Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/7 nk. 5-7
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baanzelu bazali bikelamu ya solo?
  • Baanzelu kati na mokano na Nzambe
  • Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?
  • Baanzelu kati na avenire na yo
  • Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Baanzelu—“Bilimo mpo na mosala ya bolamu ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Baanzelu bazali banani?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/7 nk. 5-7

Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?

BAANZELU bazali solo? Ezali bobele makanisi mpamba? Soko bazali solo, bakoki kosala eloko mpo na bomoi na yo?

Mpo na kopesa eyano ya solo na mituna oyo, tokoki bobele kozwa yango na Lisolo epemami oyo Nzambe apesaki epai na bato, elingi koloba Liloba na ye, Biblia Mosantu. Ntoma Paulo alobaki na ntina na yango: “Makomi nyonso mapemai na elimo na Nzambe mpe makoki kopesa litomba . . . mpo na kosembola.”​—2 Timote 3:16.

Na yango, tokoki mpenza kondima ete Biblia ekoteya biso solo na ntina na baanzelu mpe ekolakisa biso nini bazali kosala mpo na bomoi na biso. Mozalisi ya mokili nde akoki mpo na koyebisa soki azalisaki baanzelu.

Baanzelu bazali bikelamu ya solo?

Biblia elobi polele: “(Nzambe) azali kozalisa baanzelu na ye bilimu.” (Baebele 1:7, MN) Mozalisi azali bongo na bikelamu ya elimo kati na makolo, bikelamu bizangi komonana na miso ya bato mpe bizali makasi.​—Nzembo 104:4; 2 Petelo 2:11.

Nzambe asalaki baanzelu mpo bazala lokola bililingi mpamba? Soki ezala bongo, mpo na nini baanzelu oyo bayebisameli biso na Biblia bazali na mayoki? Na ndakisa, ezali koyebisa biso ete na eleko oyo mabelé mazalisamaki baanzelu “bayembaki elongo moko mpe . . . bana nyonso na Nzambe bangangaki na esengo.”​—Yobo 38:4-7.

Emonani ete lokola bikelamu ya mabelé oyo bazali mayele, bikelamu na elimo ya mayele, elingi koloba baanzelu, bazali mpe na bomoto na bango mpenza. Ata Biblia ebimisi bobele nkombo ya mibale kati na bango (Michel mpe Gabriel), lokola baanzelu bazali na nkombo, yango endimisi ete bazali na bomoto. (Luka 1:11, 19, 26; Yuda 9) Biblia epekisi makasi kosambela baanzelu. Tala ndenge ntoma Paulo alobi na biso tosala na esika ete tosambela baanzelu: “Bomitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi.”​—Bafilipi 4:6; Emoniseli 19:10; 22:8, 9.

Kasi baanzelu bazalisamaki kozanga bonsomi ya kopona bango moko, kati na malamu mpe mabe, lokola ba robots? Ezali bongo te; lokola bato, baanzelu basalama na bonsomi ya kopona likambo balingi. Na ndakisa, bamoko kati na bango babukaki mibeko ya Nzambe na mikolo ya Noa, yango wana Nzambe abenganaki bango mpe alongolaki bango liboso na ye kuna na makolo. Soki bazangaki kotosa, elimboli ete bazalaki mpenza na bomoto.​—Genese 6:1, 2; 2 Petelo 2:4; Matai 25:41.

Biblia ezali bongo kopesa biso makanisi ya ntina mpo na eutelo, bomoi mpe motindo na baanzelu. Koloba makambo mosusu likolo na oyo Biblia elobi ekotinda kokanisa mpambampamba likolo na makambo oyo Biblia eyanoli te. Tokoki ata kobanda kosepela na baanzelu na ndenge ya mabe to kosambela bango. (Bakolose 2:18) Biblia elendisi biso ete ‘toyekola makambo maleki ntina’ mpe tosakola makambo mosusu te ‘likolo na oyo esakolami lokola nsango malamu’.​—Bafilipi 1:10; Bagalatia 1:8.

Baanzelu kati na mokano na Nzambe

Ata bato mingi bazali na likanisi moko mpo na ebandeli mpe motindo na baanzelu, mingi te bayebi mpenza ntina na bango mpe ndenge oyo bazali kopusa bomoi na biso lelo.

Kati na Biblia, maloba mibale oyo mabongolami na “anzelu” mazali mal’akh (hébreu) mpe aggélos (greke), oyo nyonso mibale elimboli “momemi​—nsango”. Ezali bongo moko kati na misala na baanzelu: bazali bamemi-nsango, to bayebisi na nsango na Nzambe epai na bato.

Na ndakisa, Nzambe atindaki anzelu moko akenda koyebisa epai na Abrahame nsango etali mwana na ye lsaka mpe lipamboli oyo ekozwama na nzela na ye, mpe oyo biso tokoki kozwa. (Genese 22:11-17) Atindaki anzelu moko mpo na kosolola na Moise, (Misala 7:37, 38) lisusu mpo na kopesa malako epai na mosakoli Elie. (2 Mikonzi 1:3) Ezalaki lisusu anzelu nde abimelaki Joseph, tata mobokoli ya Yesu, anzelu yango azalaki momemi na malako ya sipesiale na ntina ya mwana.​—Matai 2:13.

Nzambe atindaki mpe baanzelu mpo na kobatela libota na ye: “Mwanze na Jéhovah akozingela esika na baoyo bakotosaka ye: mpe akobikisaka bango.” (Nzembo 34:7) Na ndakisa, ezali anzelu nde abimisaki Petelo kati na boloko. (Misala 12:6-11) Lota mpe bana na ye ya basi babikaki mpo na baanzelu mibale oyo babimisaki bango ntango Sodome mpe Gomore ebomamaki. Nzokande, mwasi ya Lota atosaki malako ya baanzelu te; abomamaki nzela moko na bingumba yango.​—Genese 19:1-26.

Biblia elobeli makambo mosusu mingi oyo baanzelu basalaki, mpe yango ezali kondimisa maloba mazwami kati na Baebele 1:7, 14; “Mpo na baanzelu alobi ete, Akosalaka baanzelu na ye bilimu, mpe basali na ye epeleli na moto.’ Banzelu nyonso bazali bilimu na mosala bakotindamaka mpo na kosalela baoyo balingi kozwa libula na lobiko, boye te?”

Anzelu moko alendisaki Yesu. Na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu ayebaki makambo mazalaki kozela ye: alingaki kotekisama, kobetama mpe kobomama na liwa ya nsomo. Esengelaki na ye makasi mpo na koyika mpiko liboso na momekamo yango mpe kotikala sembo. Ezali na ntango ya mpasi nde anzelu moko abimelaki ye ‘mpo na kolendisa ye’. Elendiseli yango ezalaki na ntina mingi mpo na ye mpamba te, ata ayokaki mawa na boye ete “kotoka na ye ezalaki lokola matanga minene na makila kokwea na mabelé”, atikalaki sembo kino liwa.​—Luka 22:43, 44.

Nzambe asalelaki mpe baanzelu mpo na koboma banguna ya libota na ye, na ndakisa ntango Nguya ya mokili mobimba ya Assyrie na ntango ya kala elingaki kobundisa basambeli na Jéhovah Nzambe. Totangi boye: “Na butu yango, mwanze na Jéhovah abimaki mpe abetaki kati na efandelo na Baasulia bato nkoto mokama na ntuku mwambe na mitano. Elongwaki bango na mpongi na ntongontongo, tala bazalaki nyonso bibembe.” (2 Mikonzi 19:35) Tala makasi ya baanzelu: moko akokaki mpo na koboma banguna 185 000 ya Nzambe mpe ya libota na ye!

Hérode, motuki-Nzambe, ye mpe amonaki makasi ya anzelu moko. Ntango amitangaki ete akokani na Nzambe “Mwanze na Jéhovah abeti ye nokinoki, ntina ete apesi Nzambe lokumu te, mpe alyami na nkiso, mpe akufi.”​—Misala 12:21-23.

Toyebi ete, na mikolo mizali koya, Nzambe akosalela lisusu baanzelu, lokola babomi mpo na kotya nsuka na biloko mabe ya ntango oyo. “Mwana na moto akotinda baanzelu na ye mpe bakolokota kati na bokonzi na ye makambo nyonso makoyokisa nsoni mpe nyonso bakosalaka mabe. Mpe bakobwaka bango kino fulu na moto.”​—Matai 13:41, 42.

Na yango, makanisi oyo bato bazali kozwa mpo na baanzelu ezali ya solo te. Manfred Barthel, mokomi na makambo na lingomba, ye moAllemand, akomaki boye: “Soko tolingi komonela baanzelu ya Nkolo ndenge moko na bakomi ya Ancien Testament, esengeli na biso kobosana naino ba chérubins bavimbana . . . oyo batyelaka biso na ba cartes.”​—Oyo Biblia elobi mpenza.

Baanzelu bazali kosala nini mpo na yo?

Motuna mosusu yango oyo: Baanzelu bazali kosala nini lelo? Awa ezali biso koloba, bazali na bopusi likolo na biso? Na ntembe te!

Tomikundola ete na esakweli oyo etali “nsuka ya mokili” Yesu alobaki: “Ekoya mwana na moto na nkembo na ye (na nguya ya Bokonzi), mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango.”​—Matai 24:3; 25:31, 32.

Ndenge nini kokabolama yango ezali kosalema? Yesu alobaki: “Mpe nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Na yango, Nzambe azali kosalela libota na ye awa na mabelé mpo na kokokisa mosala yango ya kosakola kati na mokili mobimba.

Bokonzi ya Nzambe ezali Boyangeli oyo ekoya kosilisa bampasi na bato. Bokonzi yango ezali nsango oyo ba Témoins de Jéhovah koleka 3 milió basimbami na baanzelu, bazali kosakola kati na mokili mobimba. “Ekozala boye na nsuka na ekeke; baanze bakobima mpe bakolongola bato mabe kati na bato malamu.”​—Matai 13:49.

Lelo oyo mosala ya kosakola oyo etambwisami na baanzelu ezali koyambama na ndenge malamu te epai na bato. Bamoko bazali koloba ete bazali na ntango te mpe bamosusu baboi koyoka yango; ezali mpe na baoyo bazali kokakatana. Kasi bato mingi kati na baoyo bazali sembo mpe bazali komibanzabanza mpo na avenire na bango bazali koyamba yango malamu. Mbuma na yango ezali nini?

Kati na mikili 208, ba Témoins de Jéhovah bazali kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na bamilio ya bato oyo bazali koyeba ‘bamposa na bango ya elimo’ mpe oyo bazali na ‘mposa ya bosembo’. (Matai 5:3, 6) Mbala mingi, baanzelu basili kotambwisa basaleli ya Nzambe epai na bato ya motema sembo mpo na komemela bango nsango oyo ya lobiko. Emoniseli 14:6 elobeli na ndenge ya elilingi ‘anzelu oyo azali kopumbwa na likolo’ na “nsango malamu na seko mpo na kosakola na bafandi na mokili”. Ezali yango mpenza nde ezali kosalema sikawa. Yango etali avenire na yo na likambo nini?

Baanzelu kati na avenire na yo

Biblia emonisi malamu eleko na biso ete ezali “mikolo ya nsuka” ya biloko mabe ya ntango oyo. (2 Timote 3:1-5) Emonisi mpe lisusu ete baanzelu ‘batelemi na nsuka nyonso minei na mokili mpe basimbi makasi mipepe minei’. (Emoniseli 7:1) Ndimbola ya elakiseli oyo ezali nini?

Etelemi bango na “bansuka” ya mabelé baanzelu bazali pene mpo na kotika “mipepe” ya libebi longwa na bipai nyonso ya mokili. Esika moko te ya mabelé ekozanga kozwa libebi, yango elingi koloba ete “mpasi” to libebi, ekoya likolo na biloko mabe ya ntango oyo mpe basangani na yango. Elakiseli yango ezali bongo kolobela baanzelu oyo bamibongisi mpo na kosala mosala na bango soko etinda epesami.​—Emoniseli 7:3; 19:11-21.

Nzokande “mpasi” ekokwela bobele baoyo bazali koboya koyamba nsango oyo esakolami lelo na mabelé mobimba na lisalisi ya baanzelu. Kasi baoyo bazali koluka Nzambe mpe bazali koyoka nsango ya Bokonzi bakobebisama te. Bakobatelama, lokola emonisi yango Liloba ya Nzambe: “Boluka Jéhovah, bino basokemi nyonso na mokili . . . Boluka boyengebene, boluka bopolo, soko nde bokobombana na mokolo na nkanda na Jéhovah.”​—Sofoni 2:3.

Nsuka ya “basokemi” yango ekozala boni? Nzembo 37:11 elobi: “Nde bato na bopolo bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya na solo.” Mpe yango ekozala mpo na ntango boni? “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) Bomoi ya seko ekokoma likambo ya solo kati na mokili oyo, lokola Jéhovah alobaki yango, ekobongolama na paradis.​—Luka 23:43.

Na yango, omituna motuna oyo: ‘Avenire na ngai ekozala nini’? Eyano etali bobele mokano na yo na ndenge okondima litambwisi ya baanzelu. Ntango Batemwe bakomemela yo nsango oyo bango baanzelu bazali kosunga, okoyoka yango mpe okotosa yango? Soki ee, okozala kati na bato oyo bakoki kolikya malamu mpo na mikolo mizali koya, balendisami na elaka oyo ya Nzambe: “Mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe akoumela seko.”​—1 Yoane 2:17.

[Elilingi na lokasa 7]

Lelo oyo, baanzelu ’bazali kosimba mipepe minei’. Mpo na nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto