LITEYA 1
Kotánga malamu
MAKOMAMI elobi ete mokano ya Nzambe ezali ete bato ya lolenge nyonso “bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:4) Yango wana, ntango tozali kotánga Biblia na mongongo makasi, lolenge oyo tozali kotánga esengeli komonisa mpenza ete tozali na mposa ya kopesa bato boyebi ya solosolo.
Koyeba kotánga Biblia na mongongo makasi mpe mikanda mosusu oyo elimbolaka yango, ezali likambo ya ntina mingi mpo na bilenge mpe mikóló. Biso Batatoli ya Yehova, tozali na mokumba ya kosalisa bato báyeba Yehova mpe nzela na ye. Mbala mingi, yango esɛngaka ete tótánga liboso ya moto moko to liboso ya mwa etuluku moko ya bato. Totángaka mpe na kati ya libota. Na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, bandeko nyonso, mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, bazali na libaku malamu ya kozwa toli mpo na kobongisa lolenge na bango ya kotánga na mongongo makasi.
Kotánga Biblia liboso ya bato, ezala liboso ya mwa bato moke to na lisangá, ezali likambo moko ya ntina mingi mpenza. Biblia epemami na Nzambe mpe “liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya . . . mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Ebe. 4:12) Liloba ya Nzambe ezali na boyebi oyo ezali na motuya monene mpenza oyo okoki kokuta yango na mikanda mosusu te. Ekoki kosalisa moto ayeba Nzambe bobele moko ya solo, azala na boyokani malamu na ye mpe ayika mpiko na mikakatano ya bomoi. Ezali kolakisa nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko na mokili ya sika ya Nzambe. Yango wana, tosengeli kozala na mokano ya kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo na kotángaka Biblia malamu.—Nz. 119:140; Yil. 26:2.
Ndenge ya kotánga malamu. Kotánga malamu esɛngaka makambo mingi, kasi osengeli libosoliboso kotánga maloba ndenge ezali. Yango elimboli ete osengeli kosala makasi mpo na kotánga maloba ndenge ekomami na mokanda. Kebá ete opumbwa maloba mosusu te, omɛla maloba te, mpe tángá maloba malamu mpenza mpo na kokesenisa yango na maloba mosusu oyo ekokanaka na yango mwa moke.
Mpo na kotánga maloba malamu mpenza, ekosɛnga ete okanga ntina ya maloba mosusu oyo ezali pembenipembeni. Yango esɛngi ete omibongisa malamumalamu. Na nsima, soki okolisi makoki na yo ya kotala maloba oyo ezali liboso mpe kotalela ndenge makanisi elandani na kati ya mokanda, yango ekosalisa yo okóma kotánga malamu koleka.
Mpo na minɔkɔ oyo ekomamaka na mikanda, bilembo ya bopemi mpe bilembo mpo na kobongola mongongo ezali na ntina mingi. Bilembo ya bopemi emonisaka esika oyo osengeli kopema, ntango oyo okolekisa na kopema, mpe mbala mosusu, esika oyo osengeli kobongola mongongo. Na minɔkɔ mosusu, soki obongoli mongongo te ntango elembo elakisi yo yango, ekoki kosala ete motuna eyokana lokola likambo oyo moto andimi, to elakisa likambo mosusu. Ya solo, na bantango mosusu, bilembo ya bopemi ezalaka na ntina mingimingi na mibeko ya lokota to gramɛrɛ. Na minɔkɔ mingi, okokoka te kotánga maloba malamu soki otii likebi te na bilembo ya kobongola mongongo, ezala oyo ekomami to oyo okoki koyeba na kotalela maloba mosusu oyo ezali pembenipembeni. Bilembo ya kobongola mongongo ebongolaka lolenge oyo okotánga lɛtrɛ oyo ezali na nse na yango. Luká koyeba ndenge basalelaka bilembo ya bopemi mpe ya kobongola mongongo na monɔkɔ oyo olobaka. Yango nde ekosalisa yo mpenza ete ntango ozali kotánga, bato mosusu bákanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga. Kobosana te ete mokano na yo ezali kaka te ete otánga maloba, kasi obimisa mpe makanisi oyo ezali wana.
Mpo okóma mpenza kotánga malamu, osengeli komeka yango mbala na mbala. Tángá naino paragrafe moko mpe na nsima, zongelá yango mbala na mbala tii ntango okotánga yango kozanga kobɛta mabaku. Na nsima, tángá paragrafe oyo elandi. Na nsuka, salá makasi otánga nkasa mingi mpe opumbwa ata liloba moko te, to ozongela ata liloba moko te to mpe otánga yango mabe te. Soki osali bongo, sikoyo, sɛngá moto moko alanda na likebi mpenza ntango ozali kotánga mpe ayebisa yo mabaku nyonso oyo okosala.
Na mikili mosusu, bato bazali kotánga malamu te mpamba te bazali na mikakatano ya miso to bazali na miinda ya malamu te. Soki baluki kosilisa mikakatano yango, na ntembe te, bato yango bakobanda kotánga malamu mpenza.
Nsima ya mikolo, bakoki kosɛnga na bandeko mibali oyo batángaka malamu ete bátángaka baparagrafe na Boyekoli ya Mokanda mpe ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Kasi mpo na kokokisa mokumba yango malamu, esengeli kaka te koyeba kotánga maloba ndenge ezali. Mpo okóma moto oyo ayebi mpenza kotánga na miso ya bato na lisangá, osengeli kokóma na momeseno ya kotánga malamu yo moko. Yango esɛngi oyeba ete na kati ya fraze, liloba mokomoko ezalaka na ntina na yango. Soki opumbwi maloba mosusu, okokoka te kokanga ntina ya makambo oyo bazali kolobela. Soki ozali kotánga maloba mosusu malamu te, okokanga mpe ntina ya fraze mobimba malamu te, ata soki ozali kotánga mpo na yo moko. Bato mosusu batángaka maloba malamu te, mpamba te mbala mosusu batyaka likebi te na bilembo ya kobongola mongongo to na maloba mosusu oyo ezali pembenipembeni. Salá makasi okanga ntina ya liloba mokomoko na esika oyo basaleli yango. Talelá mpe ndenge bilembo ya bopemi ezali kosalisa yo okanga ntina ya likanisi oyo ezali na fraze. Kobosana te ete mbala mingi, okoyeba likanisi oyo balingi kolobela ntango otángi maloba mingi. Kangá yango mpo ntango okotánga na mongongo makasi, otángaka maloba mingi, elingi koloba bafraze, na esika ya kotángaka liloba mokomoko. Mpo otánga malamu na miso ya bato mingi mpe opesa bango boyebi ya solosolo, ezali na ntina mingi ete yo moko okanga ntina ya makambo oyo ozali kotánga.
Ntoma Paulo akomelaki nkulutu moklisto moko oyo akɔmeli boye: “Kobá komipesa na botángi liboso ya bato nyonso.” (1 Tim. 4:13) Emonani polele ete na likambo oyo, biso nyonso tokoki kobongisa.