Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • T-30 nk. 1-4
  • Otalelaka Biblia ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Otalelaka Biblia ndenge nini?
  • Otalelaka Biblia ndenge nini?
  • Masolo mosusu
  • Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
    Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya?
  • Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
    Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?
  • Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
    Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
  • Bampasi ekosila mokolo mosusu?
    Bampasi ekosila mokolo mosusu?
Makambo mosusu
Otalelaka Biblia ndenge nini?
T-30 nk. 1-4

Otalelaka Biblia ndenge nini?

Okoloba ete ezali . . .

  • buku ya bwanya ya bato?

  • buku ya masapo mpe ya masolo ya kala?

  • Liloba ya Nzambe?

BIBLIA ELOBI ETE

“Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe.”​—2 Timote 3:16, Libongoli ya Mokili ya Sika.

BOLAMU NINI OKOZWA?

Biyano ya malamu na mituna ya ntina oyo etali bomoi.​—Masese 2:1-5.

Toli oyo ekoki kosalisa yo mokolo na mokolo.​—Nzembo 119:105.

Elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya.​—Baroma 15:4.

Mobali moko mpe mwasi moko bazali kotánga Biblia; libota moko ya esengo babimi kozwa mopɛpɛ

EBONGI MPENZA TÓNDIMA MAKAMBO OYO BIBLIA ELOBI?

Ɛɛ; mpo na ntina misato oyo:

  • Ezali na boyokani mpenza. Kokoma Biblia eumelaki mbula koleka 1 600 mpe bato soki 40 nde bakomaki yango. Bato mingi oyo bakomaki yango bayebanaki ata moke te. Atako bongo, makambo oyo ezali na Biblia ezali na boyokani; elobeli kaka likambo moko!

  • Bato oyo bakomaki yango balobaki makambo na bosembo. Mbala mingi, bato oyo bakomaka makambo ya kala balobelaka te mabe ya ekólo na bango. Nzokande, bato oyo bakomaki Biblia balobelaki makambo nyonso na bosembo, ezala mabunga na bango moko to ya ekólo na bango.​—2 Ntango 36:15, 16; Nzembo 51:1-4.

  • Bisakweli na yango ezangaka te kokokisama. Biblia esakolaki kokwea ya engumba Babilone mbula soki 200 liboso likambo yango esalema. (Yisaya 13:17-22) Esukaki kaka te na koloba ndenge Babilone ekokwea, kasi epesaki mpe nkombo ya moto oyo akokweisa yango!​—Yisaya 45:1-3.

    Ebele ya bisakweli mosusu ya Biblia ekokisamaki tii na makambo ya mikemike. Esengeli mpenza kozala bongo mpo Biblia ezali Liloba ya Nzambe!​—2 Petro 1:21.

KANISÁ NAINO

Tata, mama, mwana mobali mpe mwana mwasi

Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kobongisa bomoi na yo?

Biblia epesi eyano na motuna yango na YISAYA 48:17, 18 mpe na 2 TIMOTE 3:16, 17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto