Omibongisi mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu?
1. Ndakisa nini ezali komonisa ete kopesa litatoli ya libaku malamu ekoki kobota mbuma?
1 Kopesa litatoli ya libaku malamu ekoki mpenza kobota mbuma. Biblia elobeli bato mingi oyo bapesaki litatoli ya libaku malamu mpe ebotaki mbuma. (Yoa. 4:7-15) Ndenge nini tokoki komibongisa mpo tópesaka litatoli ya libaku malamu?
2. Ndenge nini molato na biso ekoki kosalisa biso tópesa litatoli?
2 Molato na biso: Kozala ntango nyonso na molato ya malamu ekosalisa biso tókakatanaka te kopesa litatoli ya libaku malamu. (1 Tim. 2:9, 10) Soki tozali na molato oyo ebongi te, tokoki koyoka nsɔni mpe kolekisa libaku malamu ya kopesa litatoli. Nzokande, soki tozali na molato ya malamu mpe ya pɛto, yango ekobenda likebi ya bato mosusu. Na ndakisa, babalani mibale oyo bazali Batatoli balataki malamu ntango bazalaki na mobembo mpe bafandaki pembeni ya mobali moko oyo azali Mizilma. Ndenge oyo balataki ebendaki likebi ya mobali yango mpe atunaki bango soki bazali bakristo. Yango epesaki bango libaku ya kosolola lisolo ya Biblia ngonga misato.
3. Na kolanda ndakisa ya Yesu, ndenge nini obandaki lisolo?
3 Tóbandaka masolo: Ntango Yesu akutanaki na mwasi Mosamaria na liziba ya Yakobo, mpo na kobanda lisolo na mwasi yango, asɛngaki ye kaka mai ya komɛla. Biso mpe tokoki kobanda lisolo na moto soki tolobi na ye mwa likambo moko to totuni ye motuna moko. Ntango mosusu tokoki kokakatana, kasi soki totye motema ete Yehova akosalisa biso, ‘tokozwa mpiko’ ya kobanda lisolo.—1 Tes. 2:2.
4. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu?
4 Tólukaka mabaku ya kopesa litatoli: Basakoli mingi bayekolá mayele ndenge na ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Kanisá makambo oyo osalaka mokolo na mokolo mpe lolenge ya bato oyo okutanaka na bango. Tamboláká na Biblia ya moke mpe mikanda oyo okoki kolakisa. Saleláká miso, mpe tyáká likebi epai ya bato oyo ozali kokutana na bango. Soki okanisi liboso makambo oyo okoki kokutana na yango na boumeli ya mokolo, okomibongisa mpo opesa litatoli ya malamu.—Flp. 1:12-14; 1 Pe. 3:15.
5. Mpo na nini tosengeli kosalelaka libaku nyonso ya malamu mpo na kopesa litatoli?
5 Makambo mibale esengeli kotinda biso tólekisaka te mabaku ya kopesa litatoli: bolingo oyo tolingaka Nzambe mpe bazalani na biso. (Mat. 22:37-39) Lokola mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu, tosengeli kosalelaka libaku nyonso ya malamu oyo tozwi mpo na kopesa litatoli. Tosengeli kosalelaka libaku nyonso ya malamu mpo na koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi lokola mwa ntango ezali naino.—Rom. 10:13, 14; 2 Tim. 4:2.