Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbv lisolo 5
  • Yisaya 41:10—“Kobanga te, mpo nazali na yo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yisaya 41:10—“Kobanga te, mpo nazali na yo”
  • Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge Yisaya 41:10 elimbolami
  • Makambo oyo bazali kolobela na Yisaya 41:10
  • “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • “Komitungisa te, mpo nazali Nzambe na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Bisakweli ya kobɔndisa oyo etali yo
    Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso, Volimi II
  • Okoloba: Ngai oyo! Tinda ngai?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
ijwbv lisolo 5

NDENGE BAVƐRSƐ YA BIBLIA ELIMBOLAMI

Yisaya 41:10​—“Kobanga te, mpo nazali na yo”

“Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.”​—Yisaya 41:10, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika.

“Banga tɛ, zambi ngai nazali na yɔ; yoka nsɔmɔ tɛ mpɔ ete ngai nazali Nzambe na yɔ. Nakokembisa yɔ, nakosunga yɔ, nakotombola mpe yɔ na lobɔkɔ na ngai na boyɛngɛbɛnɛ.”​—Yisaya 41:10, Biblia haut fleuve.

Ndenge Yisaya 41:10 elimbolami

Yehovaa Nzambe akitisaka basambeli na ye ya sembo motema ete akosunga bango, ezala na makambo nini bazali kokutana na yango.

“Nazali na yo.” Yehova amonisi basambeli na ye ntina oyo basengeli te kobanga; elingi koloba bazali bango moko te. Lokola amonaka makambo oyo ekómelaka bango mpe ayokaka mabondeli na bango, ezali lokola nde azali pene na bango.​—Nzembo 34:15; 1 Petro 3:12.

“Nazali Nzambe na yo.” Yehova akitisaka basambeli na ye motema ntango akundwelaka bango ete amimonisaka ete azali Nzambe na bango mpe ete andimaka bango lokola basambeli na ye. Bakoki kotya motema ete ezali ata na likambo moko te ekoki kopekisa Nzambe asunga bango.​—Nzembo 118:6; Baroma 8:32; Baebre 13:6.

“Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.” Yehova azongeli likanisi kaka moko na fraze misato ekeseni mpo na komonisa ete akosunga basaleli na ye mpenza. Asaleli liloba ya elilingi mpo na komonisa ndenge asalaka makambo ntango basaleli na ye bazali na mposa ya lisalisi. Soki moto moko akwei, Nzambe akoki kosembola lobɔkɔ na ye mpo na kotɛlɛmisa ye.​—Yisaya 41:13.

Nzambe apesaka makasi mpe asalisaka basambeli na ye libosoliboso na nzela ya Biblia, Liloba na ye. (Yosua 1:8; Baebre 4:12) Na ndakisa, Liloba ya Nzambe etondi na toli oyo esalisaka baoyo bazali kobunda na mikakatano, lokola bobola, maladi, to moto oyo balingaki akufi. (Masese 2:6, 7) Nzambe akoki mpe kosalela elimo santu, to nguya na ye oyo esalaka mosala, mpo na kopesa basambeli na ye oyo bazali kotungisama na makanisi mpe na mayoki makasi oyo basengeli na yango mpo na koyika mpiko na komekama.​—Yisaya 40:29; Luka 11:13.

Makambo oyo bazali kolobela na Yisaya 41:10

Maloba wana ebɔndisaki Bayuda ya sembo oyo na nsima bakendaki na bokangami na Babilone. Yehova asakolaki ete na nsuka ya bokangami ya Bayuda, ekozala na monguna moko oyo akoya kobebisa bikólo ya zingazinga mpe kotumola Babilone. (Yisaya 41:2-4; 44:1-4) Atako nsango yango ezalaki kolɛngisa mpe kobangisa Babilone ná bikólo ya zingazinga, Bayuda basengelaki kobanga te, mpo Yehova azalaki kobatela bango. Mbala misato akitisaki bango motema na maloba oyo “kobanga te.”​—Yisaya 41:5, 6, 10, 13, 14.

Atako asalaki ete Bayuda ya sembo bámemama na bokangami na Babilone, Yehova Nzambe asalaki ete maloba oyo ezali na Yisaya 41:10 ebatelama mpo na kobɔndisa basambeli na ye nyonso. (Yisaya 40:8; Baroma 15:4) Asalisaka bango lelo oyo, ndenge kaka asalisaki basaleli na ye na ntango ya kala.

Tángá Yisaya mokapo 41 ná maloba na nse ya lokasa, mpe ndimbola ya maloba oyo oyebi malamu te.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.​—Nzembo 83:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto