɔ ya bademo.’​—1 Bakorinti 10:20, 21.

    Ndimbola: Bato oyo bálingi ete bazala baninga ya Nzambe, basengeli koboya eloko nyonso oyo ekoki kotya bango na boyokani na bademo.

  • ‘Tótɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo; mpo tozali kobunda etumba . . . na mampinga ya bilimo mabe.”​—Baefese 6:11, 12.

    Ndimbola: Bakristo basengeli te kozala na eloko oyo ezali na boyokani na bilimo mabe to kosala lokola tozali kosepela elongo na bango.

a Talá buku Halloween: An American Holiday, an American History, lokosa 4.

Mpo na nini ebengamaka Halloween?

Liloba Halloween ezali na boyokani na milulu ya bapakano ya fɛti ya Samain ya ba-Celte. Buku (World Book Encyclopedia) elobi ete: “Samain . . . elimboli suka ya eleko ya molunge. Fɛti yango ezalaki kobanda na eleko ya molili mpe ya malili mpe ezalaki kosalema pene na mokolo ya 01/11. Na siɛklɛ ya 7 tii ya 8 ya ntango na biso na dati yango, lingomba ya bokristo endimaki kotya fɛti moko ya sika, oyo babengi mokolo ya Basantu nyonso. Mokolo ya Basantu nyonso ebengamaka mpe na Anglais All Hallows.’ Hallow elimboli mosantu, to moto oyo azali mosantu. Mpokwa liboso ya mokolo ya All Hallows’ ebengamaki All Hallows’ Eve, mpe ekomaki kobengama All Hallow e’en. Kendekende, yango nde ekomaki kobengama na mokuse Halloween.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto