Ndenge nini koyeba Nzambe bobele moko ya solo?
BANDA bato bazali na mokili basili kosambela banzambe ebele. Banzambe oyo bato bazali kosambela na mokili mobimba bazali ebele mpenza mpe ezali mpasi mpo na koyeba motángo na bango—bakoki kozala bamilio.
Lokola tomoni ete Nzambe moko azali, tokoki sikawa komituna: Kati na banzambe nyonso oyo bato bazali kosambela na mokili mobimba lelo, mpe oyo basambelaki na ntango ya kala, nani azali mpenza Nzambe ya solo? Biblia endimi polele ete Nzambe ya solo, oyo tokoki koyeba ye, azali bobele moko. Na Yoane 17:3 (NW) totángi boye: “Oyo elimboli bomoi ya seko, báyekola koyeba yo Nzambe bobele moko ya solo, mpe Oyo yo otindi, Yesu Klisto.”
Nkombo na ye
Ezali malamu ete nzambe nyonso oyo azali na bomoto azala na nkombo na ye moko mpo na kokesenisa ye na banzambe mosusu. Ebongi mpenza ete nkombo yango ezala oyo nzambe yango ye moko amipesi, na esika ete basambeli na ye bápesa ye.
Nzokande, likambo yango ezali kobimisa mokakatano monene. Wana mangomba minene oyo eyebani mingi ezali kotánga bankombo ya banzambe na bango, Bayuda mpe mangomba ya boklisto bayebi nkombo ya nzambe oyo basambelaka te. Na esika bábéngaka ye na nkombo na ye, bazali kotya batitre lokola Nkolo, Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso, mpe Tata.
Kati na zulunalo Theology, David Clines akomaki boye: “Na eleko moko na kati ya ekeke ya mitano kino ekeke ya mibale L.T.B., likama moko monene ekwelaki Nzambe: abungisaki nkombo na ye. Mingi mpenza, Bayuda batikaki kosalela nkombo ya Nzambe Yawe, mpe bakómaki kolobela Yawe na bibéngeli ndenge na ndenge: Nzambe, Nkolo, Nkombo, Mosantu, Bozali, ata mpe Esika. Ata esika oyo Yawe ekomamaki na vɛrsɛ moko ya Biblia, batángi bazalaki kobénga nkombo yango Adonai. Ntango babebisaki tempelo na mbala ya nsuka, ata mwa milulu oyo ezalaki kosalema wana bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe esilaki, mpe kutu bato babosanaki ebéngeli ya nkombo yango.” Nzokande, moto moko te akoki koloba na bosikisiki ntango nini Bayuda oyo bakangamaka na bonkɔkɔ na bango batikaki kobénga nkombo ya Nzambe mpe bakómaki kotya na esika na yango maloba ya Liebele oyo elimboli Nzambe mpe Nkolo Mokonzi.
Na yango, emonani ete likambo ya liboso ya ntina mingi mpo na koyeba “Nzambe bobele moko ya solo” esengeli koluka koyeba ye na nkombo na ye. Koluka koyeba nkombo ya Nzambe ezali mpasi te, mpamba te nkombo ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ezali polele mpe elobelami polele na Nzembo 83:18: “Boyo bo akuki kuiba Yo moko, kombo na Yo YEHOVA, Azi Motu na Likolo Nyoso na mokili nyoso.”—Biblia na Ngala (Uele)
Yehova to Yawe?
Atako nkombo Yehova ezali komonana kati na Biblia na Ngala (Uele) mpe na Babiblia mosusu, bato mosusu balingaka nkombo Yawe na esika ya Yehova. Nkombo nini nde ezali malamu?
Bamaniskri ya kala oyo eleki koumela ekomamaki na Liebele. Kati na Makomami ya Liebele, nkombo ya Nzambe ezali komonana mbala soko 7000 mpe ekomamaki na mileli (consonnes)—YHWH to JHVH. Na momeseno, mileli yango minei ebéngamaka Tetragrame, euti na maloba mibale ya Greke oyo elimboli “baletre minei.” Sikawa koyeba ebéngeli ya malamu ezali kobimisa mikakatano mpamba te Liebele oyo ezalaki kokomama liboso ezalaki bobele na mileli, kasi milelisi (voyelles) oyo ekoki kopesa nzela ete motángi atánga malamu ezalaki te. Na bongo, ebéngeli ya Tetragrame yango ekokóma Yawe to Yehova, wana motángi azali kotya milelisi kati na mileli wana minei. Lelo oyo, banganga-mayele mingi balingaka ebéngeli Yawe lokola ebéngeli ya solosolo.
Nzokande, ebéngeli Yehova ezali malamu mpo na koboya bongolabongola. Na ndenge nini? Ebéngeli Yehova euti na ebéngeli Jéhovah na Lifalanse oyo endimami uta bikeke mingi. Baoyo bazali koboya kosalela ebéngeli yango basengeli mpe koboya kosalela ebéngeli oyo endimami ya nkombo Yilimia mpe Yesu. Yilimia ekokaki kobongwana Yirmeyah to Yirmeyahu, ebéngeli mpenza ya ebandeli na Liebele, mpe Yesu ekokaki kokóma Yeshua (na Liebele) to Iesous (na Greke). Nzokande, bayekoli mingi ya Biblia, bakisa mpe Batatoli ya Yehova, bamonaka ete mpo na kozala na bongolabongola te ezali malamu kosalela ebéngeli oyo esili koyebana malamu na Lingala “Yehova” mpe ebéngeli oyo ekokani na yango na nkota mosusu.
Koyeba nkombo ya Nzambe ezali mpenza na ntina?
Bato mosusu bakoki koloba ete kobénga Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso na nkombo na ye to te ezali mpenza na ntina te. Basukaka na koloba mpo na ye mpe kobénga ye bobele Tata to Nzambe. Nzokande, maloba yango ezali bobele batitre mpamba kasi ezali bankombo te mpe esalelamaka mpo na moto moko te to ekoki kokesenisa moto moko na moto mosusu te. Na eleko ya Biblia, liloba (ʼElohim, na Liebele) oyo elimboli Nzambe ezalaki kosalelama mpo na banzambe nyonso—ata mpe mpo na nzambe ya Bafilistia oyo azalaki na nkombo Dagona. (Basambisi 16:23, 24) Na yango, soki Moebele akoyebisa Mofilistia ete, ye Moebele, asambelaka “Nzambe,” azali komonisa polele te Nzambe ya solo oyo ye asambelaka.
Buku moko (The Imperial Bible-Dictionary) ya 1874 epesi ndimbola ya ntina mingi: “Bipai nyonso [Yehova] ezali nkombo mpenza ya Nzambe, ezali komonisa Nzambe ye moko mpe bobele ye moko, kasi Elohim ezali nkombo oyo esalelamaka mpo na banzambe nyonso; ya solo, mbala mingi Elohim emonisaka Oyo Aleki Nyonso, nzokande emonisaka bobele ye te. . . . Moebele akoki kotya artikle liboso ya Elohim, Nzambe ya solo, mpo na kokesenisa ye na banzambe ya lokuta; kasi akoki kotya yango soko moke te liboso ya Yehova, mpamba te Yehova ezali bobele nkombo ya Nzambe moko ya solo. Moebele akoki koloba mbala na mbala Nzambe na ngai . . . ; kasi akoloba soko moke te Yehova na ngai, mpamba te ntango alobi Nzambe na ngai, alingi kolobela Yehova. Akoloba Nzambe ya Yisalaele, kasi akoloba soko moke te Yehova ya Yisalaele, mpamba te Yehova mosusu azali te. Akoloba Nzambe na bomoi, kasi akoloba soko moke te Yehova na bomoi, mpamba te ayebi ete Yehova akufaka te.”
Bizaleli ya Nzambe ya solo
Ya solo, koyeba nkombo ya moto elimboli te koyeba ye malamumalamu. Mingi kati na biso toyebi bankombo ya bakonzi ya politiki. Tokoki kutu koyeba bankombo ya bakonzi ya mikili mosusu. Kasi koyeba bankombo na bango—ata mpe lolenge malamu ya kobénga yango—elimboli te ete toyebi bato yango malamumalamu to toyebi lolenge bato yango bazalaka. Bobele bongo, mpo na koyeba Nzambe bobele moko ya solo, tosengeli koluka koyeba bizaleli na ye mpe kosepela na yango.
Ya solo, bato bakoki komona Nzambe ya solo na miso te, kasi na boboto na ye akomisi makambo mingi ya bomoto na ye na Biblia. (Exode 33:20; Yoane 1:18) Basakoli mosusu Baebele bamonaki na bimonaneli ndako ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso kuna na likoló. Makambo oyo bakomaki mpo na yango emonisi bobele nkembo monene, bonene mpe nguya na ye te, kasi emonisi mpe kimya, molɔngɔ, kitoko, mpe makambo oyo esepelisaka.—Exode 24:9-11; Yisaya 6:1; Ezekiele 1:26-28; Danyele 7:9; Emoniseli 4:1-3.
Yehova Nzambe amonisaki Mose bizaleli malamu na ye mosusu, lokola yango elobelami na Exode 34:6, 7: “[Yehova, Yehova] azali Nzambe na mawa mpe na ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo. Akobatela boboto na ye mpo na nkóto nkóto, mpe akolimbisa mabe mpe nkanza mpe lisumu.” Ondimi te ete koluka koyeba bizaleli wana ya Nzambe ekobenda biso epai na ye mpe ekopesa biso nzela ya koluka koyeba makambo mingi ya bomoto na ye?
Atako moto moko te akoki komona Yehova Nzambe na kati ya nkembo na ye, kasi Biblia elobi ete ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, amonisaki mpenza lolenge ya bomoto ya Yehova Nzambe, Tata na ye ya likoló. Mokolo moko, Yesu alobaki ete: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala, zambi yango ekosalaka ye, Mwana akosalaka yango lokola.”—Yoane 5:19.
Na yango, tokoki koloba ete lokola Yesu azalaki na boboto, na mawa, na bopɔlɔ, na esengo, mpe na bolingo makasi mpo na bosembo mpe ayinaki mabe, nyonso wana ezali bizaleli oyo amonaki epai ya Tata na ye, Yehova Nzambe, ntango azalaki elongo na ye na likoló liboso ya koya lokola moto awa na mabelé. Na bongo, soki tokangi mpenza ntina ya nkombo Yehova, tokosepela mpe tokokumisa nkombo yango mosantu, tokosanzola mpe tokokumisa yango, mpe tokotyela yango motema.
Lolenge yango ya koluka koyeba Nzambe bobele moko ya solo esukaka te, lokola yango emonisami polele na Yoane 17:3 kati na Les Saintes Écritures—Traduction du monde nouveau. Ntango oyo esalelami mpo na verbe “koyeba” ezali kosalisa biso mingi, mpamba te basaleli ntango oyo emonisi ete likambo moko ezali kokokisama na boumeli ya ntango, na esika ya kosalela ntango oyo emonisi ete likambo esalemi mbala moko mpe esuki. Na yango, tozali kotánga boye: “Oyo elimboli bomoi ya seko, báyekola koyeba yo Nzambe bobele moko ya solo mpe Oyo yo otindi, Yesu Klisto.” Ɛɛ, koyekola koyeba Nzambe bobele moko ya solo, Yehova, mpe Mwana na ye, Yesu Klisto, ezali na nsuka te.
Nzambe ya solo amonisami
Na yango, Nzambe ya solo akeseni mpenza na banzambe mingi ya lokuta. Azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, bakisa mpe mabelé na bato. Azali na nkombo na ye moko oyo ekeseni na bankombo mosusu nyonso—Yehova, to Yawe. Azali eteni moko te ya Bosato. Azali Nzambe ya bolingo, mpe alingaka ete bato, bikelamu na ye, bázala malamu. Kasi azali mpe Nzambe ya sembo, mpe akopesa nzela te ete baoyo bazali kobebisa mabelé, kobimisa bitumba mpe mobulu bákoba kosala bongo libela na libela.
Yehova amonisi mokano na ye bobele mpo na oyo etali kolongola mabe mpe mpasi na mabelé te, kasi mpe kokómisa yango paladiso esika bato ya motema malamu bakoki kofanda na esengo libela na libela. (Nzembo 37:10, 11, 29, 34) Sikawa Nzambe Mozwi-na-nguya-Nyonso atii Mwana na ye Yesu Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló, mpe mosika te Yesu akotya mokili yango ya sika ya bosembo mpe akozongisa Paladiso na mabelé.—Danyele 2:44; Matai 6:9, 10.
Tozali na elikya ete sikawa okoki mpenza koyanola na motuna: Nzambe azali mpenza? Mpe ndenge nini koyeba Nzambe ya solo.
[Elilingi na lokasa 9]
Yesu Klisto amonisaki ete Yehova azali Nzambe bobele moko ya solo