Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g99 Juillet nk. 4-5
  • Mokano ya Nzambe ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokano ya Nzambe ezali nini?
  • Lamuká!—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe azali mpenza na mokano
  • Mokano ya malamu ezalaki na ntina
  • Boyangeli ya Nzambe oyo ekoumela mbula nkóto
  • Tyá elikya epai na Yehova mpo na kokokisama ya mokano na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Ntango oyo Nzambe atiki nzela na bampasi elingi kosuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bokonzi ya Nzambe—Boyangeli ya sika mpo na mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Etikali moke bampasi nyonso esila!
    Etikali moke bampasi nyonso esila!
Makambo mosusu
Lamuká!—1999
g99 Juillet nk. 4-5

Mokano ya Nzambe ezali nini?

BATO mingi oyo bandimaka te ete Nzambe moko ya nguya mpe ya bolingo azali, bamitunaka boye: Soki Nzambe azali mpenza, mpo na nini atiki nzela ete bato bámona mpasi mpe bányokwama na boumeli ya ntango molai boye? Mpo na nini atiki nzela na makambo ya mawa oyo tozali komona na bisika tofandi lelo oyo? Mpo na nini azali kosala eloko te mpo na kosukisa bitumba, mobulu, kozanga bosembo, bobola mpe minyoko mosusu oyo ezali se kobakisama na bikólo mingi na mabelé?

Bato mosusu balobaka ete Nzambe asalaki molɔ́ngɔ́, atyaki bato na mabelé, mpe na nsima asundolaki bango mpo bátambwisa makambo na bango bango moko. Na kotalela likanisi yango, bato basengeli kopamela Nzambe te mpo na mobulu mpe mpasi oyo bazali komipesa bango moko mpo na lokoso na bango to mpo na lolenge na bango mabe ya kosalela biloko.

Nzokande, bato mosusu bazali kondima likanisi motindo wana te. Na ndakisa, Conyers Herring, profesere ya fizike, oyo andimaka ete Nzambe azali, alobi ete: “Nandimaka soko moke te likanisi oyo bato mosusu bamonisaka ete Nzambe asilá kotya ebongiseli moko boye, afandá na pembeni akangi mabɔkɔ mpe azali kotala bato ndenge bazali komona mpasi. Ntina nandimaka likanisi motindo wana te ezali oyo: makambo mingi oyo nayebi na mosala na ngai ya siansi ezali kopesa ngai ntina moko te ya kondima ete ezali na ‘ebongiseli’ moko na molɔ́ngɔ́ oyo ezali malamu mpe ezali ya kokoka. Misala na biso na makambo ya siansi . . . ekosengela ntango nyonso kobongisama, kasi nakanisi mpenza ete ekozala ntango nyonso na mabunga. Na yango, ezali malamu kondima nguya ya bomoi oyo ezali kopesa nzela na kobongisa yango.”

Nzambe azali mpenza na mokano

Mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli ezalaki ete bato ya sembo mpe ya kokoka báfanda na mabelé. Mosakoli Yisaya akomaki ete: “[Yehova] alobi boye, ye oyo asalaki lola, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango eloko na mobulu te, atongaki yango ete bato báfanda wana.”​—Yisaya 45:18.

Na esika ete akoba kosalaka bato mpo na kotondisa mabelé, Nzambe akanaki ete bato bábotana mpe bátondisa mabelé. Ntango Adama na Eva batombokelaki Nzambe, yango ebebisaki mokano na ye ya ebandeli te, kasi esɛngaki mpenza mbongwana esalema na makambo mosusu mpo mokano na ye oyo etaleli bato mpe mabelé ekokisama.

Na boumeli ya mbula soko 6000 ya eleko yango, Nzambe apesi nzela ete bato bámitambwisa bango moko. Yango ezali oyo baboti na biso ya liboso baponaki na bolingi na bango moko. (Genese 3:17-19; Deteronome 32:4, 5) Lipanda yango ya koboya litambwisi ya Nzambe mpe ndenge bato bazali koyangela na esika ya Nzambe emonisi mpenza ete moto azali na makoki te ya kotambwisa matambe na ye ye moko mpe azali na makoki te ya koyangela baninga na ye malamu.

Ya solo, Yehova ayebaki liboso ndenge bato bakosuka. Apesaki bakomi ya Biblia elimo na ye ete bákoma likambo yango. Na ndakisa, mosakoli Yilimia akomaki ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.”​—Yilimia 10:23.

Salomo, moto na mayele alobelaki mawa oyo ebimaka ntango bato bamekaka kozala na bokonzi likoló na baninga na bango bato, lokola basali yango na boumeli ya bikeke mingi. “Namoni oyo nyonso mpe natii motema na ngai na misala nyonso misalami na nse na moi na ntango wana moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.”​—Mosakoli 8:9.

Nzokande, ezali te ete Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso “afandi na pembeni, akangi mabɔkɔ mpe azali kotala ndenge bato bazali komona mpasi,” kasi azali nde na ntina malamu ya kotika nzela bambula mingi eleka kozanga mpenza ete asilisa mikakatano ya bato mbala moko.

Mokano ya malamu ezalaki na ntina

Mbula 6000 oyo eleki kobanda moto azali awa na mabelé ekoki komonana ntango molai soki tokokanisi yango na mikolo ya bomoi na biso oyo ezalaka na nse ya mbula 100. Kasi, soki totaleli manaka ya Nzambe mpe lolenge oyo ye atalelaka ntango, bankóto ya bambula yango ezali bobele lokola mikolo motoba mpamba—yango ekoki ata pɔsɔ moko te! Ntoma Petelo alobaki ete: “Likambo oyo moko likima bino te, ete epai na Nkolo, mokolo moko ezali lokola [mbula, NW] nkóto mpe [mbula, NW] nkóto lokola mokolo moko.”​—2 Petelo 3:8.

Petelo amonisi ete esengeli te koloba ete Nzambe azali na bopɔtu to aumisaka makambo, abakisaki ete: “Nkolo akoumela nsima na elaka na ye te, lokola bamosusu bazali kokanisa ete akoumela. Kasi azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.”​—2 Petelo 3:9.

Na bongo, soki ntango oyo epesami ekómi na nsuka na yango, Mozalisi akosukisa lolenge mabe oyo bato bazali kosalela biloko ya planɛti na biso kitoko. Na bongo, lokola atikelaki moto ntango molai, moto amonisa ete azali na makoki te ya koyangela to kosukisa bitumba, mobulu, bobola, na maladi, mpe na makambo mosusu ya mpasi. Yango ekozala elembeteli ya solo mpo na kondimisa mpenza likambo oyo Nzambe amonisaki bato na ebandeli—ete basengeli kolanda litambwisi na ye mpo na kozala malamu.​—Genese 2:15-17.

Soki totaleli kokokisama ya bisakweli ya Biblia, tokómi sikawa na nsuka ya “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo. (2 Timote 3:1-5, 13; Matai 24:3-14) Bonsomi oyo Nzambe atikelaki moto ete ayangela kozanga kotalela ye mpe lolenge Nzambe atiki nzela na mabe mpe na mpasi, ekómi pene na nsuka na yango. (Danyele 2:44) Etikali moke, bolɔzi monene oyo mokili emoná naino te ekokómela biso, mpe ekosuka na Armagedon, “etumba ya mokolo yango monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14, 16) Etumba yango ekotambwisama na Nzambe mpe ekobebisa mosala oyo asalaki na mabelé te, kasi “ekobebisa babebisi na mokili.”​—Emoniseli 11:18.

Boyangeli ya Nzambe oyo ekoumela mbula nkóto

Ekozala na bamilio ya bato awa na mabelé oyo bakobika na Armagedon. (Emoniseli 7:9-14) Esakweli ya Masese 2:21, 22 ekokokisama mpenza: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili mpe bato na masumu bakobikolama wana.”

Mokano ya Nzambe ezali ete eleko moko ya malamu mingi ya mbula nkóto ekolanda nsima ya etumba ya sembo ya Armagedon. (Emoniseli 20:1-3) Yango ekozala Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Mwana ya Nzambe, Klisto Yesu, lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló. (Matai 6:10) Na boumeli ya Bokonzi yango ya esengo, bamilio ya bato bakosekwa mpo na kofanda esika moko na bato oyo bakobika na Armagedon. (Misala 24:15) Bango nyonso bakokóma bato ya kokoka, mpe na nsima—na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto—mabelé ekotonda na bato ya kokoka, bango nyonso bakitani ya Adama na Eva. Mokano ya Nzambe ekokóma na nsuka na yango na nkembo monene mpe ekolonga mpenza.

Ya solo, mokano ya Nzambe ezali ete ‘alongola mpisoli nyonso na miso ya [bato], mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka. Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete, Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika.’ (Emoniseli 21:4, 5) Na ntembe te, etikali moke mokano yango ekokokisama.​—Yisaya 14:24, 27.

[Elilingi na lokasa 5]

Na mokili ya sika ya Nzambe, bato bakofanda na esengo libela

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto