Mituna ya batangi
◼ Ebongi ete moklisto asomba batiká ya tombola to loterie, bobele mpo na kominanola, soki mosolo oyo ekozwama na botekisi batiké, ekopesama epai na babota lokola makabo ya bolingo malamu?
Biblia epekisi soko moke te kominanola oyo ebongi, mpo ete Jehovah azali “Nzambe na esengo”. (1 Timote 1:11) Basaleli na ye bakoki kominanola na koyokaka miziki, na kobinaka mabina oyo mazali malamu, na koliaka mpe na komelaka na bokatikati, na kosalaka masano oyo mazali ya malamu. (Nzembo 150:4; Mosakoli 2:24) Kasi, ekozala bokeseni na mitinda ya mayele ya Nzambe soki basangani na masano ya mbongo, kotia na kati tombola to loterie.
Tombola to loterie ezali nini? Ezali lisano oyo moto asombi batiké mpo na kozala na libaku ya kolonga biloko oyo bitiami. Balongi bazali koponama na nzela na kobeta mbese to na nzela nyonso mosusu oyo ebongisami mpo na kopona nimeroa. Mbala mingi biloko batiaka bizalaka ya motuya, ekoki kozala bamilio ya badolare, ya bazaïres to ba francs. Na kotalela motuya monene ya mbongo oyo elakami, loterie ekomi “lolenge ya lisano ya mbongo oyo epalangani mingi” koleka mosusu. (The World Book Encyclopedia.) Bibele na bato bazali kosomba batike mpo na loterie to tombola.
Bato mosusu bakanisaki ete ezali mabe te kosangana na loterie to tombola mpo ete ntalo ya tiké ezali mbala mosusu moke, lisusu mpo ete baoyo bazali kosangana na yango bazali kosala bongo na bolingo na bango mpenza mpe ete mbongo oyo ekozwama ekosalelama mpo na kosalisa baoyo bazali kokelela, na ndakisa babola. Likanisi yango ezali mpenza solo?
Ata soko mpo na bamosusu kosomba tiké ya loterie to tombola ezali komonana ete ezali lisano ya moke mpe ezali na mbongo moke, ata bongo likambo yango ezali komonisa ezaleli moko ya lokoso. Bato bazali kosomba batike na elikya ya kozwa mbongo mingi. Yango etemeli mobeko na Nzambe oyo ezali kokweisa lokoso, ezaleli mabe oyo ekoki kokola kino kopekisa moto ‘kokota na Bokonzi na Nzambe’. Na yango, soko moklisto moko amonisi, na kosanganaka na masano ya mbongo ezaleli oyo ya lokoso, akoki kobimisama na lisangá. (1 Bakolinti 5:11; 6:10) Biblia elobi: “Libula ekozuama mbango [na lokoso] na ebandeli, kasi nsuka na yango ekopambolama te.” (Masese 20:21) Moklisto oyo akozala na mposa ya “komeka chance na ye” na loterie to tombola asengeli kokanisa malamumalamu na lokoso oyo likoló na yango lisano oyo etongami. Mpo ete, engebene Baefese 5:3, ‘lokoso esengeli ata moke te kolobama kati na biso’, na yango esengeli ata moke te komonana epai na Moklisto.
Ntalo monene na bato oyo bazali kosangana na tombola to loterie ezali baoyo bazali na mbongo mingi te. Ata soki ntalo ya batiké ezali moke, lisano oyo ezali koyiba mbongo oyo esengelaki kopesa nzela na kokokisa bamposa ya ntina ya mabota: bilei mingi, bilamba kitoko mpe nkisi na monganga. Nzokande, moto oyo azali koloba ete azali moklisto, kasi azali na bopotu mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye, “azali mabe koleka moto oyo azangi kondima”.—1 Timoté 5:8.
Ata soki mbongo ya batiké esilisi mosolo ya moto moko te to ya libota mobimba te, yango elimboli te ete baoyo mosusu bazwi mpasi te. Ndenge nini? Mpo na koloba malamu moto nyonso oyo asombi batiké ya tombola to loterie azali kolikya kozwa eloko to mbongo. Kasi mbongo to eloko oyo akolonga ekouta wapi? Na ndakisa, soko tike ezali 100 zaïres mpe soko molongi azwi milio moko ya bazaïres, yango elingi koloba ete azwi mbongo euti na botekisi ya batiké oyo esombami epai na bato nkoto nkama. Likambo yango ezali na boyokani te na mobeko na Nzambe oyo epekisi kolula biloko na mozalani (Deteronome 5:21) Ya solo, kolonga ezali nde kozwa mbongo ya bato ebele, mpo ete ntalo ya batiké esengeli kozala mingi koleka bato oyo nkoto nkama. Mpo ete mbongo oyo ekozwama na botekisi ya batiké, ekozongisa mbongo oyo basalelaki mpo na kobongisa loterie, mpe mbongo mosusu ekosalelama mpo na kosalisa baoyo bazali na mpasi lokola bayebisaki yango. Na yango, ata soko moto akoki kosomba tike ya 100 zaïres, tokoloba boni mpo na babeti mosusu? Lisusu, bolongi na ye ekosalelama lokola piblisiie, likambo oyo ekopusa bato mingi na kobeta lisusu to kosomba batike mingi, ata soko bazali na makoki mingi te.
Ntembe ezali ata moke te ete tombola to loterie ezali na boyokani na liloto ya kozwa mbongo kozanga kosala milende. Ya solo, tombola to loterie ezali kolendisa bato bazala bagoigoi. Nzokande, Biblia ezali kolendisa basaleli na Nzambe ete bazala bato bayebi kosalela malamu mbongo na bango mpe basali na molende. Na esika ya kondima ezaleli ya goigoi, Biblia elobi: “Soko moto nani alingi kosala mosala te, alia mpe te!”—2 Batesaloniki 3:10; Masese 13:4; 20:4; 21:25;1 Batesaloniki 4:9-12.
Ezali te mpo ete bato oyo bazali kosangana na tombola to loterie bazali kosala yango na bolingo na bango moko mpe lisano yango endimami na Leta nde epesi nzela epai na baklisto na kosangana na yango. Biyangeli bisusu bindimi na nzela ya mobeko balolenge mosusu ya masano, bondumba mpe kobala basi ebele. Ata soko bizaleli oyo endimami na Leta mpe ebele na bato bamipesi na yango na bolingo na bango moko, bizaleli yango bizali mabe na miso na Nzambe. Yango wana baklisto bazali kosala makasi mpo na komonisa elimo motindo moko na David, oyo abondelaki boye: “E Jehovah, yebisa ngai banzela na yo. Monisa ngai bilekelo na yo. Tambolisa ngai kati na solo na yo mpe lakisa ngai.”—Nzembo 25:4, 5.
Soki moklisto moko alingi mpenza kosalisa babola, bibosono to mibange, akoki kopesa lisalisi yango ye moko epai na bango to na nzela mosusu, kozanga kosangana na lisano moko ya mbongo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ata soki eyebani mingi na nkombo ya loterie to tombola, lolenge ya lisano oyo na mbongo ekoki mpe kobengama na nkombo mosusu engebene esika oyo ofandi.