Ndenge oyo Baanzelu bakoki kosalisa yo
LILOBA ya Nzambe emonisi ete baanzelu bazali. Eyebisi biso ete bikelamu yango ya elimo bizali mingi mpenza. Danyele, mosaleli ya Yehova Nzambe amonaki makambo ya likoló na kati ya emonaneli mpe akomaki ete: “Nkóto nkóto basalelaki [Nzambe], mpe nkóto zomi mbala nkóto zomi batɛlɛmaki liboso na ye.”—Danyele 7:10.
Tósimba ete Danyele asuki te bobele na koyebisa biso ete baanzelu bazali ebele. Alobi lisusu ete baanzelu basalelaka Nzambe. Bazali basaleli na ye. Yango wana, mokomi na nzembo ayembaki ete: “Bósanzola [Yehova] bino [baanzelu, NW] na ye na likoló, bino boleki na nguya, bino bokotosaka ye, ekoyokaka bino mongongo na ye. Bósanzola [Yehova], [bibele] na ye nyonso, basali na ye baoyo bakosalaka mokano na ye.”—Nzembo 103:20, 21.
Lisusu, Biblia elobi te ete baanzelu bazalaki liboso bato awa na mabelé. Yehova azalisaki baanzelu na likoló liboso ete azalisa mabelé. Ntango Nzambe ‘atyaki miboko na mokili, bana nyonso ya Nzambe [elingi koloba baanzelu], bangangaki na esengo.’—Yobo 38:4-7.
Baanzelu bazali bikelamu ya elimo—bamonanaka te, bazali na nguya, mpe bazali na mayele. Na kati ya Biblia, ezali bongo liloba ya Liebele mal·ʼakhʹ mpe liloba ya Greke agʹge·los nde ebongolamaka na “anzelu” soki etaleli bikelamu ya elimo. Tozali kokuta maloba yango pene na mbala 400 na kati ya Biblia. Maloba yango nyonso mibale ezali na ndimbola moko; elimboli “momemi-nsango.”
Bokutani na baanzelu
Baanzelu bazali mpenza bamemi-nsango. Mbala mosusu oyebi malamu lisolo ya Biblia oyo elobeli anzelu Gabaliele ntango abimelaki Malia. Alobaki na ye ete atako asanganaki naino na mobali te, akozwa zemi mpe akobota mwana mpe akopesa ye nkombo Yesu. (Luka 1:26-33) Anzelu moko mpe abimelaki babateli ya mpate oyo bazalaki na lisobe. Ayebisaki bango ete: “Mobikisi, ye Klisto Nkolo, abotameli bino lelo.” (Luka 2:8-11) Bobele bongo, baanzelu bamemaki nsango epai ya Agala, Abalayama, Lota, Yakobo, Mose, Gideona, Yesu, mpe bato mosusu oyo Biblia elobeli.—Genese 16:7-12; 18:1-5, 10; 19:1-3; 32:24-30; Exode 3:1, 2; Basambisi 6:11-22; Luka 22:39-43; Baebele 13:2.
Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete, bansango nyonso oyo baanzelu bamemaki ezalaki na boyokani na kokokisama ya mikano ya Nzambe kasi bobele na mikano ya bato oyo bazwaki bansango yango te. Baanzelu babimelaki bato lokola bamonisi ya Nzambe, na boyokani na mokano na ye mpe na ntango oyo ye moko aponaki. Bato bazalaki kobéngisa bango te.
Tosengeli nde kobelela baanzelu mpo ete básalisa biso?
Ebongi ete tóbelela baanzelu ntango tozali na mpasi? Soki ezali boye, tosengeli naino koyeba nkombo ya anzelu oyo akoki mpenza kosalisa biso. Yango wana, na babuku mosusu oyo ezali kotɛkama, ezali na bankombo ya baanzelu mingi, bakisa mpe lokumu na bango, etɛlɛmɛlo na bango, mpe mikumba na bango. Buku moko etángi nkombo ya baoyo buku yango ebéngi ete “baanzelu zomi oyo baleki lokumu na likoló,” “baanzelu yango bayebani mingi na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika ya Nɔrdi.” Pembeni ya bankombo wana, bapesi mpe toli ete osengeli kokanga miso na yo, kozongela nkombo ya anzelu malɛmbɛmalɛmbɛ mpe mbala mingi, kobenda mpema makasi, kopema malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe “komibongisa mpo na kosolola na bango.”
Nzokande, Biblia epesi biso bobele nkombo mibale ya baanzelu ya sembo: Mikaele na Gabaliele. (Danyele 12:1; Luka 1:26) Ekoki kozala ete bapesi nkombo wana mpo na komonisa ete anzelu mokomoko azali ekelamu ya elimo oyo ezali na nkombo, kasi ezali bobele nguya mpamba te.
Likambo oyo ezali kobenda likebi ezali ete baanzelu mosusu baboyaki koyebisa bato bankombo na bango. Ntango Yakobo atunaki anzelu moko nkombo na ye, aboyaki koyebisa yango. (Genese 32:29) Ntango Yosua atunaki anzelu oyo abimelaki ye soki azali nani, alobaki kaka ete azali “mokonzi na basoda na [Yehova].” (Yosua 5:14) Ntango baboti ya Samasona batunaki anzelu moko nkombo na ye, alobaki ete: “Otuni ngai nkombo na ngai mpo na nini, awa ezali yango na kokamwa?” (Basambisi 13:17, 18) Lokola Biblia epesi bankombo ya baanzelu te, ebateli biso ete tóluka te kopesa baanzelu lokumu mpe losambo, mpamba te ebongi na bango te. Ndenge tokomona yango, Biblia etindi biso mpe te ete tóbelela bango.
Tóbelela Nzambe
Biblia eyebisi biso makambo nyonso oyo tosengeli koyeba mpo na bikelamu ya elimo. Ntoma Paulo akomaki: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya . . . ete moto na Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo asɛlingwi mpenza mpo na mosala nyonso malamu.” (2 Timote 3:16, 17, NW) Soki Nzambe alingaki ete tóyeba bankombo ya baanzelu mingi, mbɛlɛ akomisaki yango na Liloba na ye, Biblia. Mpe soki Nzambe alingaki kolakisa biso ndenge ya koyokana na baanzelu mpe kosolola na bango na libondeli, mbɛlɛ ayebisaki yango na kati ya Makomami.
Nzokande, Yesu Klisto ateyaki ete: “Wana ekobondela yo, [kɔtá] na eteni na yo na ndako mpe [kangá] ekuke, mpe bondelá epai na Tata na yo oyo azali na nkuku . . . Bino bóbondela boye ete, Tata na biso oyo azali na Likoló, Nkombo na yo ezala mosantu.” (Matai 6:6, 9) Likanisi ya Makomami ezali boye: Tosengeli kobelela baanzelu te to kobondela bango te, kasi tosengeli kobondela Mozalisi ya baanzelu, elingi koloba Nzambe ye moko. Nkombo na ye ezali libombami te, mpe tozali na mposa ya moto oyo amonaka bimonaneli te mpo ayebisa biso yango. Atako bato balukaki kolimwisa nkombo ya Nzambe, tozali kokuta yango koleka mbala 7 000 na kati ya Biblia. Na ndakisa, mokomi na nzembo ayembaki boye mpo na Tata na biso ya likoló: “Yo oyo azali na nkombo [Yehova] Oyo-Aleki-Likoló na mokili mobimba.”—Nzembo 83:18.
Yehova azangaka ntango ya koyoka biso te soki tolingi kososola na ye na ndenge ebongi na libondeli. Biblia elobi na biso boye: “Zambi miso na [Yehova] ikotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”—2 Ntango 16:9.
Baanzelu mpe etamboli malamu
Na bokeseni na ndenge oyo babuku mpe bafilime emonisaka bango mbala mingi, baanzelu basambisaka bato te. Ezali mpenza bongo mpamba te baanzelu bazali na ndingisa ya kosambisa bato te. Yehova azali “Mosambisi na nyonso,” atako “asili kopesa kosambisa nyonso epai na Mwana,” Yesu Klisto. (Baebele 12:23; Yoane 5:22) Atako bongo, ezali libunga na kokanisa ete baanzelu batyelaka etamboli na biso likebi te. Yesu alobaki: “Esengo ekozala bongo kati na [baanzelu, NW] na Nzambe mpo na moto moko na masumu oyo abongoli motema.”—Luka 15:10.
Kasi, baanzelu bazali bobele batali mpamba te. Na ntango ya kala, basalaki mosala lokola bakokisi ya bitumbu ya Nzambe. Na ndakisa, Nzambe asalelaki baanzelu mpo na kobɛta Baezipito ya kala. Nzembo 78:49 elobi ete, “abwakaki likoló na bango nkanda na ye makasi; nkɛlɛ, nkanda mpe mpasi, koyangana na bantoma [“baanzelu,” NW] na kobebisa.” Bobele bongo, Biblia elobi ete na butu moko anzelu moko abomaki basoda 185 000 ya Asulia.—2 Mikonzi 19:35.
Bobele bongo, na mikolo mizali koya, baanzelu bakoboma bato oyo, lokola baboyi kotosa mibeko ya sembo ya Nzambe, bazali kobebisa bolamu ya bato mosusu. Yesu akoya “esika moko na [baanzelu, NW] na ye na nguya, kati na epelelo na mɔ́tɔ ete apesa bato mabe etumbu baoyo bayebi Nzambe te mpe bazangi kotosa Nsango Malamu.”—2 Batesaloniki 1:7, 8.
Na yango, Makomami emonisi ete baanzelu ya sembo ya Nzambe basalaka ntango nyonso mokano na ye, bakokisaka malako na ye mpe batosaka mibeko na ye ya sembo. Ezali polele ete soki tolingi baanzelu básalisa biso, tosengeli koyeba mokano ya Nzambe mpe kosala makasi mpo na kokokisa yango.
Baanzelu babateli
Baanzelu bamibanzabanzaka mpo na bato mpe babatelaka bango? Ntoma Paulo atunaki boye: “[Baanzelu, NW] nyonso bazali [bilimu, NW] na mosala bakotindamaka mpo na kosalela baoyo balingi kozwa libula na lobiko, boye te?” (Baebele 1:14) Ezali polele ete eyano na motuna ya Paulo ezali ete ɛɛ.
Lokola Baebele misato, Sadalaka, Mesaka, na Abede-Nego baboyaki kofukamela ekeko ya wolo oyo Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone atɛlɛmisaki, babwakaki bango na litumbu ya mɔ́tɔ. Kasi, basaleli wana ya sembo ya Nzambe bazikaki na mɔ́tɔ te. Ntango mokonzi atalaki na litumbu ya mɔ́tɔ, amonaki “bato minei,” mpe alobaki ete “lolenge na oyo na minei [ezalaki] lokola mwana moko na banzambe.” (Danyele 3:25) Nsima ya mwa bambula, babwakaki Danyele na libulu ya nkosi mpo na bosembo na ye. Ye mpe azwaki likama te kino abimaki mpe alobaki ete: “Nzambe na ngai atindaki [anzelu, NW] na ye, mpe azipaki minɔkɔ na nkosi.”—Danyele 6:22.
Ntango lisangá ya boklisto esalemaki na ekeke ya liboso T.B., baanzelu bamonanaki lisusu, babimisaki bantoma na bolɔkɔ. (Misala 5:17-24; 12:6-12) Mpe ntango Paulo azalaki na likama na kati ya mai monene, anzelu andimisaki ye ete akozwa likama te mpe akokóma na Loma.—Misala 27:13-24.
Basaleli ya Yehova Nzambe na mikolo na biso bandimaka mpenza ete baanzelu ya Nzambe oyo bamonanaka te bazali na nguya mpe bakoki kobikisa, ndenge basalaki mpo na Elisa mpe mosaleli na ye. (2 Mikonzi 6:15-17) Ya solo, “[anzelu, NW] na [Yehova] akozingela esika na baoyo bakotosaka ye; mpe akobikisa bango.”—Nzembo 34:7; 91:11.
Nsango oyo baanzelu bazali komema
Baanzelu bamibanzabanzaka mpo na bolamu ya basaleli ya Yehova Nzambe; bazali mpe na mokumba ya kosalisa bato báyekola koyeba Nzambe mpe mikano na ye. Ntoma Yoane akomaki: “Namonaki [anzelu, NW] mosusu kopumbwa na [katikati ya likoló, NW], mpe azalaki na Nsango Malamu na seko mpo na kosakola na bafandi na mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na bibolo nyonso. Alobi na mongongo makasi ete, Bómemisa Nzambe mpe pesá ye nkembo.”—Emoniseli 14:6, 7.
Olingi koyeba soki “nsango malamu na seko” elobi nini? Soki ezali bongo, tuná Batatoli ya Yehova. Bakosepela koyebisa yo nsango malamu yango.
[Bililingi na lokasa 7]
Anzelu azali kopumbwa na katikati ya likoló azali kosakola nsango malamu ya seko. Olingi koyeba yango?