Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/02 lok. 3
  • Biyano na mituna na bino

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biyano na mituna na bino
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Esengeli mpenza nazala na telefone ya mabɔkɔ?
    Lamuká!—2003
  • Nakómi moombo ya baaparɛyi oyo ebimi sika?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Tosalamá mpo na kozala na bomoi libela na libela
    Lamuká!—1996
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 7/02 lok. 3

Biyano na mituna na bino

◼ Eloko nini tosengeli kobosana te ntango tozali kosalela telefone ya mabɔkɔ mpe aparei oyo babengi pageur électronique?

Bisaleli yango ekoki kopesa biso likoki ya kosolola na bato mosusu na esika nyonso oyo tokoki kozala. Atako kosolola bongo ekoki kozala na ntina, tosengeli kokeba ete tósalela te telefone ya mabɔkɔ mpe pageur électronique na bantango oyo ebongi te, noki te ekolongola likebi na biso na ntango oyo tozali na mosala ya kosakola to na makita ya lisangá. Ndenge nini yango ekoki kosalema?

Kanisá naino nini ekoki kokóma soki telefone na biso ya mabɔkɔ to pageur électronique na biso eleli na ntango oyo tozali kopesa litatoli na mosala ya kosakola. Moto oyo tozali koteya akokanisa nini? Akoki kokanisa nini soki totiki naino kosolola na ye mpo na koyanola na telefone? Na ntembe te, tokolinga te kosala likambo moko oyo ekoki kopekisa bato mosusu báyoka nsango ya Bokonzi. (2 Kol. 6:⁠3) Yango wana, soki tozali na telefone ya mabɔkɔ to soki tozali na pageur électronique, tosengeli kokitisa mpenza volimi na yango, mpo ete ekata biso maloba te to ekata bamosusu maloba te na ntango oyo tozali na mosala ya kosakola.

Tokoloba boni soki ezali moninga oyo tozali na ye nde azali kopesa litatoli bongo biso tozali kozela? Soki tokanaki ete tokolekisa bangonga boye to boye na mosala ya kosakola, tosengeli kotya makanisi na biso nyonso kaka na mosala yango, boye te? Soki tozali na limemya mpo na mosala na biso ya bosantu, ekozala malamu tótalela makambo na biso oyo ezangi ntina na ngonga mosusu. (Lom. 12:⁠7) Yango elingi koloba te ete tokosalela lisusu telefone te mpo na kopesa litatoli to mpo na koyokana na moto oyo topesaki ye litatoli, ntango nini tokokutana lisusu.

Tosengeli mpenza kokeba na kosalela telefone ya mabɔkɔ ntango tozali kotambwisa motuka, mpamba te boyekoli oyo bato mosusu ya mayele basali na likambo yango emonisi ete soki makama ekómi mingi, ezali mpe mpo na likambo yango. Tosengeli mpenza kotosa mibeko nyonso oyo emonisaka na meko nini tokoki kosalela batelefone ya mabɔkɔ na ntango tozali kotambwisa motuka.

Tokendaka na makita ya lisangá mpe na mayangani mpo na kosambela Yehova mpe mpo ateya biso. Soki tozali mpenza na botɔndi mpo na bibongiseli yango mpe soki toyebi ete ezali ya bosantu, yango esengeli kotinda biso tókitisa mpenza volimi ya telefone na biso ya mabɔkɔ mpe ya pageur électronique na biso mpo elongola te likebi na biso to oyo ya bato mosusu, boye te? Soki ezali na likambo moko oyo esɛngi tótyela yango likebi kozanga kozela, tosengeli kobima libándá mpo na kosolola yango, kasi na esika ya makita te. Soki ezali likambo ya noki te, tosengeli kozwa bibongiseli mpo ete makambo na biso moko to makambo oyo etali losambo te tótalela yango na bantango mosusu, kasi te na ntango oyo etyamá mpo na losambo.​​—⁠1 Kol. 10:⁠24.

Tiká ete, na lolenge na biso ya kosalela telefone ya mabɔkɔ to bisaleli mosusu ya lolenge wana, tómonisaka ete tozali mpenza kopesa bato mosusu limemya mpe tozali kopesa motuya mingi na makambo ya elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto