Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 149
  • Maloba “liso mpo na liso” elimboli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maloba “liso mpo na liso” elimboli nini?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Mpo na nini batyaki mobeko “liso mpo na liso”?
  • Mobeko “liso mpo na liso” etali mpe bakristo?
  • Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango mpo na mobeko “liso mpo na liso”
  • Toli ya bwanya mpo na liso
    Lamuká!—2012
  • Batelá liso na yo alima
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Kopesa litama mosusu elimboli nini?
    Lamuká!—2010
  • Monisá ete osepelaka na bato​—Na kotaláká bango na miso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 149
Miso ya moto

Maloba “liso mpo na liso” elimboli nini?

Eyano ya Biblia

Mobeko “liso mpo na liso” ezalaki na kati ya mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele na nzela ya Moize mpe Yesu azongelaki yango na Lisolo na ye likoló ya Ngomba. (Matai 5:38; Kobima 21:24, 25; Kolimbola Mibeko 19:21) Yango elimbolaki ete ntango bazalaki kopesa bato mabe etumbu, etumbu yango esengelaki kokokana na mabe oyo basalaki.a

Bazalaki kosalela mobeko yango mpo na kopesa etumbu na moto oyo asali moto mosusu mabe na nko. Mpo na moto oyo asali moto mosusu mabe na nko, Mibeko ya Moize elobaki boye: “Kobuka mpo na kobuka, liso mpo na liso, lino mpo na lino; kaka mbeba oyo asali moto, yango nde bakosala ye.”​—Balevi 24:20.

  • Mpo na nini batyaki mobeko “liso mpo na liso”?

  • Mobeko “liso mpo na liso” etali mpe bakristo?

  • Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango mpo na mobeko “liso mpo na liso”

  • Yesu asemboli likanisi ya libunga

Mpo na nini batyaki mobeko “liso mpo na liso”?

Mobeko “liso mpo na liso” epesaki bato nzela te ya kozongisa mabe bango moko. Kutu, yango esalisaki baoyo bazalaki na mokumba ya kosambisa bápesa etumbu oyo ebongi, eleka ndelo te, ezala mpe bongobongo te.

Mobeko yango ezalaki mpe likebisi mpo na moto nyonso oyo alingaki kosala basusu mabe na nko to akanaki kosala yango. Mobeko elobaki: “Bongo bato oyo batikali [baoyo bamonaki ndenge bapesaki moto etumbu na kolanda mibeko ya Nzambe] bakoyoka mpe bakobanga, mpe bakosala lisusu ata moke te likambo ya mabe lokola oyo epai na yo.”​—Kolimbola Mibeko 19:20.

Mobeko “liso mpo na liso” etali mpe bakristo?

Te, mobeko yango etali bakristo te. Ezalaki na kati ya Mibeko ya Moize, oyo liwa ya Yesu elongolaki.​—Baroma 10:4.

Ata bongo, mobeko yango esalisi biso tóyeba ndenge oyo Nzambe akanisaka. Na ndakisa, emonisi ete Nzambe azwaka bosembo na valɛrɛ mpenza. (Nzembo 89:14) Emonisi mpe bosembo na ye; elingi koloba, bato mabe basengeli kozwa disiplini “na ndenge oyo ekoki.”​—Yirimia 30:11.

Makanisi ya libunga oyo bato bazalaka na yango mpo na mobeko “liso mpo na liso”

Libunga: Mobeko “liso mpo na liso” ezalaki makasimakasi.

Solo: Mobeko yango epesaki nzela te básalela bosembo na ndenge ya kolekisa ndelo. Kutu, ntango bazalaki kosalela yango na ndenge oyo ebongi, bazuzi oyo bayebi kosambisa bazalaki kosɛnga moto oyo asali mabe afuta mpo na mabe asali kaka nsima ya kotalela makambo oyo etindaki moto asala mabe yango mpe soki asalaki yango na nko. (Kobima 21:28-30; Mitángo 35:22-25) Na yango, mobeko “liso mpo na liso” ezalaki kopekisa bápesa moto etumbu koleka ndelo.

Libunga : Mobeko “liso mpo na liso” epesaki bato nzela ya kozongiselana mabe.

Solo: Mibeko ya Moize elobaki boye: “Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda.” (Balevi 19:18) Na esika mobeko yango elendisa moto ye moko azongisa mabe, ezalaki nde kolendisa bato bátyela Nzambe motema mpe ebongiseli oyo atyaki mpo na kosembola makambo nyonso ya mabe.​—Kolimbola Mibeko 32:35.

Yesu asemboli likanisi ya mabe

Yesu ayebaki ete bato mosusu bazalaki kozwa mobeko “liso mpo na liso” na ndenge ya mabe. Asembolaki bango ntango alobaki: “Boyokaki ete balobi, ‘Liso mpo na liso mpe lino mpo na lino.’ Nzokande, ngai nalobi na bino: Bótɛmɛla te moto oyo azali mabe; kasi moto nyonso oyo abɛti yo mbata na litama na yo ya mobali, pesá ye mpe oyo mosusu.”​—Matai 5:38, 39.

Yesu asaleli maloba “boyokaki ete balobi.” Emonani ete azalaki kolobela bakonzi mosusu ya mangomba ya Bayuda oyo bazalaki koteya bato bázongisaka mabe na mabe. Adam Clarke, moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki boye: “Emonani ete Bayuda bakómisaki mobeko [liso mpo na liso] . . . motifi mpo na kokangela basusu nkanda mpe makambo nyonso ya kolekisa ndelo oyo elimo ya kozongisa mabe na mabe etindaka moto asala.” Lokola balendisaki bato bázongisaka mabe na mabe, bakonzi yango ya mangomba babebisaki likanisi ya Mibeko ya Nzambe.​—Marko 7:13.

Na kokesana na bango, Yesu amonisaki ete bolingo nde esimbi Mibeko ya Nzambe. Alobaki boye: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo . . .’ Wana nde mobeko oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, yango oyo: ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Mibeko nyonso mpe Basakoli esimbami na mibeko oyo mibale.” (Matai 22:37-40) Yesu ateyaki ete bolingo, kasi te elimo ya kozongisa mabe na mabe nde ekosala ete bato báyeba bayekoli na ye ya solosolo.​—Yoane 13:34, 35.

a Mobeko yango, oyo na bantango mosusu bazalaki kobenga yango lex talionis na Latin, ezalaki mpe na kati ya mibeko ya bikólo mosusu ya ntango ya kala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto