Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Esengeli mpenza nazala na telefone ya mabɔkɔ?
“Soki nazali na telefone na ngai ya mabɔkɔ te namiyokaka malamu te mpe nazalaka nkandankanda.”—Akiko.a
NA BAMBOKA mingi bato ebele bakómi na telefone ya mabɔkɔ. Yango ezali na ntina na yango. Baninga mpe baboti bakoki kosolola na yo ntango nyonso mpe epai nyonso yo ozali—yo mpe okoki kobenga bango. Lolenge mosusu ya batelefone ya mabɔkɔ ekosalisa yo otinda mwa maloba ya mokuse. Zulunalo moko (The Times) ya Londres elobi ete yango “ezali lolenge ya sika mpenza mpo bilenge bákokisa mposa na bango ya kosolola.” Kutu, ezali na batelefone ya mabɔkɔ oyo ekoki kosalisa yo osolola na moto na Internet to E-mail.
Ntango mosusu ozali na telefone na yo ya mabɔkɔ, to ozali kokana kozwa yango. Ezala ozali na yango to te, okoki kotalela lisese oyo: “Likambo na likambo ezalaka na mabe na yango mpe na malamu na yango.” Ezali solo ete telefone ya mabɔkɔ ezali malamu. Kasi, okoki mpe kokanisa mabe na yango. Yango wana, ata soki osombi telefone, kasi soki oyebi malamu mabe na yango, okosalela yango malamu.
“Tángá motuya”
Yesu apesaki etinda ya mayele ntango alobaki ete, ekoki ete moto ‘atánga motuya’ liboso ya kobanda likambo moko monene. (Luka 14:28) Tokoki kosalela etinda yango mpo na telefone ya mabɔkɔ? Ɛɛ, tokoki kosalela yango. Ya solo, okoki mbala mosusu kosomba telefone ya mabɔkɔ na mbongo mingi te, ntango mosusu kutu kozwa yango ofele. Nzokande, ndenge Henna, elenge mwasi moko ya mbula 17 amonaki yango, “na mbala moko ekómi kosɛnga yo obimisaka mbongo mingi.” Ekoki mpe kotinda yo ntango nyonso na kosalela makambo ya sika mpe koluka kosomba modɛlɛ oyo euti kobima oyo ezali na ntalo mingi koleka. Yango wana, Hiroshi alobi boye: “Nasalaka mosala soki nabimi na kelasi mpo na kobomba mbongo ya kosomba modɛlɛ ya sika mbula na mbula.” Bilenge mingi basalaka mpe bongo.b
Ata soki baboti na yo bandimi kosombelaka yo bainite, ezali kaka na ntina ete oyeba mbongo boni bakobimisa. Na Japon, mokɛngɛli-motamboli moko alobi ete: “Bamama mosusu basalaka mosala ya ndambo ya mokolo kaka mpo na kosombela bana na bango telefone ya mabɔkɔ, oyo ekoki ntango mosusu kozala na ntina te.” Na ntembe te, okolinga soki moke te kotya mokumba wana na motó ya baboti na yo!
“Elyaka ntango”
Bilenge mingi oyo na ebandeli bazalaki kosalela telefone ya mabɔkɔ na bokatikati, bayaki komona na nsima ete yango ezalaki kolya ntango oyo bakokaki kosalela na makambo mosusu ya ntina. Mika azalaki kolekisa ntango mingi na libota na ye na mesa ntango bazali kolya na mpokwa. Alobi boye: “Sikawa, nsima ya kolya, tozongaka na biteni ya bandako na biso ya kolala moto na moto na [batelefone na ye ya mabɔkɔ].”
Zulunalo moko ya Londres (The Guardian) elobi ete: “Elenge moko kati na bilenge misato oyo bazali na mbula kobanda 16 tii 20 basepelaka nde kotindelana mwa maloba ya mokuse na telefone ya mabɔkɔ na esika ya kokomelana mikanda to kosolola.” Kotinda mwa maloba ya mokuse na telefone ya mabɔkɔ esɛngaka kofuta mbongo mingi te lokola kosolola na moto na telefone, kasi yango esɛngaka nde ntango mingi ya kobɛta makambo oyo okotinda. Mieko alobi ete: “Soki moto moko atindeli ngai maloba ‘olala malamu,’ ngai mpe nazongisaka ‘yo mpe olala malamu.’ Na nsima, tokolekisa ngonga mobimba mpo na kotindelana maloba. Ezalaka mpe makambo ya ntina te.”
Bato mingi oyo basalelaka telefone ya mabɔkɔ bakokamwa soki bakomi ngonga nyonso oyo balekisaki na sanza mobimba mpo na kosalela telefone na bango. Teija, elenge mwasi moko ya mbula 19 alobi boye: “Mpo na bato mingi, telefone ya mabɔkɔ ezali eloko oyo elyaka ntango na esika ete ebakisela bango ntango.” Ata soki ezali mpenza na ntina ete ozala na telefone ya mabɔkɔ, osengeli kokeba mpo obebisaka ngonga mpambampamba te ntango ozali kosalela yango.
Marja, elenge mwasi moklisto moko, alobi boye: “Na mayangani ya boklisto, bilenge mingi batindelanaka makambo ezangá ntina. Likambo yango esalemaka mingi.” Emonanaki ete makambo ya ndenge wana ezali kosalema mpe epai na bilenge mosusu ntango bazalaka na mosala ya kosakola. Biblia epesi baklisto toli ete bámisombelaka ntango mpo na makambo ya elimo. (Baefese 5:16) Ezali mpenza mawa soki ntango yango ezali koleka na kosolola na telefone!
Masolo ya nkuku
Marie alobeli motambo mosusu: “Lokola moto ye moko ayambaka telefone ntango babengi ye, mpe bato mosusu ya ndako bakoki koyeba te, likama ezali ete baboti bakoki koyeba te nani azali kosolola na bana na bango to soki bazali kosolola na telefone to te.” Na bongo, bilenge mosusu basalelaka telefone ya mabɔkɔ mpo na kosolola masolo ya nkuku na bana mibali to na bana basi. Bamosusu bazalaki ekɛngɛ te, balandaki te mitinda oyo basengeli kosalela ntango bazali kosolola na moto mosusu. Ndenge nini?
Zulunalo moko (The Daily Telegraph) ya Londres elobi ete: “Kotindelana mwa maloba ya mokuse na telefone ya mabɔkɔ elimboli ete moto moko te akoki kolandela makambo oyo [bilenge] bazali kosala.” Kozanga komona to koyoka moto oyo ozali kosolola na ye ekoki kobongola bizaleli na yo. Timo alobi ete: “Bato mosusu bakanisaka ete kokomana mwa maloba ya mokuse ezali lolenge ya kosolola oyo moto akomona yo te. Moto akoki kokoma makambo oyo akokaki koloba te liboso ya moto mosusu.”
Ntango Keiko, elenge mwasi moko moklisto ya mibu 17 abandaki kosalela telefone ya mabɔkɔ, apesaki ebele ya baninga na ye nimero na ye. Mbala moko, babandaki kotindelana mwa maloba mikolo nyonso na mwana mobali moko na lisangá na bango. Keiko alobi boye: “Na ebandeli tozalaki kosolola makambo ya mikemike, kasi na nsima tokómaki koyebisana mikakatano na biso. Tokómaki mpenza baninga makasi na nzela ya telefone na biso ya mabɔkɔ.”
Likambo ya esengo, baboti na ye mpe bankulutu basalisaki ye liboso ete makambo ebeba koleka. Sikoyo alobi ete: “Atako liboso ya kopesa ngai telefone ya mabɔkɔ, baboti na ngai bakebisaki ngai makasi na likambo ya kotindelana maloba na bana mibali, ngai nazalaki kotindela ye maloba mikolo nyonso. Nasalelaki telefone na ndenge ya malamu te.”c
Biblia epesi biso toli ete ‘tózala na lisosoli malamu.’ (1 Petelo 3:16) Mpo na kozala na lisosoli malamu, elingi koloba ete ntango ozali kosalela telefone ya mabɔkɔ, osengeli kokeba ete, “ozala na eloko moko te ya koyokela nsɔni,” ndenge Koichi alobi yango, ata soki moto mosusu amoni maloba ozali kotinda to ayoki makambo ozali koloba. Kobosanaka te ete likambo moko ya sɛkɛlɛ ezali te epai ya Tata na biso ya likoló. Biblia elobi boye: “Ezali na ekelamu moko te oyo ezangi komonana polele na miso ya [Nzambe], kasi biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Baebele 4:13) Na yango, mpo na nini koluka kosala makambo na kobombana?
Yebá komipekisa
Soki ozali kokana kosomba telefone ya mabɔkɔ, mpo na nini te komitalela malamumalamu soki esengeli mpenza ozala na yango? Sololá likambo yango na baboti na yo. Bilenge mingi bazalaka na likanisi moko na Jenna, oyo alobi boye: “Kozala na telefone ya mabɔkɔ ezali mokumba monene mpenza oyo ekoki te na bilenge mingi.”
Ata soki ozwi ekateli ya kozala na telefone ya ndenge wana, ezali na ntina mingi oyeba kosalela yango malamu. Na ndenge nini? Yebá komipekisa malamu. Na ndakisa, poná makambo oyo okosala na telefone to ngonga boni okolekisa mpe mbongo ntalo boni okosalela mpo na telefone. Lokola bakompanyi mingi ya telefone ekomaka makambo nyonso etali lolenge osalelaki telefone, okoki mbala mosusu koluka kotalela elongo na baboti na yo mbongo ntalo boni osalelaka. Bato mosusu basalelaka telefone oyo bafutaka mbongo liboso mpe yango esalisaka bango na kosalela telefone mpambampamba te.
Lisusu, kanisá malamu ntango nini mpe ndenge nini okoyamba telefone soki babengi yo to soki bakomeli yo mwa maloba. Omipekisa makambo ndenge oyo ebongi na yo. Shinji alobi boye: “Nafungolaka esika maloba ebimika na telefone na ngai kaka mbala moko na mokolo mpe, ntango nyonso, napesaka eyano bobele na makambo oyo ezali na ntina. Yango wana, baninga na ngai batindaka lisusu maloba ya mpambampamba te. Soki ezali na likambo moko ya ntina oyo basengeli mpenza koyebisa ngai, bakobenga.” Likambo ya ntina mingi ezali ya koyeba kopona bato ya kosolola na bango. Osengeli kokeba na likambo ya kopesa bato nimero na yo ya telefone. Salelá mitinda oyo osalelaka mpo na kopona baninga ya malamu.—1 Bakolinti 15:33.
Biblia elobi ete: “Likambo na likambo ezali na ntango na yango, . . . ntango ya kozala nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:1, 7, NW) Yango emonisi polele ete ezali mpe na ntango oyo esengeli telefone ya mabɔkɔ ‘ezalaka nyɛɛ.’ Makita na biso ya boklisto mpe mosala na biso ya kosakola ezali “ntango oyo ebongi” mpo na kosambela Nzambe, kasi mpo na kosalela telefone ya mabɔkɔ te. Bapekisaka kosalela telefone ya mabɔkɔ na barestora mosusu mpe na bandako ya teyatre mosusu. Na limemya mpenza totosaka yango. Na ntembe te, ebongi mpe tópesa Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba limemya ya koleka oyo wana!
Bato mingi bakangaka telefone na bango ya mabɔkɔ soki bazali kozela te ete moto abenga bango mpo na likambo moko ya ntina to mpe bakitisaka mongongo na yango ntango bazali kosala makambo ya ntina. Bamosusu babombaka batelefone na bango. Atako bongo, bakotánga bansango mosusu na nsima.
Soki olingi kozala na telefone ya mabɔkɔ, zwá ekateli ete yo nde okotambwisa yango na esika otika yango etambwisa yo. Ezali polele ete osengeli kozala na ekɛngɛ mpe ntango nyonso osengeli koyeba makambo oyo eleki ntina. Biblia elendisi biso boye: “Tiká ete ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso.” (Bafilipi 4:5) Soki ozwi ekateli ya kozala na telefone ya mabɔkɔ, monisá ete ozali na mayele na ndenge ozali kosalela yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Mpo na koyeba ndenge bana-kelasi bakendaka mosala soki babimi na kelasi, talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka—Koluka mbongo—Ezali mabe?, na Lamuká ya 22 Sɛtɛmbɛ 1997, na Lifalanse.
c Kosolola mbala na mbala na mwana mobali to na mwana mwasi to kotindelana maloba ntango nyonso na telefone ya mabɔkɔ ekoki kozala lolenge ya kokutana na mwana mwasi to na mwana mobali mpo na makambo ya libala (fréquentations). Talá lisolo “Les jeunes s’interrogent . . . Qu’y a-t-il de mal à se parler?” na Lamuká! ya 22 Augusto 1992 (ebimeli ya Lifalanse).
[Bililingi na lokasa 26]
Bilenge mingi basololaka masolo ya nkuku na telefone ya mabɔkɔ