Baanzelu basalaka nini mpo na biso?
MOSAKOLI Danyele amonaki baanzelu ya Nzambe na emonaneli moko; na nsima akomaki boye: “[Baanzelu] nkóto nkóto basalelaki [Nzambe], mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.” (Danyele 7:10) Vɛrsɛ yango emonisi ntina oyo Nzambe akelaki baanzelu. Akelaki bango mpo básalelaka ye mpe bátosaka malako na ye.
Nzambe atindaka mpe baanzelu mpo na kosala makambo mosusu mpo na bato. Tokotalela ndenge oyo asalelaka bango mpo na kolendisa mpe kobatela basaleli na ye, koyebisa nsango na ye epai ya bato, mpe kopesa bato mabe etumbu.
Baanzelu balendisaka mpe babatelaka
Banda bikelamu ya elimo bamonaki ndenge Nzambe azalisaki mabelé, mobali mpe mwasi ya liboso, batyelaka bato likebi mpenza. Liboso aya awa na mabelé, Yesu Klisto oyo amonisami na elilingi ya bwanya, alobaki boye: “Esengo na ngai ezalaki kati na bana na bato.” (Masese 8:31) Biblia eyebisi biso mpe ete “baanzelu bazalaka na mposa ya kotalatala” makambo oyo basakoli ya Nzambe balobaki na ntina na Klisto mpe na ntina na makambo oyo ekoya.—1 Petelo 1:11, 12.
Baanzelu bamonaki ete bato mingi bazalaki te kosalela Mozalisi na bango oyo atondi na bolingo. Na ntembe te, likambo yango epesaki baanzelu ya sembo mawa mingi! Nzokande, soki moto moko ya masumu abongoli motema mpe azongi epai ya Yehova, “esengo ezalaka epai ya baanzelu.” (Luka 15:10) Baanzelu bamibanzabanzaka mingi mpo na bolamu ya bato oyo basalelaka Nzambe, mpe Yehova asalelaki bango mbala mingi mpo na kolendisa mpe kobatela basaleli na ye ya sembo awa na mabelé. (Baebele 1:14) Tótalela mwa bandakisa.
Ntango Nzambe abebisaki Sodoma mpe Gomola, bingumba mibale ya mabe, baanzelu mibale babikisaki Lota, moto ya sembo, mpe bana na ye ya basi na ndenge bamemaki bango mosika ya bingumba yango.a (Genese 19:1, 15-26) Bankama ya bambula na nsima, mosakoli Danyele abwakamaki na libulu ya bankɔsi, kasi azwaki likama moko te. Mpo na nini? Alobaki boye: “Nzambe na ngai atindaki anzelu na ye, mpe azipaki minɔkɔ ya nkɔsi.” (Danyele 6:22) Baanzelu basungaki Yesu na ebandeli ya mosala na ye awa na mabelé. (Malako 1:13) Mpe mwa moke liboso ya liwa na ye, anzelu moko abimelaki ye mpe “alendisaki ye.” (Luka 22:43) Lisungi ya baanzelu wana elendisaki mpenza Yesu na bantango wana ya mpasi na bomoi na ye! Lisusu, ezali anzelu nde abimisaki ntoma Petelo na bolɔkɔ.—Misala 12:6-11.
Baanzelu babatelaka mpe biso lelo oyo? Soki tozali kosalela Yehova na ndenge oyo Liloba na ye ezali koteya, tokoki kolikya ete bikelamu yango ya nguya mingi bakobatela biso. Biblia elobi boye: “Anzelu ya [Yehova] akozingela esika ya baoyo bakotosaka ye; mpe akobikisa bango.”—Nzembo 34:7.
Kasi, tosengeli kobosana te ete mokumba ya libosoliboso ya baanzelu ezali ya kosalela Nzambe, kasi bato te. (Nzembo 103:20, 21) Basalaka kaka makambo oyo Nzambe atindaka bango, kasi te makambo oyo bato basɛngi bango. Yango wana, na ntango tozali na mposa ya lisalisi tosengeli nde kobondela Yehova Nzambe, kasi baanzelu te. (Matai 26:53) Lokola tomonaka baanzelu te, tokoki koyeba te na meko nini Nzambe asalelaka bango mpo na kosalisa bato na makambo ndenge na ndenge. Kasi, toyebi ete Yehova ‘amonisaka nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.’ (2 Ntango 16:9; Nzembo 91:11) Tozali mpe na elikya ete “ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano [ya Nzambe], akoyoka biso.”—1 Yoane 5:14.
Biblia eyebisi biso mpe ete tosengeli kotinda mabondeli na biso mpe kopesa losambo na biso kaka epai ya Nzambe. (Exode 20:3-5; Nzembo 5:1, 2; Matai 6:9) Baanzelu ya sembo balendisaka biso tósala bongo. Na ndakisa, ntango ntoma Yoane alukaki kosambela anzelu moko, ekelamu yango ya elimo apamelaki ye, alobaki na ye boye: “Kebá! Kosala bongo te! . . . Sambelá Nzambe.”—Emoniseli 19:10.
Baanzelu bamemaka nsango ya Nzambe
Liloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolami na “anzelu” elimboli “momemi-nsango,” mpe yango ezali lolenge mosusu oyo baanzelu basalelaka Nzambe—bamemelaka bato nsango na ye. Na ndakisa, “anzelu Gabiliele atindamaki na Nzambe na engumba moko ya Galilai nkombo na yango Nazalete.” Mpo na nini? Mpo na koyebisa Malia, elenge mwasi moko oyo ayebaki naino mibali te, ete akozwa zemi mpe akobota mwana mobali oyo akobengama Yesu. (Luka 1:26-31) Lisusu, anzelu moko atindamaki epai ya babateli ya mpate oyo bazalaki na elanga mpo na koyebisa bango ete “Klisto Nkolo” abotami. (Luka 2:8-11) Ndenge moko mpe, baanzelu bamemaki nsango ya Nzambe epai ya Abalayama, Moize, Yesu, mpe bato mosusu oyo Biblia elobeli.—Genese 18:1-5, 10; Exode 3:1, 2; Luka 22:39-43.
Lelo oyo ndenge nini baanzelu basalelaka Nzambe lokola bamemi-nsango? Tótalela mosala oyo Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakosala liboso ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo eya. Alobaki boye: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:3, 14) Mbula na mbula, Batatoli ya Yehova balekisaka bangonga koleka miliare moko na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Kasi oyebaka ete baanzelu mpe basanganaka na mosala yango? Ntoma Yoane alobelaki emonaneli moko oyo azwaki na maloba oyo: “Namonaki anzelu mosusu . . . , mpe azalaki na nsango malamu ya seko mpo na kosakola lokola nsango ya esengo epai ya baoyo bazali kofanda na mabelé, mpe epai ya bikólo nyonso mpe mabota nyonso mpe minɔkɔ nyonso.” (Emoniseli 14:6, 7) Mokapo yango emonisi mosala ya ntina mingi oyo baanzelu bazali kosala mpo na bato lelo oyo.
Batatoli ya Yehova bamonaka mpenza ete baanzelu batambwisaka bango na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako. Mbala mingi, bakutanaka na bato oyo balobaka na bango ete bazalaki kobondela mpo bákutana na moto moko oyo akosalisa bango báyeba mikano ya Nzambe. Litambwisi ya baanzelu mpe milende ya Batatoli ya Yehova ezali kosala ete mbula na mbula ebele ya bato báyeba Yehova. Tozali kolendisa yo mpo oluka kozwa litomba na mosala ya kobikisa bomoi ya bato oyo baanzelu bazali kotambwisa.
Baanzelu bakokisaka bitumbu ya Nzambe
Atako baanzelu bazali na lotomo te ya kosambisa bato, bazali mpe batali mpamba te. (Yoane 5:22; Baebele 12:22, 23) Na ntango ya kala, bazalaki kokokisa bitumbu ya Nzambe. Na ndakisa, Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kobundisa Baezipito oyo bakangaki Bayisalaele na boombo. (Nzembo 78:49) Lisusu, na butu moko mpamba “anzelu ya Yehova” abomaki basoda 185 000 na kaa moko ya banguna ya libota ya Nzambe.—2 Mikonzi 19:35, NW.
Na mikolo ezali koya, Nzambe akosalela mpe baanzelu mpo na kopesa etumbu. Yesu akoya “elongo na baanzelu na ye ya nguya na kati ya mɔtɔ ya kopela, ntango akozongisa mabe na baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali te kotosa nsango malamu.” (2 Batesaloniki 1:7, 8) Kasi, etumbu yango ekopesama kaka epai ya bato oyo bazali koboya nsango oyo ezali kosakolama lelo oyo na mokili mobimba na litambwisi ya baanzelu. Baoyo bazali koluka Nzambe mpe kotosa mateya ya Biblia bakokufa te.—Sefania 2:3.
Tosengeli kozala na botɔndi mpo na baanzelu ya sembo oyo bakokisaka ntango nyonso malako ya Nzambe! Yehova asalelaka bango mpo na kosunga mpe kobatela basaleli na ye ya sembo. Yango esengeli kolendisa biso mpamba te ezali na bikelamu mosusu ya elimo oyo bazali mabe; babengami bademo mpe balukaka konyokola biso.
Bademo bazali banani?
Na boumeli ya bikeke 15 oyo elekaki banda Satana akosaki Eva na Edene tii na ntango ya Noa, baanzelu bamonaki ete Satana Zabolo alongaki kolongola bato nyonso na nzela ya Nzambe, longola kaka mwa bato moke ya sembo lokola Abele, Enoka, mpe Noa. (Genese 3:1-7; Baebele 11:4, 5, 7) Baanzelu mosusu mpe balandaki nzela ya Satana. Biblia elobi ete bilimo yango bazangaki botosi “na mikolo ya Noa.” (1 Petelo 3:19, 20) Ndenge nini bamonisaki kozanga botosi?
Na mikolo ya Noa, baanzelu ebele, oyo motángo na bango eyebani te, batikaki esika na bango na kati ya libota ya Nzambe na likoló, bayaki awa na mabelé, mpe balataki nzoto ya mosuni. Mpo na nini? Bakolisaki mposa ya kosangisa nzoto na basi. Babotaki na bango bana oyo babengamaki Banefilime; bana yango bakómaki bilombe mpe bato ya mobulu. Lisusu, “masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango ezalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.” Kasi, Yehova Nzambe atikaki te ete mabe yango ekoba. Atindaki Mpela oyo ebomaki bato nyonso ya mabe ná Banefilime. Kaka bato ya sembo oyo bazalaki kosalela Nzambe nde babikaki.—Genese 6:1-7, 17; 7:23.
Baanzelu wana oyo bakómaki batomboki bakufaki te na Mpela. Batikaki nzoto na bango ya mosuni mpe bazongaki na likoló lokola bikelamu ya elimo. Banda wana, bakómá kobengama bademo. Bamityá na ngámbo ya Satana Zabolo, oyo abengami “moyangeli ya bademo.” (Matai 12:24-27) Lokola moyangeli na bango, bademo mpe balukaka ete bato básambela bango.
Bademo bazali bikelamu ya mabe, kasi tosengeli te kobanga bango. Bazali na nguya nyonso te. Ntango baanzelu wana oyo batombokaki bazongaki na likoló, Nzambe atikaki bango te básangana ná baanzelu na ye ya sembo. Bazalaki lisusu kozwa te pole ya elimo oyo eutaka epai ya Nzambe, mpe bazali na elikya ata moko te mpo na mikolo ezali koya. Babwakamá na Tartare, yango ezali ezalela ya molili ya elimo. (2 Petelo 2:4) Yehova akangaki bango na “minyɔlɔlɔ ya seko,” yango wana bazali na molili ya elimo. Bazalaka mpe lisusu na likoki ya kolata nzoto ya mosuni te.—Yuda 6.
Osengeli kosala nini?
Bademo basalaka mpe makambo na bomoi ya bato lelo oyo? Ee, basalelaka “mayele mabe” ndenge moko na moyangeli na bango Satana Zabolo. (Baefese 6:11, 12) Kasi, soki tolandi toli ya Liloba ya Nzambe, tokoki kotɛmɛla bademo. Lisusu, baanzelu ya nguya babatelaka bato oyo balingaka Nzambe.
Ezali na ntina mpenza ete oyekola masɛngami ya Nzambe oyo ezali na Biblia mpe otosa yango! Okoki koyekola mateya ya Biblia soki okutani na Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi to otindi mokanda epai ya babimisi ya zulunalo oyo. Batatoli ya Yehova bakosepela koyekola na yo Biblia ofele mpe na ngonga oyo okolinga.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Biblia, mbala nyonso oyo baanzelu babimelaki bato, bamimonisaki na motindo ya mibali oyo bazali mikóló.
[Etanda na lokasa 6]
NDENGE OYO BAANZELU BABONGISAMÁ
Yehova azali na baanzelu ebele mpe abongisá bango boye:
Anzelu oyo aleki na nguya mpe na bokonzi ezali Mikaele anzelu-mokonzi, to Yesu Klisto. (1 Batesaloniki 4:16; Yuda 9) Baselafa, bakeluba, mpe baanzelu mosusu bazali na nse na ye.
Baselafa bazali na esika monene na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Basalaka na kiti ya bokonzi ya Nzambe. Mosala na bango ezali ya kosakola bosantu ya Nzambe mpe kobatela bato na ye pɛto na elimo.—Yisaya 6:1-3, 6, 7.
Bakeluba bamemaka kiti ya bokonzi ya Nzambe mpe basimbi bokonzi monene ya Yehova.—Nzembo 80:1; 99:1; Ezekiele 10:1, 2.
Baanzelu mosusu bazali bamonisi ya Yehova, mpe bakokisaka mokano na ye.
[Elilingi na lokasa 4]
Baanzelu bamemaki Lota ná bana na ye ya basi na esika oyo ezangi likama
[Elilingi na lokasa 5]
Anzelu ayebisaki ntoma Yoane, oyo alukaki kosambela ye, ete: “Kosala bongo te!”
[Elilingi na lokasa 6]
Baanzelu bakokisaka bitumbu ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 7]
Ozali kozwa litomba na mosala ya kosakola oyo etambwisami na baanzelu?