Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/5 nk. 19-24
  • Toloba mpo na nkembo ya bokonzi na Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Toloba mpo na nkembo ya bokonzi na Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo mazwami na Biblia
  • Esengeli komibongisa
  • Tokoki kolikya kozwa matomba
  • Toloba ntango nyonso ‘mpo na nkembo na Nzambe’
  • Okoki kopesa litatoli ya libaku malamu!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Omibongisi mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Sanzolá Yehova na kopesáká litatoli ya libaku malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Zalá na molende mpo na ‘kopesa litatoli malamumalamu’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/5 nk. 19-24

Toloba mpo na nkembo ya bokonzi na Nzambe

“Bakoloba mpo na nkembo na bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo.”​—Nzembo 145:11.

1. Jehovah apesaki biso likoki ya koloba mpo na ntina na nini mpenzampenza?

LIKOKI ya koloba oyo Jéhovah apesaki biso ezali na mokano na yango. (Exode 4:11) Mokano yango ezalaki boye ete bibebu na biso ‘esanzola’ ye. (Nzembo 119:171, 172) Mokomi na nzembo Davidi alobaki: “Misala na yo nyonso ekotonda yo, e Jéhovah, mpe bato na yo mpenza bakosanzola yo. Bakoloba mpo na nkembo na bokonzi na yo, bakosakola mpo na nguya na yo, mpo na koyebisa bato misala na yo na nguya mpe nkembo na bokonzi na yo. Bokonzi na yo ezali bokonzi na seko, mpe nguya na yo ekoumela na mabota na mabota.”​—Nzembo 145:10-13.

2. Ndenge tozali komiyoka ete tosengeli ‘kobimisa masanzoli’?

2 Bayekoli na Yesu Klisto oyo bapakolami na elimo santu mpe baninga na bango “ebele monene” bazali na mposa makasi ya kosanzola Jéhovah, “Mokonzi na seko”. (Emoniseli 7:9; 15:3) Na koyekolaka malamumalamu Biblia na lisalisi ya Mosenzeli mpe mikanda mosusu ya la Société, tokoki kozwa boyebi ya solo ya Nzambe, oyo ezali lokola liziba na mai na peto, mazali mpio mpe makoki kobikisa. Na yango, mpo na biso, ‘liziba na mayele ezali lokola etima ekotiolaka’. (Masese 18:4) Tozali komiyoka ete tosengeli ‘kobimisa masanzoli’ na ndako na ndako mpe na lolenge mosusu ya mosala ya kosakola. Litatoli ya mbalakaka, yango mpe lisusu ezali na moboko makasi kati na Biblia.

Makambo mazwami na Biblia

3. Tanga ndakisa moko ya litatoli ya mbalakaka epesamaki na Yesu?

3 Yesu asakolaki mpo na mbala ya liboso epai na ye mpenza ntango apakolamaki na elimo santu. Abyangaki Yoane, André mpe mbala mosusu ata Petelo. Bango misato balekisaki mokolo mobimba elongo, mpe ekoki kozala ete bazwaki litatoli malamu na libaku yango. (Yoane 1:35-42) Ezali mpe na ndenge ya pwasa, ete “elekaki ye wana”, Yesu amonaki Matai afandi na ekongwelo na mpako, mpe alobaki na ye: “Landa ngai” mpe alandaki ye.​—Matai 9:9.

4. Litatoli nini Yesu apesaki epai na mwasi Mosamaria, mpe yango epesaki ye nzela ya kosala nini?

4 Ndakisa eleki malamu ya ‘etima na mayele ekotiolaka’, ezali bongo Yesu. Wana efandaki ye liboso na libulu na Yakobo, pembeni na Sikare, mpe atako azalaki na nzala mpe alembaki, apesaki litatoli na Mwasi Mosamaria oyo ayaki kotoka mai. “Nde ye oyo akomela mai makopesa ngai epai na ye akoyoka mposa lisusu te; kasi mai makopesa ngai ye makozala moto na mai kati na ye kopunzwapunzwa kino bomoi na seko.” Litatoli ya mbalakaka oyo Yesu apesaki etindaki ye ete aloba na etuluku na bato oyo bayanganaki ntango mwasi yango akendaki kobenga bato baya koyoka Yesu.​—Yoane 4:6-42.

5. Bandakisa nini Filipe mopalanganisi na nsango malamu mpe ntoma Paulo bapesaki mpo na oyo etali litatoli ya mbalakaka?

5 Filipe mosakoli na nsango malamu apesaki litatoli ya mbalakaka epai na mobali moko oyo azalaki koleka na likalo na ye, kotangaka bongo Biblia. Ntango abengamaki ete amata na likalo, Filipe asakolaki “nsango malamu mpo na Yesu” epai na mokube moetiopia, oyo ayambaki yango malamu mpe amibatisaki. (Misala 8:26-38) Ntango ntoma Paulo atyamaki na boloko na Filipe, mabelé maninganaki makasi, mpe yango efungolaki bikangeli akangamaki na yango, mpe abandaki kopesa litatoli na mbalakaka epai na mokengeli na boloko. Litomba ezalaki boye ete, “abatisamaki nokinoki, na ye, na bato nyonso na ndako na ye lokola.”​—Misala 16:19-34.

6. Nsima wana Etienne abotamaki mabanga, litatoli ya mbalakaka ezalaki na esika nini kati na misala ya bayekoli na Yesu?

6 Lelo oyo, na bamboka epai kuna mosala na biso ya boklisto epekisami, litatoli ya mbalakaka ezali mwango makasi ya kosakola nsango malamu. Ata soko tonyokolami, motema na biso ezali kotinda biso na ‘koloba mpo na nkembo na bokonzi na Nzambe’. Nsima wana Etienne abetamaki mabanga, bayekoli banyokolamaki mpe mingi kati na bango, bapanzanaki. Ata bongo, balandaki kosakola nsango malamu mpe na milende oyo bazalaki kotya mpo na kosakola Bokonzi, bazalaki kotalela litatoli ya mbalakaka na bopoto te.​—Misala 8:4-8; 11:19-21.

7. Paulo asalaki nini ata ntango bazalaki kokengela ye na basoda Baromé? Yango ebimisi motuna nini?

7 Soko totyami na boloko to mwayé ya kobima ezali te mpo tozali na maladi, litatoli ya mbalakaka ekosalisa biso na ‘koloba mpo na nkembo na bokonzi na Nzambe’. Na boumeli ya mbula mibale, Paulo azalaki na boloko mpe Baromé bazalaki kokengela ye. Kasi, na esika ete alemba, azalaki kobengisa bato mpo na koloba na bango mpe “azalaki koyamba na bolingo baoyo nyonso bazalaki kokota epai na ye, kosakolaka bango bokonzi na Nzambe mpe kolakisaka makambo na ntina na Nkolo Yesu Klisto polele mpenza”. (Misala 28:16-31) Oyo nde ndakisa malamu boye! Soko ezangi likoki ya kobima na ndako na yo okoki komipesa na mosala motindo oyo?

8. Litatoli ya mbalakaka oyo Paulo apesaki ezalaki na nguya nini?

8 Lokola bakengeli na Paulo bazalaki kosanzé mbala na mbala, mingi bayokaki ye koloba epai na bato mosusu na ntina na nkembo na bokonzi na Nzambe. Kasi, tokoki kondima mpenza ete Paulo asakolaki mpe epai na bango. Litatoli ya mbalakaka oyo ezalaki mpenza nguya na boye ete ye moko akokaki kokoma: “Makambo mayeli ngai masungi kotambolisa nsango malamu, kino eyebani kati na ebolo mobimba na basoda na Kaisala mpe epai na bamosusu nyonso ete ngai nakangami mpo na Klisto, mpe mingi na bandeko balendisami kati na Nkolo mpo na kokangama na ngai mpe baleki na molende koloba Liloba na Nzambe mpe kozanga nsomo.” (Bafilipi 1:12-14). Soko tokangami na boloko mpe tozangi likoki ya kosakola na ndako na ndako, tokoki ata bongo, ‘koloba na ntina na nkembo na bokonzi na Nzambe’ lokola Paulo; mpe ndenge yango tokolendisa bandeko na biso!

9, 10. Bilembeteli nini tozali na yango, emonisi ete baklisto ya liboso bapesaki litatoli ya mbalakaka?

9 Litatoli na mbalakaka epalanganaki mpenza epai na baklisto na liboso na boye ete koloboka mpo na bakitani na bango, maloba oyo mabimisamaki: “Tozwi lisolo oyo epai na mokomi moklisto moko oyo akokaki kokoma yango mbala mosusu na Kartaje pene na mobu 200, . . . lisolo yango ezali kolobela bato bayekola mingi. Bilenge misato, bango basambisi mpe bazali baninga, balekisi mokolo mobimba pembeni ya la mer. Mibale kati na bango bazali baklisto, oyo ya misato azali mopakano. Lisolo na bango eumeli te mpe ekoti na makambo na lingomba. . . . Tala ndenge lisolo yango ya molai esuki: ‘Tozongaki biso misato na esengo: moko na biso mpo ete akomaki na kondima epai na Klisto, mibale mosusu mpo ete basalisaki ye andima.’ (Histoire de l’Eglise 1-La premiere epoque: 29-500 de n.e., Angl., John Foster, pp. 46, 48) Lisolo oyo elobami na Minucius Felix; ata ezali bongo to bongo te, kasi emonisi biso ndenge makambo mazalaki koleka epai na bato minene. Yango emonisi ete litatoli na mbalakaka elimwaki te epai na baklisto na eleko yango.

10 Elobamaki lisusu boye na ntina na baklisto na liboso: “Ntembe ezali te ete baklisto mingi bazalaki kosakola mpo na Klisto epai nyonso oyo bazalaki kokenda, na mosala to ata wana bazalaki kokima monyokoli . . . Mpo na mingi kati na bango, mosala na bango, ata soko ezalaki mosala nini mpe makambo mosusu ya mokolo na mokolo ezalaki mwango ya kopalanganisa kondima na bango.” (L’entreprise missionnaire, Angl., Edwin Bliss, p. 14) Ee, basakoli ya liboso ya Bokonzi bazalaki kosakola na ndako na ndako mpe na ndenge ya mbalakaka.

Esengeli komibongisa

11. Yesu alakisi biso nini mpo na ndenge ya komonisa polele solo ya Nzambe?

11 Lokola Yesu mpe bayekoli na ye ya liboso, tosengeli kopesa litatoli ezala na ndako na ndako to na ndenge ya mbalakaka. Mpo na kozala na molende na mosala yango, esengeli komibongisa. Wana ezalaki ye kopesa litatoli na mbalakaka to koteya, Yesu azalaki kolobela bana, bilei, bilamba, bandeke, bafololo, ntango, mosala. (Matai 4:18, 19; 6:25-34; 11:16-19; 13:3-8; 16:1-4) Biso mpe, tokoki kosalela mito na makambo oyo nyonso mpo na komonisa ntina ya solo na Nzambe.

12. Wana olingi kosala mobembo, ndenge nini okoki komibongisa mpo na kopesa litatoli ya mbalakaka?

12 Tokoki kopesa litatoli ya mbalakaka epai na bato oyo bazali kozela bus to bazali kozela ete bakota epai na monganga, bongo na bongo. Ntango azalaki na Atene, Paulo azalaki kosolola “mokolo na mokolo na zando, na bango bakutani na ye”. (Misala 17:17) Kasi, litatoli ya mbalakaka ezali kosenga ete omibongisa. Na ndakisa, olingi kosala mobembo na mpepo, na engunduka to na motuka? Na bongo kumba Biblia mpe bazulunalo to ba brochures. Kotanga mpamba mikanda ya la Société kati na bus to na engunduka to na esika mosusu bato bazali mingi ekoki mpo na kopesa nzela ya kobanda lisolo.

13. Monisa ndenge nini okoki kobanda lisolo elongo na mobange na ntango ozali na mobembo.

13 Ezali polele ete maloba na biso ya ebandeli masengeli kobimisama na esengo. Mokanda Comment raisonner а partir des Ecritures ezali na ebandeli na masolo oyo tosengeli kosalela na mosala ya kosakola na ndako na ndako, kasi mingi kati na yango ekoki kobongolama mpe kosalelama na litatoli ya mbalakaka. Tozwa ndakisa ete ozali na mobembo mpe ofandi pene na mobange; okoki koloba na ye: “Nkombo na ngai Songolo. Nakanisaka mingi na ntina ya bomoi. Bato mingi bamipesi mpenza na mosala na bango na boye ete bazangi ntango mpo na kokanisa na likambo yango. Kasi wana tozali konuna, tozali komona polele ete bomoi ezali mokuse, mpe tokoki komituna boye: ‘Bomoi nyonso yango wana?’ Yo mpenza, okanisi ete Nzambe azali na mokano mpo na bato?’ Tika ye ayanola. Na nsima okoki kolobela mpo na mokano ya Nzambe epai na bato mpe kosolola na ye mpo na bilaka minene oyo ezwami na Emoniseli 21:3, 4. Soki olingi kozala molende na litatoli ya mbalakaka oyo ozali kopesa, okoki mpe kosalela makanisi mosusu ya malamu oyo mazali kolimbolama na makita ya masanga to na mikanda ya la Societe.

Tokoki kolikya kozwa matomba

14. Matomba nini ndeko mobali moko azwaki wana ezalaki ye kopesa litatoli na boumeli ya mobembo?

14 Lokola Yesu mpe bayekoli na ye bazwaki matomba na litatoli ya mbalakaka, biso mpe tokoki kozwa matomba malamu. Na ndakisa, wana ezalaki ye na mobembo kati na mpepo, Temwe moko akokaki kobanda lisolo elongo na mokonzi na basoda oyo abala esila koleka mbula 20. Mwasi na ye azalaki komela bangi, amekaki komiboma mbala mingi mpe akomaki pene ya kotika ye mpo akenda kofanda elongo na mobali mosusu, elenge. Temwe asololaki na ye na ntina na lisalisi oyo Biblia ezalaki kopesa ye na nzela na bazulunalo oyo azalaki kozwa, La Tour de Garde (Mosenzeli) mpe Réveillez-vous! Mokonzi yango ya basoda asalaki abonema mpo na mwasi na ye. Bato mosusu bayokaki makambo oyo Temwe azalaki koloba, mpe mpo na yango basalisaki abonema 22 mpe akabolaki bazulunalo 45 mpe mikanda 21.

15, 16. (a) Monisa na bandakisa matomba malamu oyo tokoki kozwa na kopesaka litatoli ya mbalakaka epai na baninga ya mosala. (b) Matomba yango etindi yo ete osala nini?

15 Litatoli ya mbalakaka ekoki mpe kopesama epai na baninga ya mosala. Moklisto mwasi moko atikaki mwa bazulunalo na ba toilettes ya esika na ye ya mosala. Moko kati na baninga na ye atangaki yango, asololaki na ndeko mwasi mpe asalisaki abonema mibale na bazulunalo yango mibale. Mpe lisusu, mobali yango andimaki koyekola Biblia mpe atikaki etamboli na ye ya mabe. Kasi, mwasi na ye azalaki kobima na ndako ntango nyonso oyo nkombo ya Nzambe ezalaki kotangama. Lokola mobali yango alingaki kolongwa na lingomba na ye, mokonzi moko ya lingomba ayaki kosolola na ye likambo yango, kasi akutaki se mwasi na ndako. Kozanga kondima ya ministre yango mpe lokuta oyo alobaki mpo na ba Témoins de Jéhovah esepelisaki mwasi te, mpamba te amonaki ndenge mobali na ye akomaki na ezaleli malamu. Bongo alobaki na ye: “Okoki mpe kosala mokanda oyo emonisi ete ngai mpe bana na ngai tolongwe na lingomba na bino!” Na nsima, mobali yango mpe mwasi na ye bakomaki ba Témoins de Jéhovah.

16 Eleki bambula mingi, wana azalaki na Angleterre, Temwe moko oyo sikawa asili kokoma na Etats​—Unis apesaki litatoli ya mbalakaka epai na moninga na ye ya mosala. Na nsima akendaki elongo na elenge yango mpo na kotala film elakisamaki na ba Témoins de Jéhovah. Mbula 31 na nsima, azwaki mokanda elandi: “Nalingi koyebisa yo yango sikawa ete, litatoli oyo opesaki epai na (elenge mobali yango) ebimisi solo mbuma. Na yango, mbula mibale na nsima, moklisto mosusu asololaki na ye; atikelaki ye bazulunalo mpe akendaki na ye elongo na Salle du Royaume . . . . Akomaki Témoin de Jéhovah mpe azwaki batisimo na 1959. Azali sika nkulutu kati na lisangá . . . Nsima na mbula 14, mwasi na ye mpe akomaki Témoin de Jéhovah mpe azwaki batisimo. Mbula mibale na nsima, mwana na ye ya mwasi abatisamaki; azali sikawa pionnier permanent na nord ya Derbyshire . . . Longwa na litatoli mokuse oyo opesaki na ntango ozalaki na Ashford, elenge mobali yango, mwasi na ye mpe mwana na ye ya mwasi, ndeko na ye ya mwasi mpe mwana na ye, mobali na ye mpe bana na bango mitano, bakisa lisusu mwana moko ya ndeko mwasi mosusu basili kokoma Batemwe. . . . Nalingi kotondo yo na bosembo nyonso, Ted, mpamba te mosali na mabaya, ezali ngai, mpe lisolo oyo nauti kosolola na yo, ezali lisolo na ngai. Wana ezali mbuma oyo litatoli na yo ebimisi.”

17. Mabaku nini ya kopesa litatoli ya mbalakaka epesameli bilenge basaleli ya Jéhovah?

17 Bilenge basaleli na Jéhovah, bazali na baninga na bango na kelasi mpe balakisi, epai na bango bakoki kosakola. Bakanisaka ntango nyonso kopesa litatoli ya mbalakaka ntango bazwi devoir, to na mabaku mosusu? Elenge mwasi moko, moyekoli na école secondaire na Equateur oyo azalaki koyekola Biblia azwaki makanisi mpo na kokoma devoir, kati na masolo mabimaki na Réveillez-vous! ya 22 aout 1985. Zulunalo yango ezalaki na moto na likambo “Hiroshima: epesi mpenza liteya?” Akumisamaki mingi na jury ya momekano yango mpo na lisolo na ye mpe azwaki mbano ya kokenda mobembo na Japon. Ya solo, mokano ya mikanda ya la Société ezali ya kolongisa bato te na kolonga mimekano, kasi lisolo oyo emonisi malamu motuya ya mikanda yango mpe litatoli oyo ekoki kopesama, na eteyelo mpo na kosanzola Nzambe.

18. Litomba nini litatoli mokuse oyo epesamaki epai na moto azalaki koluka ndako ya kofutela ebimisaki?

18 Mpo azangaki makoki, moklisto mwasi moko asengelaki kotya moto ya kofutela na ndako na ye. Mwasi moko atelefonaki ye, bongo ndeko mwasi ayebisaki ye ete azalaki Témoin de Jéhovah mpe azalaki kopesa nzela te na etamboli na mbindo epai na ye. Soko bato bayei kotala lokatere na ye, basengelaki kolongwa na ndako na ngonga malamu na mpokwa, mpe soko bazali mibali, esengeli batika ndako polele ntango bazali na kati. Molobani na ye amekaki kokakatana, bongo alobaki: “Nayekolaki Biblia ntango nazalaki naino elenge, kasi ezalaki na litomba moko te mpo na ngai; nakendaki na université.” Moklisto mwasi atunaki ye soko alingaki lisusu koyekola Biblia, mpe andimaki. Na nsima na yango, mwasi yango, mama na ye mpe ndeko na ye ya mwasi bamipesaki epai na Jéhovah. Nyonso wana mpo ete litatoli ya mbalakaka epesamaki.

19. Litomba nini ebimaki na litatoli oyo epesamaki epai na mwasi moko ya Bahamas?

19 Mwasi moko na Bahamas, azalaki kosambela na katolike atikaki kokende na ndako​—nzambe longwa mibu mitano mpe atungisamaki mingi mpo na yango. Mokolo moko ya lomingo na ntongo, akendaki na ndako-nzambe na nse na mbula makasi. Batemwe misato bazalaki koleka na vwatire bakotisaki ye na kati mpe bapesaki ye litatoli. Ntango bakomaki na ndako-nzambe, asepelaki koyoka lisusu makambo mingi mpe akokaki kokita na motuka te. Bongo balekaki na ye mpo na kozwa moyekoli moko ya Biblia. Wana ezongaki bango liboso na ndako-nzambe, mposa na ye ya koyeba esilaki naino te, mpe akendaki na bango elongo kino na Salle du Royaume. Theme ya discours public ekokanaki mpe na lisolo oyo basololaki na kati na vwatire. Abandaki koyekola Biblia, akabwanaki na tata na bana na ye minei oyo bazalaki kofanda na ye na ndenge ya makango, abatisamaki na assemblée de district ya Nassau, na 1986. Asepelaki mingi ete moto moko apesaki ye litatoli ya mbalakaka.

Toloba ntango nyonso ‘mpo na nkembo na Nzambe’

20. (a) Ndenge nini tosengeli kotalela litatoli ya mbalakaka soko tokokisi yango na mosala ya kosakola na ndako na ndako? (b) Moto oyo asepelaka kopesa litatoli na mbalakaka te akoki kosala nini?

20 Litatoli ya mbalakaka ekoki kozwa esika ya mosala ya kosakola ndako na ndako te, oyo ezali moboko na yango kati na Makomami mpe oyo esili komonisa makasi na yango. (Misala 5:42; 20:20, 21) Ata bongo, litatoli ya mbalakaka ezali kobimisa matomba, mpe basaleli na Jéhovah basengeli kosalela yango. Bato ya libota na biso, baninga na biso ya kelasi, baninga na biso ya mosala mpe bato mosusu bazali kopesa biso libaku ya ‘koloba mpo na nkembo na bokonzi na Nzambe’. Mpo na yango, tomipesa na kobanga te. (Masese 29:25; 2 Timote 1:6-8) Soko litatoli na mbalakaka ezali kosepelisa yo te, mpo na nini okosambela te, lokola esalaki yango bayekoli na Yesu ntango banyokwamaki? Mokolo mosusu, balobaki: “Jéhovah . . . pesa baombo na yo nzela ete basolola Liloba na yo na mpiko nyonso” Libondeli na bango eyokamaki? Ee, mpamba te “ezalaki bango kolomba, esika eyangani bango eningani. Bango nyonso batondaki na elimo santu mpe na molende basakoli Liloba na Nzambe.”​—Misala 4:23-31.

21. Eloko nini esengeli kotinda biso na kopesa litatoli ya mbalakaka na mabaku nyonso?

21 Mpo na yango, tya makasi ete ozala na makanisi mabe te mpo na litatoli na mbalakaka. Tika ete bolingo na yo mpo na Nzambe etinda yo na kopesa litatoli na mabaku nyonso. Sepela na yango, na bongo okopalanganisa solo na mabaku nyonso. Ee, loba ntango nyonso ‘mpo na nkembo na bokonzi na Nzambe’.

Bozongeli

◻ Biblia elobeli mpe litatoli ya mbalakaka?

◻ Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kopesa litatoli ya mbalakaka’?

◻ Litatoli ya mbalakaka ekoki kobimisa matomba nini?

◻ Ndenge nini tosengeli kotalela litatoli ya mbalakaka soko tokokisi yango na mosala ya kosakola na ndako na ndako?

[Elilingi na lokasa 20]

Soko ozangi likoki ya kobima epai na yo, opesaka litatoli ndenge paulo asalaki yango?

[Elilingi na lokasa 23]

Soko tozali komibongisa, yango ekosalisa biso ete topesa litatoli ya mbalakaka na molende nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto