Biyano na mituna na bino
◼ Mitinda nini ya Biblia tokoki kosalela na likambo ya kosalela telefone na makita to na mosala ya kosakola?
“Eloko nyonso ezali na ntango na yango.” (Mos. 3:1): Telefone epesaka bato likoki ya kokomelana to kosolola pene na ntango nyonso. Nzokande, ezali na bantango oyo bakristo batikaka nzela te ete telefone elongola likebi na bango. Na ndakisa, makita na biso ezali ntango ya kosambela Yehova, kozwa mateya ya Nzambe mpe kolendisana. (Mib. 31:12; Nz. 22:22; Rom. 1:11, 12) Tomoni te ete ekozala malamu tókanga telefone na biso ntango tokómi na makita mpe tótika kotinda bamesaje tii ntango makita ekosila? Soki likambo moko ya ntina esɛngi ete telefone ekangama te, tosengeli kotya yango na ndenge oyo ekobenda likebi ya basusu te.
“Kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu.” (1 Ko. 9:23): Na bantango mosusu, esɛngaka kosalela telefone na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ndeko mobali oyo azali kokamba etuluku ya basakoli akoki kosalela telefone mpo na koyeba esika bandeko mosusu bazali kosakola na teritware. Ntango mosusu mpe basakoli basalelaka batelefone na bango mpo na kobenga moto oyo asepelaki to moyekoli ya Biblia liboso ya kokende epai na ye, mingimingi soki afandaka mosika. Soki tozali na telefone na mosala ya kosakola, tosengeli kosala nyonso mpo yango ekata biso lisolo te ntango tozali kosolola na moto. (2 Ko. 6:3) Ntango tozali kozela basakoli mosusu, na esika ya kosololaka na telefone to kotindela baninga bamesaje, ekozala malamu koleka tótya likebi na biso na mosala ya kosakola mpe epai ya bandeko oyo tokei ná bango.
Kopesa basusu limemya. (1 Ko. 10:24; Flp. 2:4): Tokolinga te koyaka na retare na makita mpo na mosala ya kosakola na likanisi ete tokoki kaka kobenga to kokomela ndeko moko mesaje mpo ayebisa biso esika nini etuluku ezali kosakola. Soki tokómi na retare, mbala mingi tokutaka bakaboli basakoli. Toboyi te, makambo mosusu oyo euti na biso te ekoki kosala ete ntango mosusu tókóma na retare. Kasi, soki tozali na momeseno ya kokóma na ntango malamu, tokomonisa limemya na ebongiseli ya Yehova, epai ya ndeko oyo azali kokamba, mpe epai ya baninga na biso basakoli.