Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 1/11 nk. 19-24
  • Bikateli na Nzambe bisengeli kosakolama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bikateli na Nzambe bisengeli kosakolama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina mpe matomba
  • Jérémie ya ntango na biso amonisi bolumbu ya boklisto ya mokili oyo
  • Boklisto ya mokili oyo, ntina na bokabwani, ekebisami
  • Mabe ya boklisto ya mokili oyo ebimisami polele
  • Mosala mokokani na oyo ya Jérémie mokomi na nsuka na yango
  • Mabe ya boklisto ya mokili oyo mpe losambo na yango ya lokuta ebimisami polele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Jérémie: mosakoli na bikateli na Nzambe oyo bato balingaki koyoka yango te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • “Nakoki kofanda nyɛɛ te”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
  • “Osengeli koloba na bango liloba oyo”
    Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 1/11 nk. 19-24

Bikateli na Nzambe bisengeli kosakolama

“Okotelema mpe okolobela makambo nyonso mazali ngai kolakisa yo. Obanga bilongi na bango te.”​—JÉRÉMIE 1:17, MN.

1. Ndenge nini ba Témoins de Jéhovah ‘bangengisaki pole na bango’ na Allemagne nazie?

“MONYOKOLI oyo ba Témoins de Jéhovah bazwaki na Allemagne nazie ezali na esika na yango kati na bantango ya mpasi ya lisolo na bango.” (Études annuelles sur l’Holocauste, volume II, Réaction des Eglises à l’Holocauste [angl.]) Daily News, zulunalo moko ebimaka mokolo na mokolo na Afrike du Sud, na ebimeli na yango ya 15 Juillet 1939 elobaki boye: “Lokola kongenga oyo ekoki kokufa te, mwa etuluku oyo moke ya mibali mpe basi batelemi ngwi kati na kondima ya boklisto Bazali lokola nzube kati na mopanzi ya Adolf Hitler, mpo na kokundola ye ete azali se moto, mpe mokolo mosusu akokufa.” Maloba oyo makundoli biso maloba Yesu alobaki mpo na bayekoli na ye ete bakozala “kongenga ya mokili” mpe ata nini ekokomela bango, pole na bango esengelaki kongenga kati na mokili.​—Matai 5:11, 12, 14-16.

2, 3. Ndakisa nini ya mpiko kati na mosala a kosakola, epesameli biso na Témoin moko na mokili ya Sri Lanka?

2 Toyokaki nsango ete na Sri Lanka, mokili epai batomboki bazali kongala, elenge mobali moko na ekolo ya Batamul, nkombo na ye David Gunaratnam, alandaki ndakisa ya Jérémie mpo ete asakolaki kondima na ye lokola Témoin de Jéhovah na miso ya bakonzi ya basoda. Bakangaki ye elongo na bilenge mosusu mpo na kotuna bango mituna. Engebene nsango ekomelaki biso, “bakonzi ya basoda elongo na basoda na bango bakamwaki makasi mpo na mayele ya moto yango, mpe koleka, mpo na bosembo na ye, mingimingi ntango alobaki ete: ‘Soki nakutani na batomboki nakolobela bango maloba ndenge moko lokola nalobeli bino.’”

3 Na butu, batomboki bakotaki na ndako ya elenge mobali wana mpe bakamataki ye, kofundaka ye ete azali koyokana na basoda. Alimbwelaki bango polele ete ye azali na ngambo moko te mpe na ngambo mosusu te, abakisaki ete mosala na ye ezali bobele kosakola nsango ya Bokonzi ya Nzambe. “Nazali kosala mosala ya Nzambe mpe nakolanda kosala yango. Nazali kosakola epai na moto nyonso oyo alingi koyoka ngai.” Batomboki babomaki Témoin oyo ya molende, atiki mwasi azali naino elenge mpe mwana moko ya moke.​—Tala Misala 7:51-60.

4. Minyokoli nini mipusami na bakonzi na mangomba ba Témoins de Jéhovah bazali kozwa yango na mokili moko ya Amerike latine?

4 Tala nsango ekomeli biso longwa na mokili moko ya Amerike latine epai kuna ba Témoins de Jéhovah banyokolami mpo na bopusi ya bakonzi na mangomba ya katolike mpe ya presbytérien: “Ba Témoins de Jéhovah mitano bazali kati na camp na biso . . . Mbala mingi bazalaki kobeta bango mpe kotia bango na kacho kozanga kopesa bango bilei. Mokonzi ya basoda oyo azali na mokumba ya kolakisa makambo ya politike kati na camp na biso azalaki kopesa bango etumbu mpo ete bazalaki kosakola na basoda mosusu. Engebene ye, na bato nyonso ya mangomba, ba Témoins de Jéhovah bazali likama koleka.”

Ntina mpe matomba

5. Mbala mingi, mpo na ntina nini Batemwe bazali konyokwama, lokola ezalaka bongo mpo na Jérémie?

5 Ee, lokola bakonzi na mangomba mpe bakonzi na politike banyokolaki Jérémie, bobele bongo na mikolo na biso bazali kotelemela ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba. Tala ntina na yango: Atako na bisika nyonso ba Témoins bazali ba citoyens ya kimya mpe batosi na mibeko koleka ba citoyens nyonso mosusu, nzokande banguna na bango bazali kotalela Liloba na Nzambe ete ezali likama, Liloba oyo Batemwe bazali kosakola, mpo banguna na bango balingi te mpe babwaki nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Epai mosusu, mitinda oyo Batemwe bazali kolanda mpe mosala ya kosakola oyo bazali kokokisa kozanga kobanga bato, ezali komonisa polele moimi mpe boyokani mabe esalemi na bato na politike, na bato ya mimbongo mpe bakonzi na mangomba kati na biloko ya ntango oyo etambwisami na Satana.​—Yoane 15:18, 19; 1 Yoane 5:19.

6. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala nini ntango bazali kokutana na monyokoli?

6 Nzokande, ata motindo nini na minyokoli oyo bazali kozwa: boloko, kobetama, mpe ata liwa, ba Témoins de Jéhovah ya mokili mobimba bazali komitambwisa lokola Jérémie. Na bolingo mpe na mayele, balandi kosakola epai na mabota bikateli na Nzambe atako mingi balingi koyoka yango te. (2 Timote 2:23-26) Bayebi ete basengeli kotosa Nzambe liboso ya kotosa bato. (Misala 4:19, 20; 5:29) Bazali kolanda toli oyo Paulo apesi kati na mokanda na ye epai na Baebele, wana elobi ye epai na baklisto ete bayika mpiko na kosalaka mokano ya Nzambe. Na motindo yango, bakomona kokokisama na elaka, bomoi ya seko. Na ndakisa ya Paulo mpe Jérémie, ekoki na biso koloba: “Biso tozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama; kasi tozali kati na bango bakondimaka mpe bakobikisa milimo.”​—Baebele 10:35-39.

Jérémie ya ntango na biso amonisi bolumbu ya boklisto ya mokili oyo

7. Ndenge nini Batemwe na ekeke ya ntuku mibale balandi ndakisa oyo baprofeta ya sembo ya Jéhovah bapesaki na Yisraele mpe na Yuda?

7 Lokola atindaka basakoli na ye na Yisraele mpe na Yuda, bobele bongo Jéhovah atindi batemwe na ye koyokisa polele nsango ya bikateli na ye oyo bizali koya. (Jérémie 7:25, 26; 25:4, 8, 9) Mingimingi uta 1919, mbula oyo bazongaki na bomoi na elimo, batikali bapakolami na bandeko na Klisto bazali kosakola na molende nyonso epai na boklisto ya mokili oyo bikateli makasi oyo Nzambe asili kokamata yango. (Tala Jérémie 11:9-13.) Na mbula wana zulunalo moko ya sika ebimaki: L’Age d’Or. Nsima na bambula, ezwaki nkombo mosusu, Consolation (1937), mpe lelo eyebani na nkombo Réveillez-vous ! (uta 1946); zulunalo oyo ebimisaki polele lokuta ya mateya ya boklisto ya mokili oyo mpe emonisaki ete yango ezali lisanga ya solo ya boklisto te.

8, 9. (a) Mpo na nini, na 1922, zulunalo L’Age d’Or ekweisaki Mangomba? (b) Mpasi nini esakolamaki mpo na mangomba yango?

8 Na ndakisa, L’Age d’Or ya 11 Octobre 1922 (Anglais) elobaki boye mpo na mangomba ya lokuta: “Milende nyonso oyo mangomba bazali kosala — elongo na bakonzi na bango mpe na bato oyo basimbi bango — mpo na kobatela to kobongisa makambo awa na mokili . . . ekolonga te, mpamba te mangomba yango masangani na bokonzi na Masiya te. Na boumeli ya Etumba [ya Liboso] ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba yango bazalaki sembo te epai na Nkolo Yesu Klisto, mpamba te basanganaki na bato na mimbongo mpe na bakonzi na politike mpo na kopesa maboko na etumba ya mokili mobimba.”

9 Zulunalo yango elobaki lisusu: “Epai mosusu basili kobwaka Nkolo mpe bokonzi na ye, mpe bamonisi ete bazali sembo te mpo ete basangani na bolingo na bango moko na lisanga ya Satana mpe balobi na bato​—uta na makanisi na bango moko ete Société des Nations ezali bokonzi ya Nzambe awa na mabele, na ndenge ya politike.” Lisolo esukisamaki na nsango oyo ya “mpasi” to ya lisambisi: “Engebene maloba na Klisto Yesu, mpasi ekokwela sikawa mabota ya mokili mobimba, eleko ya ‘bolozi monene, lokola emonani naino te longwa na ebandeli ya mokili kino na mikolo na biso, mpe ekobima boye lisusu te.’”

10. Eloko nini babimisaki ma 1926?

10 Mosala oyo ya kokebisa, ekokani na oyo ya Jérémie, ekoli mingi na lisalisi ya mikanda misusu, lokola Mosenzeli, bakisa ba brochures mpe mikanda minene. Na ndakisa, mokanda Délivrance, ebimisamaki na 1926, emonisaki polele mpe na makasi nyonso mateya ya lokuta ya boklisto ya mokili oyo. Ekomamaki boye na lokasa 210 na mokanda yango: “Na kati ya mateya ya lokuta oyo basalelaki mpo na kobwaka solo pembeni [kati na mateya ya boklisto ya mokili oyo ya kopengwa], tokoki kotanga oyo ya la trinité, ya kozanga kokufa ya milimo nyonso, ya minyokoli ya seko mpo na bato mabe, endimeli oyo ete bakonzi na mangomba batindami na Nzambe mpe mikonzi na politike bazwi lotomo ya koyangela epai na Nzambe. Nsima na bikeke, Marie mama na Yesu akomisamaki Nzambe; mpe basengaki na bato ete babanda kokumisa ye ete azali mama na Nzambe.”

Boklisto ya mokili oyo, ntina na bokabwani, ekebisami

11, 12. (a) Mpo na oyo etali bitumba, na maloba nini bamonisaki mabe ya bakonzi ya mangomba? (b) Kelasi ya Jérémie bapesaki likebisi nini?

11 Mpo na oyo etali bitumba, bobele mokanda oyo moko ebimisaki polele boyokani mabe oyo boklisto ya mokili esali: “Bakonzi na mangomba oyo nyonso bazali kopambola basoda batindami na etumba na bato na mimbongo mpe na bakonzi na politike; mpe lipamboli na bango epesami kozanga kotalela ntina mpo na yango basoda bazali kobunda. Na ngambo nyonso mibale, banganga-nzambe nyonso mpe bapastere bazali kosambela se Nzambe moko, mpo ete apambola basoda.” (Tala Jérémie 7:31.) Na nsima, lisambisi esakolamaki ete ezali koya nokinoki: “Biteni oyo nyonso na lisanga na Oyo Mabe, lisanga oyo ezali komonana, bizali komibongisa mpo na etumba monene ya Armagedon.”​—Emoniseli 16:14-16.

12 Lokola na mikolo na Jérémie batambwisi na bato bazalaki koloba ete basili kobika mpe bazali na kimya elongo na Nzambe, “bobele batambwisi yango bazali koloba ete babiki, mpo na lobiko bazali bobele na mposa ya nkombo ya Yesu, nzokande balandi kosakana na móto ya diable. Bazali kozipa miso liboso na ezalela ya solosolo ezali koleka na mokili, awa ezali bango kobwaka zelo kati na miso na bango moko mpe na miso ya bazalani na bango”. (Délivrance, page 281.) Na mikolo na biso, ezalela na bango ya kokufa miso ebimisamaki polele na baklisto ya molende mingi: Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo kala bazalaki kobenga na yango ba Témoins de Jéhovah.​—Matai 7:21-23.

13. Likambo nini esalamaki na 1931, mpe mpo na nini ebongaki?

13 Nsima na bambula, boyokani emonanaki lisusu polele na kati ya Bayekoli ya Biblia mpe Jérémie, mpamba te na 1913, na assemblée esalemaki na mboka Columbus, na mokili ya Etats-Unis, basakolaki ete etuluku ya baklisto oyo ya mpiko mingi bakobanda kobengama na nkombo oyo ezwami na Biblia “Témoins de Jéhovah”. (Yisaya 43:10-12) Na ekeke ya mwambe liboso na ntango na biso, Jéhovah amonisaki nkombo yango polele na ndenge apesaki yango na Yisraele. Na yango, ekeke moko na nsima, mosakoli Jérémie, ye mpe azalaki témoin de Jéhovah. (Jérémie 16:21) Bobele bongo, ntango ayaki na mokili, Yesu, lokola azalaki na libota ya Bayuda, azalaki témoin de Jéhovah, Tata na ye. (Yoane 17:25, 26; Emoniseli 1:5; 3:14) Na yango, ekokaki ete na ntango oyo Nzambe ye moko aponaki, libota ya Jéhovah bamema nkombo oyo ye apesaki bango: “Témoins de Jéhovah.”​—Yoane 17:6, 11, 12.

Mabe ya boklisto ya mokili oyo ebimisami polele

14. Ndenge nini bolumbu ya boklisto ya mokili oyo emonisami na boumeli ya bambula 70 oyo eleki?

14 Na boumeli ya bambula 70 oyo eleki, ba Témoins de Jéhovah basakolaki elikya kitoko ya Bokonzi ya Nzambe, mpe epai mosusu basakolaki na mokili mobimba maloba ya kokweisa mpe bikateli. Na lisalisi ya bamilió ya mikanda mikolimbolaka Biblia, mikomami na maloba na polele mpe na molende, bamonisaki bolumbu ya boklisto ya mokili oyo: ezali eteni eleki nguya kati na “Babilone Monene”, lisanga ya mangomba na mokili mobimba oyo ezali lokola mwasi na pite, ndenge elobelami na Emoniseli mikano 17 mpe 18. (Tala mokanda “Babylone la Grande est tombée!” Le Royaume de Dieu a commencé son regne!, ebimisamaki na 1963 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, lnc., pages 567 kino 609.)

15. Ndenge nini mabe ya boklisto ya mokili oyo ebimisamaki na 1955?

15 Na 1955, ba Témoins de Jéhovah bakabolaki brochure Qui est “la lumiere du monde”, la chrétienté ou le christianisme? Bakabolaki yango bamilió, oyo nkoto mingi na yango epesamaki na maboko ya bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo. Brochure yango elobaki nini epai na bakonzi ya mangomba? Na kolandaka ndakisa ya Jérémie, brochure yango elobaki: “Atako matomba nyonso oyo matii ye na molongo ya liboso na makambo ya nkita, makambo na bwanya mpe makambo na militere, boklisto ya mokili emilakisi te ete ezali ‘mwinda ya mokili.’ Mpo na nini? . . . ezali kosakola te mpe ezali kosalela te boklisto oyo elakisami” na Biblia. Mua mosika, brochure yango etunaki mituna oyo: “Awa tozali komonisa mabe ya mangomba ya lokuta, elingi koloba ete tozali konyokola bandimi na bango? Tozali kosala lokola bafanatike?”

16. Na komonisaka mabe ya boklisto ya mokili oyo, ba Témoins de Jéhovah bazalaki kosala lokola bafanatike?

16 Brochure eyanolaki boye: “Te, mpamba te soki ezali bongo, mbele Yesu-Klisto akotangama monyokoli ya Bayuda na ndenge ya fanatike. . . . Basakoli nyonso ya kala ya Jéhovah [bakisa Jérémie], oyo babimaki liboso na Yesu-Klisto, mbele tokotanga bango banyokoli mpe bafanatike, mpamba te bango nyonso bamonisaki mabe ya losambo ya lokuta oyo Bayuda bapengwi bazalaki kosalela nzela moko na mabota ya bapakano.” Mpo ete baklisto ya solo bazali ‘mwinda ya mokili’, esengeli ete bamonisa epai wapi “molili” ya elimo ezali. (2 Bakolinti 6:14-17) Elimboli te ete basengeli kotelemela bato, nzokande bakotelemela bobele masanga oyo ekangi bango na boombo. Na motindo yango, Jéhovah apesaki etinda oyo na Jérémie: “Yo mpe, kanga loketo na yo mpe telema; loba mpe na bango makambo nyonso mazali ngai kolakisa yo. Banga bilongi na bango te . . . Bakobunda na yo nde bakoleka yo te mpo ete ngai nazali na yo elongo mpo na kobikisa yo. Jéhovah alobi bongo.”​—Jérémie 1:17, 19.

Mosala mokokani na oyo ya Jérémie mokomi na nsuka na yango

17, 18. (a) Na bambula oyo, ndenge nini ba Témoins de Jéhovah bakokisi mosala na bango ekokani na oyo ye Jérémie? (b) Bato na motema sembo bazwaki toli nini?

17 Ba Témoins de Jéhovah balembi mpo na oyo etali kosakola bikateli ya Nzambe? Ya solo, tozali kobika na eleko moko oyo bato bazali kosepela te na komona ete tozali kobimisa mabe ya mangomba mosusu; nzokande mikanda ya ba Témoins de Jéhovah ezali na nsango ya bikateli se yango moko lokola na kala, nsango oyo ezali kotelemela boklisto ya mokili oyo. Na motindo yango, na boumeli ya mbula minei eleki, ba Témoins de Jéhovah babimisaki na imprimerie na bango 32 milió ya mikanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, mokanda oyo esili kobimisama na minoko 76. Mokanda yango ezali kolimbola mitó na makambo mingi oyo etungisaka bato, na ndakisa “Bakufi bakendaka wapi?”, “Mpo na nini Nzambe atiki nzela na mabe?” mpe “Ndenge nini koyeba lingomba ya solo”. Epai mosusu, ezali kokebisa bato mpo na mangomba ya lokuta oyo matondi na mokili mobimba.

18 Na mokapo 25 ya mokanda yango, oyo ezali na motó na likambo “Ozali na ngambo na mokili na Satana to na ngambo na Bokonzi na Nzambe?”, elobelami mpo na “mangomba ya lokuta, oyo Biblia elakisi yango lokola ‘mwasi na pite’ abengami ‘Babilone Monene’. . . . Uta kala, mangomba mazali ntango nyonso komikotisa kati na politike. Mangomba mazalaki solo na bokonzi likolo na mikonzi ya mokili”. Mpo na yango, mokanda oyo etindi batangi ete basala nini? Ekomami boye: “Boni mpo na yo? Ozali na ngambo ya mokili na Satana to na ngambo na ebongiseli na sika na Nzambe? Soki osili kopona ebongiseli na sika na Nzambe, esengeli na yo omikabola na mokili, omikabola mpe na losambo na yango ya lokuta. Tosa etinda oyo ezwami na Biblia: ‘Bobima kati na ye [Babilone Monene], bino bato na ngai.’ (Emoniseli 18:4)”

19. Ndenge nini tokoki komonisa ete na mikolo oyo ya nsuka mongongo ya Jérémie ya ntango na biso ezimani te?

19 Nsango oyo ya nguya, esengi na bato ete babima na “Babilone Monene” mpe nsango na ntina etali kosambisama ya bato mabe, elobelami malamumalamu kati na mokanda Sécurité universelle sous le Regne du “Prince de paix”, ebimisami na 1986 (milió motoba na minoko 25). Mokanda yango ezali kokweisa bakonzi na mangomba na boklisto ya mokili oyo mpo ete na kosakola na bango, ‘bayikisaki mpiko na bilenge mibali ete bakenda kobunda na ntango na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba’. Mokanda yango ebakisi lisusu: “Kino lelo boklisto ya mokili oyo ezali monguna na Nzambe Oyo-Aleki-Likolo. Ezali polele ete endimami na Nzambe te, mpe na ntina yango, ekoki kobika te.” (Tala nkasa 30 kino 32.) Mongongo ya Jérémie ya ntango na biso ezimami te; atako bakonzi na mangomba mpe bato na politike bazali kosala nyonso mpo na kopekisa ete bikateli ya Jéhovah bisakolama te, batemwe na sembo na Nzambe bazali kokende liboso, mpo na kosilisa mosala oyo ya kokebisa bato.​—Jérémie 18:18.

20. Mpo na nini ba Témoins de Jéhovah balandi kosakola bateli na Nzambe epai na mabota?

20 Mpo na nini mosala oyo esengeli kokoma kino na nsuka na yango? Mpamba te Jéhovah, Nzambe na bomoi, Nkolo Moyangeli ya molongo mobimba, akani bitumbu ya kopesa epai na mabota mpe na mangomba. Motuna oyo Jéhovah atunaka epai na ba lpokrite na Yuda mpe na Yelusaleme ekoki lelo mpo na kotunama epai na boklisto ya mokili oyo: “Nakopesa bango etumbu na makambo oyo te? Jéhovah alobi bongo. To molimo na ngai ekozongisa mabe te mpo na libota na lolenge oyo?” Tala ntina mpo na yango ba Témoins de Jéhovah balandi komemela bato ya mabota nsango oyo, atako mingi balingi koyoka yango te mpo ezali kokweisa bango, kasi mua bato moke bazali kosepela na yango, mpo bazali komona yango ete ezali nsango kitoko, nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.​—Jérémie 5:9, 29; 9:9; Misala 8:4, 12.

21. Atako mpasi esakolami, nzokande elikya nini kitoko epesameli baoyo bazali kotia likebi na mosala mosalemi na kelasi ya Jérémie? (Nzembo 37:9, 11, 18, 19, 28, 29)

21 Atako Jérémie abengamaki mbala mingi “mosakoli na bampasi”; nzokande nsango na ye ezalaki mpe na elikya mpo na Bayuda. (Jérémie 23:5, 6; 31:16, 17) Bobele bongo, atako ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola kobelema ya “bolozi monene” mpe ekateli oyo Nzambe asili kokamata mpo na koyeisa Armagedon, nzokande bazali mpe kosakola “makolo ya sika mpe mabele ya sika” oyo, ntango yango ekosalema, ekomemela bato mapamboli, lokola boyengebene mpe Paradis awa na mokili, mpe bomoi ya seko. (Matai 24:21, 22; Emoniseli 16:16; 21:1-4) Na kotalela eleko oyo tozali kobika na yango, tosengeli kotia likebi mingi na nsango ya bikateli ya Jéhovah mpe kopesa maboko mpo na kosilisa mosala monene oyo kelasi ya Jérémie bazali kosala yango.​—Jérémie 38:7-13.

Bozongeli

◻ Na ndakisa ya Jérémie, monyokoli nini ba Témoins de Jehovah bazali kozwa yango?

◻ Mpo na nini Batemwe balandi kosakola?

◻ Motindo nini mosala mokokani na oyo ya Jérémie ekoli?

◻ Bandakisa nini ya mikolo oyo emonisi ete nsango na kokweisa ebongwani te?

◻ Atako nsango yango ezali kosakola mpasi, nzokande epesi elikya nini?

[Elilingi na lokasa 21]

Bakoma kosambela Marie ete azali “Mama na Nzambe”

[Elilingi na lokasa 22]

Na 1931, na assemblée ya mboka Colombus na Etats-Unis, bayekoli ya Biblia bazwaki nkombo “Témoins de Jéhovah”

[Bililingi na lokasa 23]

Na mokili mobimba, ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda ndakisa ya Jérémie

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto