Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/12 nk. 8-9
  • Mongongo na Nzambe moyokani mpo na mbala ya misato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mongongo na Nzambe moyokani mpo na mbala ya misato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Masolo mosusu
  • Mongongo na Nzambe moyokami mpo na mbala ya misato
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Bayuda bayoki mongongo ya Nzambe—Bakondima?
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Mokanda ya Biblia nimero 43—Yoane
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yoká mongongo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/12 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Mongongo na Nzambe moyokani mpo na mbala ya misato

NA temple, Yesu auti komonisa ete azali kooka mpasi na motema soko akanisi ete liwa na ye ebelemi. Likambo ezali kotungisa ye mpenza, ezali nsoni oyo ekobwakama na nkombo ya Tata na ye. Yango wana asali libondeli oyo: “Tata, kumisa nkombo na yo.”

Na maloba yango, mongongo makasi euti likoló elobi: “Nasili kokumisa yango mpe nakokumisa yango lisusu.”

Bato oyo bazali pene wana bakamwe. Bamoko balobi: “Mwanze alobi na ye.” Bamosusu balobi ete ezali nkake. Kasi ezali solo Jéhovah Nzambe nde alobi. Kasi, ezali mbala ya liboso te mongongo na ye eyokani wana ezali ye kosolola na Yesu.

Na yango, eleki sikawa mbula misato na ndambo, ntango Klisto azwaki batisimo, Yoane mobatisi ayokaki Nzambe koloba na ye: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi.” Lisusu, mwa ntango nsima na Pake oyo euti koleka, wana Yesu abongwanaki liboso na Yakobo, Yoane mpe Petelo, bayokaki mongongo na Nzambe koloba: “Oyo Mwana na ngai na bolingo, nasepeli na ye mingi; boyoka ye.” Mpe lelo oyo, le 10 Nisan, mikolo minei liboso na liwa na Yesu, bato bayoki mongongo na Nzambe mpo na mbala ya misato. Kasi ya mbala oyo, Jéhovah alobi na motindo boye ete bibele na bato bayoka ye.

Yesu apesi ndimbola elandi: “Mongongo oyo eyei mpo na ngai te kasi mpo na bino.” Ezali elembeteli ete Yesu azali mpenza Mwana na Nzambe, Masiya oyo alakamaki. Yesu abakisi: “Mokili ezali kosambisama sikawa; sikawa mokonzi na mokili oyo akobwakama libanda.” Ya solo, bomoi na ye ya sembo awa na mabelé emonisi ete Satan le Diable, mokonzi na mokili oyo, asengeli “kobwakama” na libanda, elingi koloba ete akobomama.

Yesu amonisi makambo makobima na ntina na liwa na ye, na maloba malandi: “Ngai mpe, soko nakolongolama na mokili, nakobenda bato na mitindo nyonso epai na ngai”. Liwa na ye elimboli te ete alongi te, mpamba te na nzela yango azali kobenda bato epai na ye mpo ete bazwa bomoi na seko.

Kasi bibele balobi: “Biso toyoki kati na Mibeko ete Klisto akoumela seko. Okoloba boni ete ekoki na Mwana na moto kokenda na likoló? Mwana na moto azali nani?”

Ata bilembeteli nyonso wana, mpe mongongo na Nzambe, mingi kati na Bayuda bazali kondima te ete Yesu azali mpenza Mwana na moto, Masiya oyo alakamaki. Nzokande, lokola asalaki yango sanza motoba liboso, na elambo na Mingombo, Yesu amimonisi lisusu lokola “pole” mpe alendisi bayoki na ye na maloba malandi: “Naino bozali na pole, bondima pole ete bobongwana bana na pole.” Nsima na koloba bongo, akei na ye mpe amibombi, na ntembe te mpo amoni ete bomoi na ye ezali na likama.

Libota na Bayuda ezali na kondima epai na Yesu te; ezali na ndenge yango nde maloba na Yisaya makokani, ye asakolaki ete ‘miso na makozipama mpe motema na bango ekoyoka eloko te, mpo ete babongwana te mpe babikisama te’. Yisaya azwaki emonaneli ya makóló ya Jéhovah mpe emonaneli ya Yesu, kati na nkembo na ye pene na Jéhovah, liboso ete akoma moto. Ata bongo, engebene esakweli na ye, Bayuda bazali koboya na moto makasi elembeteli emonisi ete moto yango azali Mobikisi oyo alakamaki.

Nzokande, ata bakonzi (na ntembe te ezali basangani na Sanhédrin, Esambiselo eleki monene na Bayuda) mingi bazali kondimela Yesu, lokola Nicodème mpe Joseph d’Arimathée. Kasi, mpo na sikawa, bakonzi bazali komonisa polele te kondima na bango, bazali kobanga noki te bakolongola bango na eyanganelo mpe bakoki kobungisa mikumba na bango. Bazali bongo komipimela makambo mingi ya kitoko.

Yesu amonisi lisusu likanisi elandi: “Ye oyo akondima ngai azali kondima ngai te kasi Motindi na ngai. Mpe ye oyo amoni ngai azali komona Motindi na ngai. . . . Soko nani akoyoka maloba na ngai mpe akotosa yango te, ngai nakosambisa ye te; mpamba te nayei mpo na kosambisa mokili te nde mpo na kobikisa mokili. . . . Liloba lisili ngai kosolola ekosambisa ye na mokolo na nsuka.”

Mpo na bolingo na ye epai na bato, Jéhovah atindaki Yesu, mpo ete baoyo bakondimela ye babikisama. Bato bakobika to bakobomama engebene botosi na bango na makambo oyo Yesu alobaki na etinda na Jéhovah. Lisambisi ekozala “na mokolo na nsuka”, na boumeli na Boyangeli na mbula nkoto na Klisto.

Yesu asukisi na maloba oyo: “Nasololi monoko na ngai moko te kasi na Motindi na ngai, Tata ye moko, asili kolakisa ngai yango ezali ngai koloba mpe yango ezali ngai kosolola. Nayebi ete lilako na ye ezali bomoi na seko. Yango ekosolola ngai, nakosolola lokola Tata asili koyebisa ngai.” Yoane 12:28-50; 19:38, 39; Matai 3:17; 17:5; Yisaya 6:1, 8-10.

◆ Tanga mbala misato oyo mongongo na Nzambe eyokanaki na Yesu?

◆ Ndenge nini mosakoli Yisaya amonaki nkembo na Yesu?

◆ Banani bazali bakonzi oyo bazali kondimela Yesu, kasi mpo na nini bazali koboya koyambola kondima na bango?

◆ “Mokolo na nsuka” elimboli nini mpe bato bakosambisa na ndenge nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto