Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/11 nk. 3-4
  • Ntango elenge mwasi moke akumbi zemi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango elenge mwasi moke akumbi zemi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na nzela nini ekoki kosila?
  • Bana mike bakómi kozwa zemi Likambo ya mawa na mokili mobimba
    Lamuká!—2005
  • Kosopa zemi—Yango nde nzela mokuse ya kosilisa mikakatano?
    Lamuká!—2009
  • Kosopa zemi​—⁠Yango ezali nde mwango ya malamu?
    Lamuká!—1995
  • Kokakatana likoló na kosopa zemi—Nzela ezali nde na koboma milió 60 ya bana?
    Lamuká!—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/11 nk. 3-4

Ntango elenge mwasi moke akumbi zemi

“NAMONAKI lokola nazali kolota ndoto”, elenge mwasi oyo tokobenga ye Solange azali kokanisa lisusu na mawa nyonso. “Azalaki kolobela ngai mbala na mbala ete alingi ngai mpe ete akoki kokima chérie na ye ya moke te soki akumbi zemi.”

Mokolo moko, kokanisaka ete ezali apandisite, Solange akendaki kotuna monganga na ye. Azalaki nde na zemi ya sanza misato. Akanisaki lisusu na maloba ya chéri na ye: “Mbala moko nabengaki chéri na ngai.” Alobaki nini? “Esengeli ete osopa zemi wana! Longola yango!” Bomoi ekomaki bololo.

Mobu nyonso, bobele na Etats-Unis, pene na milió moko ya bilenge basi bazali kobota mwana. Kati na mikili ya bozwi, Etats-Unis emityé na esika ya liboso mpo na motuya ya bilenge oyo bazali na zemi. Ezali bobele mpe mokili se moko oyo likambo yango ekoli makasi na mibu oyo. Boyekoli moko esalamaki na lnstitut Alan Guttmacher mpe yango etalelaki mikili 37 emonisi ete likambo ya zemi epai na bilenge basi oyo babali naino te ezali komonana bipai binso kati na mokili.

Tala oyo Cheryl Black mpe Richard DeBlassie, balukiluki mibale balobaki kati na mokanda Bolenge (angl.): “Bilenge basi ya mike oyo bazali kozwa zemi bazali kati na milongo nyonso ya bato mpe bazali kotanga na biteyelo ya Leta to ya bato mosusu. Bazali ya loposo nyonso mpe na mangomba ndenge na ndenge mpe bazali kofanda ata kati na eteni nini ya mokili, ezala na mboka moke to na bingumba minene.” Kolobaka mpo na motuya monene ya kobota epai na bilenge basi oyo bauti na mabota ya bobola, Zulunalo ya babalani mpe ya libota (Angl.) ezali koloba sikisiki: “Bilenge basi ya loposo pembe (mindele) mpe baoyo baboti na bango bazali na mosolo mbala mingi bazali kolongola zemi.”

Na Etats-Unis, eteni moko kati na misato ya bosopi zemi oyo endimami na mibeko ya Leta, esalelami epai na bilenge basi oyo bakokisi naino mibu 20 te. Ata na ekolo nini, ekateli ya kosopa zemi mbala mingi ezalaka kilo mpo na kokumba yango. “Bondimela ngai”, lokola mwasi moko oyo elongolaka zemi wana ezalaki ye naino elenge azali koyebisa, “ezali likambo ya mpasi koleka na koyeba ete nabomi moto mpe ete moto oyo nabomi akoyeba ata moke te kino na meko nini nazali koyoka mawa mpo na likambo oyo nauti kosala.”

Na nzela nini ekoki kosila?

Kotiolama na bato, libala oyo moboko na yango ezali kotengatenga mpe bobola, mbala mingi ezali makambo mabimaka nsima na kokumba zemi na bomwana. Na bongo ntina ya kokamwa ezali te na komona ete likambo yango esimbi likanisi ya bateyi, ya minganga, ya bato na politike mpe ya baboti. Bamoko bazali kosenga ete batya ebongiseli ya koteya makambo matali kosangisa nzoto kati na mwasi mpe mobali mpe bazali kosenga ete bilenge bakoka kosalela na bonsomi nyonso bankisi oyo epekisaka ete mwasi akumba zemi te to mpe kopesa bango nzela na kolongola zemi.

Nzokande, bilenge mosusu bazali koyoka mposa ya bolingo oyo ekoki kosilisama na mateya matali kosangisa nzoto te. Ezali mpenza na bilenge oyo balingi kokumba zemi! Elenge mwasi moko alobaki boye: “Nalingaki kokumba zemi mpo na kobenda likebi ya baboti na ngai. Nakanisaki ete [bébé] yango akozala ya ngai​—ete moto moko te akokaki kobotola ngai ye mpe ete akozala eteni ya nzoto na ngai moko; akopesa ngai mposa ya kozala na bomoi.”

Lisusu, mateya ya bosangisi nzoto mazali kopesa epai na bilenge litambwisi moko te kati na bizaleli. Na mikili lokola Suède mpe Pays-Bas, epai kuna mateya yango mazali kopesama mingi koleka, bazali kotanga bobele mwa motuya moke ya zemi oyo ezali kozwama na bilenge, nzokande bazali mpe kokutana na mobulu mingi kati na likambo etali kosangisa nzoto. Ekoki kozala ete, longola zemi, etamboli mabe wana ezali na makama to mbeba na makanisi na bizaleli mpe na elimo? Soki ezali boye, eleki malamu te na kolendisa bopeto na esika ya kolakisa bango kosalela bankisi? Mpo na koyanola na mituna wana, totalela likambo oyo Biblia mokanda oyo eumeli mingi koleka, ezali koteya na ntina yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]

“Bilenge basi mike oyo bazali kozwa zemi bazali kati na milongo nyonso ya bato mpe bazali kotanga na biteyelo ya Leta to ya bato mosusu. Bazali ya loposo nyonso mpe na mangomba ndenge na ndenge mpe bazali kofanda ata kati na eteni nini ya mokili, ezala na mboka moke to na bingumba minene.”​—Bolenge.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto