Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 67 lok. 160-lok. 161 par. 4
  • “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te”
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Bakangi Yesu te
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Zwá liteya na ndakisa ya Nikodeme
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Yesu ateyi Nikodeme na butu
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • “Ntango na ye naino ekokaki te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 67 lok. 160-lok. 161 par. 4
Basoda oyo batindaki bákanga Yesu bazongi mabɔkɔ mpamba

MOKAPO 67

“Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te”

YOANE 7:32-52

  • BAKONZI BATINDI BAPOLISI BÁKANGA YESU

  • NIKODEME AKƆTELI YESU

Yesu azali naino na Yerusaleme mpo na Fɛti ya Batabernakle (to ya Mwa bandako ya matiti). Azali kosepela mpo ‘mingi na kati ya ebele wana ya bato bandimeli ye.’ Kasi, bakonzi ya mangomba basepeli te. Batindi bapolisi ya lingomba bákanga ye. (Yoane 7:31, 32) Kasi, Yesu amibombi te.

Kutu, Yesu akobi koteya liboso ya bato na Yerusaleme, alobi: “Nazali na bino mwa ntango moke lisusu liboso ete nakende epai na ye oyo atindaki ngai. Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te, mpe epai ngai nazali bino bokoki kokóma te.” (Yoane 7:33, 34) Bayuda bakangi ntina ya maloba wana te; batunani: “Moto oyo alingi kokende wapi, mpo tómona ye te? Alingi nde kokende epai ya Bayuda oyo bapalanganá na kati ya Bagrɛki mpe koteya Bagrɛki? Elakisi nini liloba oyo alobi ete: ‘Bokoluka ngai, kasi bokomona ngai te, mpe epai ngai nazali bino bokoki kokóma te’?” (Yoane 7:35, 36) Nzokande, Yesu azali kolobela liwa mpe lisekwa na ye mpo na bomoi na likoló, epai banguna na ye bakoki kolanda ye te.

Mokolo ya nsambo ya fɛti yango ekómi. Na boumeli ya fɛti yango, na ntɔngɔ nyonso, nganga-nzambe moko azalaki kosopa mai oyo batoki na Pisini ya Siloame, mpo etíyola na nse ya etumbelo. Ntango mosusu, mpo bato bákanisa likambo yango, Yesu agangi: “Soki moto azali na mposa ya mai, aya epai na ngai mpe amɛla. Moto oyo andimeli ngai, kaka ndenge Likomami elobá: ‘Uta na kati na ye mpenza bibale ya mai ya bomoi ekotíyola.’”​—Yoane 7:37, 38.

Yesu azali kolobela likambo oyo ekosalema ntango bayekoli na ye bakotyama mafuta na elimo mpo bázwa elikya ya bomoi na likoló. Likambo yango ekosalema nsima ya liwa ya Yesu. Kobanda na mokolo ya Pantekote na mbula oyo elandi, mai oyo epesaka bomoi ekobanda kotíyola ntango bayekoli oyo batyami mafuta na elimo babandi koyebisa bato mateya ya solo.

Ntango bato bayoki mateya ya Yesu, basusu balobi: “Oyo azali solo mpenza Mosakoli Yango,” na ntembe te ezali mosakoli oyo esakolamaki ete akozala monene koleka Moize. Basusu balobi: “Oyo azali Kristo.” Kasi, basusu mpe balobi: “Kristo akouta na Galile te, boye te? Likomami elobá te ete Kristo akouta na kati ya bana ya Davidi, mpe na Beteleme mboka oyo Davidi azalaki kofanda?”​—Yoane 7:40-42.

Na yango, makanisi ya ebele yango ya bato ekabwani. Atako bato mosusu balingi ete bákanga Yesu, moto moko te atye lobɔkɔ likoló na ye. Ntango bapolisi bazongi mabɔkɔ mpamba, banganga-nzambe bakonzi ná Bafarisai batuni bango: “Mpo na nini boyei na ye te?” Bapolisi bayanoli: “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te.” Bakonzi yango ya mangomba basiliki, batyoli bapolisi mpe balobi: “Bino mpe bobungisami nzela? Moko ya bankumu to ya Bafarisai andimeli nde ye? Kasi ebele wana ya bato oyo bayebi Mibeko te, bazali bato balakelamá mabe.”​—Yoane 7:45-49.

Nikodeme akɔteli Yesu

Na yango, Nikodeme, Mofarisai oyo azalaki mpe na kati ya Sanedrina, azwi mpiko mpe akɔteli Yesu. Eleki mbula soki mibale na ndambo, Nikodeme akendaki epai ya Yesu na butu mpe alobaki ete azali kondimela ye. Sikoyo Nikodeme alobi: “Mibeko na biso esambisaka nde moto soki eyoki ye liboso te mpe soki eyebi te oyo ye azali kosala?” Bazongiseli ye nini? “Yo mpe outi nde na Galile? Luká mpo omona ete ata mosakoli moko te asengeli kobima na Galile.”​—Yoane 7:51, 52.

Makomami elobi mbala moko te ete mosakoli moko akobima na Galile. Kasi, emonisaki ete Kristo akobima kuna; esakolaki ete “pole moko monene” ekomonana na “Galile ya bikólo.” (Yisaya 9:1, 2; Matai 4:13-17) Lisusu, ndenge esakolamaki, Yesu abotamaki na Beteleme mpe azali mokitani ya Davidi. Atako mbala mosusu Bafarisai bayebi makambo yango, bazali na ngambo monene ndenge bazali koyebisa bato makambo ya lokuta mpo na Yesu.

  • Mbala mosusu, Yesu alobi nini mpo na kobenda likebi na likambo oyo esalemaka ntɔngɔ nyonso na Fɛti ya Batabenakle?

  • Mpo na nini bapolisi bakangi Yesu te, mpe bakonzi ya mangomba balobi nini?

  • Nini emonisi ete Kristo akouta na Galile?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto