Okoki kopesa litatoli ya libaku malamu!
1. (a) Litatoli ya libaku malamu ezali nini? (b) Bandeko boni kati na biso awa bayebaki solo na nzela ya litatoli ya libaku malamu?
1 Bandeko boni na lisangá na bino bayebaki solo na nzela ya litatoli ya libaku malamu? Okoki kokamwa na motángo na bango. Litatoli ya libaku malamu elimboli kosakola nsango malamu epai ya bato oyo tokutanaka na bango mokolo na mokolo: na mobembo, ntango tokei kotala bandeko to baninga ya kartye, ntango tokei kosomba biloko, na kelasi, na mosala, mpe bongo na bongo. Na etuluku moko ya Batatoli koleka 200, bandeko 80 bayebaki solo na nzela ya litatoli ya libaku malamu! Yango emonisi ete lolenge wana ya kosakola ebotaka mbuma mingi.
2. Banani oyo Makomami elobeli, oyo bapesaki litatoli ya libaku malamu?
2 Bapalanganisi ya nsango malamu na ekeke ya liboso bazalaki mbala mingi kopesa litatoli ya libaku malamu. Na ndakisa, ntango Yesu azalaki kokende na Samaria, apesaki litatoli na mwasi moko oyo azalaki kotoka mai na libulu ya Yakobo. (Yoa. 4:6-26) Filipe abandaki lisolo na Moetiopia moko, mosali monene ya Leta, oyo azalaki kotánga mokanda ya Yisaya, ntango atunaki ye boye: “Ozali mpenza koyeba makambo oyo ozali kotánga?” (Mis. 8:26-38) Ntango ntoma Paulo akɔtaki bolɔkɔ na Filipi, apesaki litatoli epai ya mokɛngɛli ya bolɔkɔ. (Mis. 16:23-34) Na nsima, ntango azalaki kofanda na ndako moko lokola mokangami, Paulo “azalaki koyamba na boboto mpenza baoyo nyonso bazalaki koya epai na ye, azalaki kosakwela bango bokonzi ya Nzambe mpe koteya makambo etali Nkolo Yesu Kristo polele mpenza mpe na bosembo, kozanga kopekisama.” (Mis. 28:30, 31) Yo mpe okoki kopesa litatoli ya libaku malamu, ata soki ozalaka nsɔninsɔni. Ndenge nini?
3. Nini ekoki kosalisa biso tólonga ezaleli ya nsɔninsɔni?
3 Mayele mpo na kobanda: Mingi na biso tozalaka na mokakatano ya kobanda lisolo na bato oyo toyebi te. Ezalaka mpe pɛtɛɛ te kopesa litatoli ata epai ya bato oyo tomeseni na bango. Kasi, soki tokanisi makambo ya malamu oyo Yehova asalelaka biso, mateya ya solo oyo apesi basaleli na ye mpe mpasi oyo bato bazali komona na mokili lelo oyo, yango ekolendisa biso tópesa litatoli. (Yona 4:11; Nz. 40:5; Mat. 13:52) Longola yango, tokoki mpe kosɛnga Yehova asalisa biso ‘tózwa mpiko.’ (1 Tes. 2:2) Mwana kelasi moko ya Gileadi alobaki boye: “Namonaka mbala mingi ete libondeli esalisaka ngai soki nazali na mokakatano ya kosolola na bato.” Soki ozali kokakatana koloba, salá libondeli ya mokuse na motema.—Neh. 2:4.
4. Mokano nini tosengeli komityela mpe mpo na nini?
4 Ndenge liloba yango emonisi, litatoli ya libaku malamu esɛngaka te ete tóbanda lisolo na maloba to vɛrsɛ moko oyo tobongisaki liboso. Tokoki kolonga kosala yango soki tomityeli mokano ya kobanda lisolo na moto kozanga kopesa likanisi ete tolingi kopesa litatoli. Basakoli mingi balobaka ete kosala bongo epesaka bango mpiko ya kobanda koyebisa bato nsango malamu. Soki moto alingi kosolola na biso te, ntina ya kotinda ye na makasi ezali te. Sukisá lisolo na boboto nyonso mpe kende na yo.
5. Nini esalisaka ndeko mwasi moko oyo azalaka nsɔninsɔni apesa litatoli ya libaku malamu?
5 Ntango ndeko mwasi moko oyo azalaka nsɔninsɔni akendaka kosomba biloko na zando, asalaka nyonso akutanisa miso na moto moko mpe na nsima asɛkisaka ye mwa moke. Soki moto yango asɛki, ndeko mwasi yango ayebisaka ye mwa likambo. Soki moto yango amonisi ete asepeli, yango etindaka ndeko mwasi yango akoba lisolo. Ayokaka moto yango na likebi mpo ayeba lisolo nini ekosepelisa ye. Mayele wana esalisaka ye akabola mikanda mingi mpe abanda koyekola na bato Biblia.
6. Ndenge nini tokoki kobanda lisolo na libaku malamu?
6 Ndenge ya kobanda lisolo: Tosengeli koloba nini mpo na kobanda lisolo? Mpo Yesu abanda lisolo na mwasi moko oyo akutanaki na ye pene ya libulu ya mai, asɛngaki ye mai ya komɛla. (Yoa. 4:7) Biso mpe tokoki kobanda lisolo soki topesi moto mbote ya esengo to totuni ye motuna. Ntango bozali kosolola, okoki koluka ndenge ya kolobela likanisi moko ya Biblia mpe ntango mosusu kolona mboto ya solo. (Mos. 11:6) Mpo na kobanda lisolo, bandeko mosusu balobaka mwa likambo moko oyo ekotinda moto aluka koyeba likambo yango malamu to atuna motuna. Na ndakisa, ntango ozali kozela monganga, okoki kobanda lisolo boye: “Nakosepela mingi ntango nakobanda kobɛla lisusu te.”
7. Ndenge nini koyeba kosalela miso ekoki kosalisa biso tópesa litatoli ya libaku malamu?
7 Koyeba kosalela miso ekoki mpe kosalisa biso tóbanda masolo na bato. Soki tomoni moboti moko oyo bana na ye bazali na bizaleli malamu, tokoki kopesa ye longonya mpe kotuna ye boye: “Nini esalisaki yo obɔkɔla bana na yo malamu boye?” Ndeko mwasi moko atyaka likebi na makambo oyo baninga na ye ya mosala balobaka mpe na nsima asololaka na bango na ntina na yango. Ntango ayokaki ete mwasi moko oyo basalaka na ye elongo azalaki komibongisa mpo na libala, apesaki ye Lamuka! moko oyo ezali kolobela ndenge ya kobongisa libala. Yango esalaki ete bákoba kosolola masolo ya Biblia.
8. Ndenge nini tokoki kosalela mikanda na biso mpo na kobanda masolo?
8 Lolenge mosusu ya kobandisa lisolo ezali ya kotánga mikanda na biso esika oyo bato bakoki komona biso. Ndeko mobali moko afungolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! na motó ya likambo moko oyo ezali kobenda likebi mpe abandaka kotánga yango na mongongo ya nse. Soki amoni moto moko pembeni na ye azali kotala zulunalo yango, atunaka ye motuna to alimbolaka mwa moke lisolo yango. Mbala mingi yango esalisaka ye abanda lisolo mpe apesa litatoli. Kotika mikanda na biso esika oyo baninga ya mosala to ya kelasi bakoki komona yango, ekoki kotinda bango bátuna mituna.
9, 10. (a) Ndenge nini tokoki koluka mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu? (b) Osilá komeka kosala yango?
9 Lukáká mabaku ya kopesa litatoli: Lokola mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu, tosengeli te kopesaka litatoli ya libaku malamu kaka soki libaku emonani. Tosengeli nde kolukaka mabaku ya kopesa bato litatoli ntango tozali na misala na biso ya mokolo na mokolo. Kanisá liboso mpo na bato oyo okokutana na bango mpe mibongisá mpo na kobanda lisolo na esengo. Simbáká Biblia na mabɔkɔ mpe zaláká na mikanda oyo okolakisa bato oyo bakosepela kosolola na yo.—1 Pe. 3:15.
10 Basakoli mingi oyo balukaka mabaku ya kosakola bazangaka te mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu. Ndeko mwasi moko oyo afandaka na ndako moko ya etaze, oyo bato bakɔtaka mpambampamba te, akendaka na eteni ya ndako yango esika bato basakanaka mpo na kosala lisano moko oyo elakisaka biloko kitoko oyo Nzambe asalá. Ntango bato batɛlɛmaka mpo na kotala bililingi yango, asalelaka libaku yango mpo na kobanda lisolo mpe koyebisa bango elaka ya “likoló ya sika ná mabele ya sika” oyo Biblia epesi. (Em. 21:1-4) Yo mpe okoki kokanisa ndenge ya koluka mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu?
11. Ndenge nini tokoki kolandela mposa ya moto oyo asepelaki na litatoli ya libaku malamu?
11 Landelá mposa oyo moto amonisi: Soki moto asepeli na nsango malamu, meká kolandela mposa yango. Soki ebongi, okoki koyebisa moto yango boye: “Nasepeli mingi ndenge tosololi. Nakokutana na yo wapi mpo tósolola lisusu?” Basakoli mosusu bapesaka moto yango adrɛsi mpe nimero na bango ya telefone mpe balobaka boye: “Nasepelaki na lisolo na biso. Soki olingi koyeba lisusu mingi mpo na likambo oyo tolobeli, adrɛsi mpe nimero na ngai ya telefone yango oyo.” Soki yo moko okoki kolandela mposa yango te, tondisá lokasa Veuillez suivre l’intérêt (S-43) mpe pesá sekrɛtɛrɛ ya lisangá na bino mpo atinda yango na lisangá oyo ezali na teritware esika moto yango afandaka.
12. (a) Mpo na nini tosengeli kokomaka mpe kopesaka lapolo ya bangonga oyo tolekisaka ntango topesaka litatoli ya libaku malamu? (b) Litatoli ya libaku malamu ebimisá matomba nini? (Talá etanda “Kopesa litatoli ya libaku malamu ebotaka mbuma!”)
12 Tosengeli kokoma ngonga oyo tolekisaka ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu. Yango wana, tóbosana te kokoma yango, ata soki tosali kaka mwa miniti moke na mokolo. Kanisá naino: Soki mosakoli nyonso apesi litatoli ya libaku malamu na boumeli ya miniti mitano na mokolo, yango ekobimisa bangonga koleka milio 17 na sanza!
13. Nini esengeli kotinda biso tópesa litatoli ya libaku malamu?
13 Tozali na bantina minene oyo etindaka biso tópesa litatoli ya libaku malamu: Bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bazalani na biso. (Mat. 22:37-39) Mitema na biso oyo etondi na botɔndi mpo na bizaleli ya Yehova mpe mikano na ye, etindaka biso tósakola ‘bonene ya nkembo ya bokonzi na ye.’ (Nz. 145:7, 10-12) Lokola tomibanzabanzaka mpenza mpo na bazalani na biso, yango etindaka biso tósalela libaku nyonso oyo ebongi mpo na kosakwela bango nsango malamu lokola ntango ezali naino. (Rom. 10:13, 14) Soki tokanisi liboso mpe tomibongisi malamu, biso nyonso tokoki kopesa litatoli ya libaku malamu mpe ntango mosusu koyoka esengo ya kosalisa bato ya mitema sembo báyeba solo.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Mpo tólonga, tosengeli komityela mokano ya kokutana na bato mpe kobanda lisolo na bango
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Basakoli mingi oyo balukaka mabaku ya kosakola bazangaka te mabaku ya kopesa litatoli ya libaku malamu
[Etanda na lokasa 5]
Toli mpo na kobanda lisolo
◼ Bondelá mpo ozwa makasi ya kobanda lisolo
◼ Poná bato oyo bazali na boboto mpe bamonani ete bazali na ntango mpo na kosolola na yo
◼ Luká kokutanisa miso na moto, sɛká moke mpe lobelá likambo oyo ekosepelisa yo mpe moto yango
◼ Yoká na likebi
[Etanda na lokasa 6]
Kopesa litatoli ya libaku malamu ebotaka mbuma!
• Ndeko mobali moko akendaki na garaje mpo bábongisela ye motuka na ye. Ntango azalaki kozela básilisa, apesaki litatoli epai ya bato oyo bazalaki pembeni na ye mpe apesaki bango nkasa ya libyangi mpo na koyangana na lisukulu ya bato nyonso. Mbula moko na nsima, na liyangani moko, ndeko moko oyo ye ayebaki te apesaki ye mbote na esengo mpenza. Ezalaki moko ya bato oyo apesaki nkasa ya libyangi na garaje mbula moko liboso! Mobali yango akendaki koyoka lisukulu yango, asɛngaki báyekola na ye Biblia mpe ye ná mwasi na ye bazwá batisimo.
• Ndeko mwasi moko oyo ayebaki solo na nzela ya litatoli ya libaku malamu amonaka ete teritware na ye, oyo ekeseni na bateritware mosusu, ezali bato oyo akutanaka na bango ntango akendaka na eteyelo ya bana na ye. Teritware na ye ezali baninga ya kartye mpe baboti oyo akutanaka na bango na eteyelo ya bana na ye mpe na makita oyo baboti basalaka. Mbala nyonso oyo ayebisaka bato nkombo na ye, abakisaka mwa maloba mpo na komonisa ete Biblia nde esalisaka ye abɔkɔla bana na ye malamu, na nsima akɔtaka na masolo mosusu. Lokola ye nde abandaka lisolo, amonaka ete ezalaka mpasi te akɔtisa lisolo ya Biblia. Na mayele wana asalisi bato 12 bázwa batisimo.
• Ntango mobali moko oyo asalaka na kompanyi moko ya asiranse akendaki kotala ndeko mwasi moko, ndeko mwasi yango apesaki ye litatoli. Atunaki ye soki akosepela kozala ntango nyonso nzoto kolɔngɔnɔ, na esengo mpe kozwa bomoi ya seko. Mobali yango andimaki mpe atunaki ndeko mwasi soki kompanyi nini ya asiranse ekoki kosala bongo. Ndeko mwasi alakisaki ye bilaka ya Biblia mpe apesaki ye moko ya mikanda na biso oyo asilisaki kotánga na mpokwa wana. Abandaki koyekola Biblia, koyangana na makita mpe na nsima azwaki batisimo.
• Ntango ndeko mwasi moko asalaki mobembo na mpɛpɔ, abandaki lisolo na mwasi oyo afandaki pembeni na ye mpe apesaki ye litatoli. Ntango bakitaki na mpɛpɔ, ndeko mwasi yango apesaki ye adrɛsi mpe nimero na ye ya telefone mpe alendisaki ye andima koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova soki bayei kotala ye. Mokolo oyo elandaki, Batatoli mibale bayaki kotala mwasi yango na ndako. Mwasi yango abandaki koyekola Biblia, akolaki noki, azwaki batisimo mpe eumelaki te ye mpe akómaki koyekola Biblia na bato misato.
• Ndeko mobali moko oyo azali na mbula 100 mpe akufá miso, oyo afandaka na ndako ya mibange, azalaka na momeseno ya koloba, “Tozali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe!” Maloba wana etindaka balifulumɛ mpe bato ya maladi bátuna mituna oyo epesaka ye likoki ya kolimbola soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini. Mwasi moko oyo asalaka kuna atunaki ndeko mobali yango soki akosala nini na Paradiso. Ndeko yango ayanolaki boye: “Nakomona, nakotambola lisusu mpe nakotumba kiti na ngai ya bibɔsɔnɔ.” Lokola amonaka te, asɛngaka mwasi yango atángela ye bazulunalo. Ntango mwana ya ndeko mobali wana akendaki kotala ye, mwasi wana oyo asalaka kuna asɛngaki ye nzela mpo amema bazulunalo yango na ndako. Lifulumɛ moko ayebisaki mwana ya ndeko wana boye: “Mikolo oyo, na ndako na biso ya mibange, tokómi kaka koloba: ‘Tozali na mposa ya Bokonzi ya Nzambe!’”
• Ndeko mwasi moko oyo azalaki na molɔngɔ na restora moko ayokaki mibange oyo bafandaki pembeni na ye bazali kolobela makambo ya politiki. Moko na bango alobaki ete guvɛrnema ekoki kosilisa bampasi na biso te. Ndeko mwasi alobaki na motema na ye: ‘Nasengeli te kozangisa libaku oyo.’ Asalaki libondeli ya mokuse mpe apusanaki pene na bango. Nsima ya koyebisa bango nkombo na ye, alobelaki guvɛrnema oyo ekosilisa bampasi ya bato, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe mpe apesaki bango mwa buku oyo azalaki na yango. Eumelaki te, patrɔ ya restora yango ayaki esika bazalaki. Ndeko mwasi yango akanisaki ete patrɔ akobengana ye. Nzokande, patrɔ yango ayebisaki ye nde ete azalaki kolanda lisolo mpe asengeli mpe na mwa buku yango. Mwasi moko oyo asalaka kuna, oyo azalaki mpe kolanda lisolo ayaki wana na mai ya miso na elongi. Azalaki koyekola Biblia liboso mpe alingaki kozongela boyekoli na ye.