Kozala sembo—Ezali na motuya nini?
“Epai na moto na sembo okomimonisa sembo.”—NZEMBO 18:25.
1, 2. (a) Bosembo ezali nini, mpe ndenge nini lolenge na yango ekeseni ezali na boyokani na bomoi na biso? (b) Mpo na nini ezali malamu ete totalela ndakisa monene na Jéhovah?
BOSEMBO, mposa ya kokokisa mokumba, bolingo ya ntango nyonso, komemya mikumba na yo, ndai ya sembo. Maloba nyonso oyo mazali na boyokani na yango. Boyokani nini? Ezali na boyokani na lolenge ekeseni ya bosembo. Bosembo ezali ezaleli kitoko na miso ya Nzambe, oyo euti na bokangami ya solo. Na mawa, ezaleli yango ezali na ntina mingi te mpo na bato ya ntango na biso. Komonisaka elimo ya kotyola, mingi bazangi bosembo epai na babalani na bango mpe bazali kokokisa te mikumba na bango epai na basangani ya libota na bango oyo basili kokoma mibangé, to bazali kokokisa te mikumba na bango epai na patron na bango. Bongo nini esalemaka ntango bosembo mibale eyokani te? Eleki kala mingi te, na Angleterre, comptable moko alongwaki na mosala bobele mpo alobaki solo na ntina na mosolo ya kompanyi na bango liboso na bato ya Leta.
2 Ezali mpasi te mpo na kolobela bosembo, kasi nsango ya solo esengeli komonisama elongo na misala ya sembo. Lokola tozali bato bazangi kokoka, mbala mingi tomimonisaka bato bazangi sembo. Ezali malamu ete totalela lisusu ndakisa na Ye oyo azali na bosembo bokoki kotyamela ntembe te: Jéhovah Nzambe Ye moko.
Elakiseli na bosembo
3. Ndenge nini Jehovah amimonisaki sembo na mokano oyo azwaki na Genese 3:15?
3 Ntango Adam asalaki lisumu, Jéhovah amonisaki polele mokano na ye ya kosomba lisusu libota ya bato oyo bakobotama na nsima. Asalaki motindo wana mpo na bolingo na ye epai na bato oyo ye azalisaki. (Yoane 3:16) Na ntango etyamaki, emonanaki ete Yesu Klisto, libota elakamaki oyo esakolamaki na Genese 3:15, amimonisaki ete azali mbeka na kosikola, mpe ekokaki kondimama te ete Jéhovah atika mokano na ye oyo abongisaki Soko tondimi mbeka na Yesu, bilikya ya kondima na biso bikokokana.—Baloma 9:33.
4. Ndenge nini Jéhovah amonisaki bosembo epai na Yesu, mpe yango ebimisaki mbuma nini?
4 Bosembo oyo Jéhovah amonisaki epai na Mwana na ye, Yesu, elendisaki ye mingi ntango azalaki na bomoi awa na mabelé. Yesu ayebaki ete akokufa, mpe azalaki na ekateli makasi ya kotikala sembo epai na Nzambe na ye kino nsuka. Boyebi mozindo na ntina na bomoi na ye liboso ete aya na mabelé epesamelaki ye ntango abatisamaki mpe apakolamaki na elimo santu. Na butu oyo akabamaki, abondelaki mpo na komona lisusu Jéhovah, Tata na ye ya makoló, mpe ‘nkembo oyo azalaki na yango pene na ye liboso ete mokili ezalisama.’ (Yoane 17:5) Yango ekokaki kosalema? Bobele soko Jéhovah akotika te ete Mwana na ye ya sembo apola te kati na libulu. Nzokande, asekwisaki ye mpe apesaki ye bomoi ya libela, kokokisaka bongo na bosembo nyonso elaka na esakweli oyo ekomami kati na Nzembo 16:10: “Okotika molimo na ngai na esika na bakufi te.”—Misala 2:24-31; 13:35; Emoniseli 1:18.
5. Misala nini lisusu ya bosembo ezali na boyokani na bilaka oyo Jehovah asalaki epai na Yesu?
5 Bobele bongo, nsima na lisekwa na ye, Yesu ayebaki ete akokaki kotya motema na maloba oyo Jéhovah alobaki, ete ‘akotya bayini na ye lokola etemelo na makolo na ye.’ (Nzembo 110:1) Ntango yango ekokaki na 1914, na nsuka na “ntango epesamaki na mabota”, wana Bokonzi ezalisamaki na Makoló. Bokonzi na Yesu likoló na banguna na ye oyo bolakamaki bamonanaki libosoliboso ná ndenge abenganaki Satana mpe badémo na ye longwa na likoló? Bokonzi na ye ekokoma ná nsuka na yango ntango banguna yango bakobwakama na libulu mpo na mbula nkoto mpe wana “bakonzi na mabelé mpe mampinga na bango” bakobomama.—Luka 21:24; Emoniseli 12:7-12; 19:19; 20:1-3.
6. Elikya nini Nzambe apesi biso, mpe ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botondi epai na ye?
6 Mokomi na nzembo alobi boye: “Tya elikya epai na Jéhovah mpe batela nzela na ye, mpe akokembisa yo ete osangola mokili.” (Nzembo 37:34) Tokoki kozala na elikya ete Jéhovah akolanda kokokisa maloba na ye mpe ete kino nsuka ya mokili oyo ya mabe, akobikisa mibali, basi mpe bana oyo bazali ‘kobatela nzela na ye.’ Na hébreu ya kala, liloba yango ezali na likanisi ya kosalela Jéhovah na molende mpe na bosembo. Oyo ezali ntango ya kolemba te soko mpe ya kotika te mabaku malamu ye mosala oyo epesameli biso. Ezali nde ntango ya komipesa mobimba na bosembo nyonso kati na mosala ya Nzambe na biso mpe ya Bokonzi na ye. (Yisaya 35:3, 4) Bandakisa ya malamu ekoki kolendisa biso na likambo yango. Totalela bamoko na yango.
Bosembo ya bankoko na mabota
7, 8. (a) Mikumba nini Jehovah apesaki epai na Noé mpe libota na ye? (b) Ndenge nini libota ya Noé emimonisaki ete ebongi kobikisama na Nzambe na ntango ya mpela?
7 Ntango Jéhovah azwaki ekateli ya koboma libota ya bato mabe na mpela, asalaki boyokani elongo na tata na mabota Noé mpo na kobatela libota na ye, mpe bomoi na mabelé. (Genese 6:18) Noé azalaki na botondi mingi na elikya ya kobatelama na Nzambe, kasi ye mpe libota na ye basengelaki komonisa ete babongi na yango. Na ndenge nini? Na kosalaka makambo oyo Jéhovah asengaki bango. Esengelaki na bango liboso kokokisa malamu mosala moko monene: kotonga masuwa. Ntango esilaki kotongama, Noé asengelaki kotondisa yango na lolenge nyonso ya nyama mpe na bilei bikoki mpo na mwa ntango molai. Kasi esukaki bongo te. Na ntango molai oyo bibongiseli biumelaki, Noé azalaki kosangana na makoki na ye na mosala monene ya kosakola na kokebisaka bazalani na ye mpo na etumbu ya Nzambe.—Genese mikapo 6 mpe 7; 2 Petelo 2:5.
8 biblia elobi ete “Noé asalaki bobele bongo, mpe asilisaki nyonso elakaki Nzambe ye.” (Genese 6:22; 7:5) Noé mpe libota na ye bamimonisaki sembo na mosala na bango. Mpo na elimo na bango ya komipesa, basalelaki na ndenge malamu ntango na bango oyo bazalaki na yango. Kasi mokumba na bango ezalaki makasi mpe mosala ya kosakola ezalaki mpasi. Lokola babotaki bana te liboso na mpela, bana ya Noé mpe basi na bango bakokaki komipesa kozanga nkaka na mokumba oyo epesamelaki bango mpe kotambwisa malamu mosala na bango. Mpela monene na kobebisa etyaki nsuka na mokili mabe na eleko wana, yango ezalaki se boyengebene. Bobele Noé, mwasi na ye, bana na bango misato ya mibali mpe basi na bango nde babikaki. Tokoki solo kosepela na ndenge batikalaki sembo epai na Nzambe mpe na malako na ye, mpamba te biso banso touti na Noa na nzela na Semi, Kame to Yafeta.—Genese 5:32: 1 Petelo 3:20.
9. (a) Ndenge nini Jéhovah amekaki bosembo ya Abrahame? (b) Ndenge nini Yisaka amonisaki bosembo na ye na libaku yango?
9 Mpo alingaki kotosa na bosembo na etinda na Jéhovah, Abrahame amilengelaki mpo na kopesa Yisaka lokola mbeka. Oyo nde momekamo makasi mpo na bosembo! Kasi, Jéhovah akangaki loboko na ye mpe alobaki na ye ete: “Sikawa nayebi ete obangaka Nzambe, mpo ete oboi kopesa mwana na yo te, mwana na yo bobele moko.” Ezali na ntina mpo ete tokanisa na makambo oyo malekaki liboso na maloba oyo. Na mobembo oyo basalaki mpo na kokenda na ngomba Moriah, mobembo oyo eumelaki mikolo misato, na ntembe te Abrahame azwaki ntango ya kotalela likambo yango mpe azalaki na likoki ya kobongola likanisi na ye. Mpe tokoloba boni mpo na Yisaka, ye oyo azalaki kokumba nkoni mpo na mbeka mpe ye oyo amitikaki ete bakanga ye maboko mpe makolo na nsinga? Atikaki bosembo na ye te epai na tata na ye, Abrahame, aboyaki mpe te mosala oyo asengelaki kokokisa, atako bosembo na ye elingaki komema ye na kobungisa bomoi na ye.—Genese 22:1-18; Baebele 11:17.
Bosembo ya boklisto
10, 11. Ndakisa nini ya bosembo baklisto ya liboso bapesaki?
10 Jéhovah azali ntango nyonso komonisa bosembo ya solo. Nzokande, ntoma Paulo apesi elendiseli oyo elandi epai na baklisto: “Bozala bamekoli na Nzambe.’’ (Baefese 5:1, 2) Baklisto basengeli kosala motindo batata na mabota basalaki. Baklisto ya liboso bapesaki ndakisa mpo na oyo etali kosalela losambo ya solo na bosembo nyonso. Yango emonisami na likambo oyo elandi:
11 Mokonzi moloma constance l er, tata na mokonzi Constantin, azalaki na limemya mozindo mpo na bayekoli na Yesu Klisto. Mpo na komeka bosembo ya baklisto bazalaki kosala na ndako na ye, alobaki na bango mokolo mosusu ete bakokaki kotikala na mosala bobele soko bandimi kotumba mbeka epai na banzambe na bikeko. Alobaki na bango ete soko baboi akolongola bango na mosala mpe akopesa bango etumbu. Na motambo wana ya moke, Constance alingaki bobele koyeba baoyo bakotikala sembo. Baoyo batikalaki sembo epai na Nzambe mpe na mitinda na ye batikalaki na mosala ya mokonzi, mpe bamoko bakomaki bapesi-toli na ye oyo atyelaki motema. Mpo na baoyo bazangaki bosembo na mobeko ya Nzambe, balongolamaki na mosala na nsoni nyonso.
12. Ndenge nini bakengeli baklisto basengeli komimonisa sembo, mpe mpo na nini ezali na ntina mpo na bolamu ya lisangá?
12 Atako bosembo esengeli komonana epai na baklisto nyonso, kati na Tito 1:8 yango ekangami kati na bizaleli oyo moto asengeli kozala na yango mpo na kozala mokengeli moklisto. Engebene William Barclay, hosios, liloba na greke oyo ebongolami na verset oyo na “sembo”, elimboli “moto azali kobanga mibeko ya seko oyo ezalaki mpe ezali ntango nyonso liboso na mibeko oyo esalemi na bato.” Ezali na ntina ete bankulutu batosa na bosembo nyonso na mibeko ya Nzambe. Ndakisa na bango ya malamu ekosalisa lisangá mpo ekola mpe ezala makasi mpo na kotelema ngwi liboso na mimekamo nyonso mpe na bopusi nyonso oyo ekoki kotya na likama lisangá mobimba to mosangani moko na moko. (1 Petelo 5:3) Liboso na etonga, bankulutu bazali na mokumba monene ya kobatela bosembo na bango epai na Jehovah, mpamba te lisangá elendisami na ‘komekola kondima na bango.’—Baebele 13:7.
Kozala sembo ezali na motuya mingi
13. Maloba oyo ete “Bato banso bakoki kosombama malimboli nini,” mpe bandakisa nini esali lokola endimisa yango?
13 “Bato banso bakoki kosombama.” Maloba oyo ya Sir Robert Walpole, premier ministre ya Angleterre na ekeke ya 18, emonisi na mokuse ete kati na Lisolo na bato, mbala mingi bato bazali kobebisa bosembo na bango mpo na koluka litomba. Totalela na ndakisa, likambo ya Henry Phillips oyo William Tyndale, mobongoli na Biblia, akanisaki ete azali moninga ya sembo. Na 1518, Phillips atekaki Tyndale epai na banguna na ye, na boye ete Tyndale atyamaki nokinoki na boloko, mpe na nsima abomamaki. Engebene mokomi moko na Lisolo na bato, Phillips yango, oyo akokaki kozala mosaleli ya mokonzi to mosaleli ya bakatolike ba Anglais, “azwaki mosolo mingi mpo na mosala na ye ya moteki lokola Yuda”. Mokomi yango azali bongo kolobela Yuda lskariote, oyo andimaki kotekisa Yesu mpo na palata 30 ya misolo. Kasi tokoki kokanisa te ete “motuya” ya bosembo ezali ntango nyonso mosolo.
14. Ndenge nini bosembo ya Yosefe epai na Jehovah emekamaki, mpe ebimisaki likambo nini?
14 Bosembo na Yosefe emekamaki ntango mwasi na Potifare asengaki ye na makasi ete “alala na (ye)”. Alingaki kosala nini? Lokola ayebaki malamu mpenza mitinda na ntina na likambo yango, Yosefe akimaki na libanda ya ndako, na ekateli ya “koboya kosala mabe monene boye mpe kosala lisumu epai na Nzambe.” Mposa ya kosepela mpo na mwa ntango moke elongaki te bosembo na Yosefe epai ya Nzambe na ye, Jéhovah.—Genese 39:7-9.
15. Ndenge nini Absalome azangaki bosembo, mpe yango ebimisaki nini?
15 Kasi makama mosusu mazali liboso na biso: mposa makasi ya koluka lokumu ekoki kobebisa bosembo. Ezali yango nde epusaki Absalome atombokela tata na ye, mokonzi David. Na mayele mabe, alukaki kondimama epai na bato. Na nsuka, atambwisaki limpinga mpo na kobundisa baoyo batikalaki sembo epai na tata na ye. Kozanga bosembo oyo amonisaki epai na tata na ye esukaki ntango abomamaki na Yoabe. Oyo nde etumbu mpo na komeka kokweisa ebongiseli ya teokratike!—2 Samwele 15:1-12; 18:6-17.
Bosembo ekoki kotekama te
16. 2 Bakolinti 11:13 emonisi nini mpo na mikano ya Satana?
16 Ya solo, Satana azali kokanisa ete moto nyonso akoki kosombama mpe ezalaki solo mpo na Absalome. Nzokande, ezalaki bongo te mpo na Yosefe, mpe yango esalema naino te epai na basambeli na sembo ya Jéhovah. Atako bongo, Satana akomeka na lolenge nyonso mpo na kopusa biso ete tobebisa bosembo na biso epai na Mozalisi na biso. Yango wana ntoma Paulo amonisaki bobongi na ye na maloba oyo ete “lokola nyoka azimbisaki Eva na mayele na ye”, elimo na biso ezimbisama te, likambo oyo ekoki komema biso na kozanga bosembo epai na Jéhovah mpe kotika kosambela ye.—2 Bakolinti 11:3.
17. Bamoko basili kobungisa mikumba na bango ya ntina mpo na eloko nini?
17 Ekozala malamu ete tomituna motuna oyo: “Ezali na eloko oyo nakoki kondima mpo nabebisa libaku malamu na ngai ya kosambela Mozalisi na ngai na bosembo nyonso?’ Likambo ya mawa mpenza, tosengeli koloba ete na kokesana na Yosefe, basaleli mosusu baoyo bamipesaki na Jéhovah basili kotika libaku malamu na bango mpo na makambo mosusu ya ntina moke koleka. Ata bankulutu basili kotika mikumba ya ntina oyo bazalaki na yango kati na mosala ya bulee mpo na mposa mabe ya nzoto. Ezala bankulutu to bato mosusu, mingi na baoyo basili kosala ndenge yango babebisaki mpe bomoko ya libota na bango, babungisaki bolingo mpe limemya ya lisangá, mpe bandimamaki lisusu epai na Jéhovah te Ye oyo akoki kopesa biso nguya ya kotikala sembo mpe ya koyika mpiko liboso na masenginya ya motindo nyonso oyo ekouta na Satana.—Yisaya 12:2: Bafilipi 4:13.
18. Mpo na nini koyoka likebisi oyo epesami kati na 1 Timote 6:9, 10 ezali na ntina?
18 Bamosusu oyo bazalaki na mposa makasi ya kokoma bato minene kati na mokili, basili “komitobola na bampasi mingi” atako bazwaki makebisi na Biblia ya polele. (1 Timote 6:9, 10) Demas, moklisto oyo Paulo atangi nkombo, ebungaki mpo na mwa ntango moke to mpe libela, mpo ete asalaki motindo wana. (2 Timoté 4:10) Tokoki soko moke te kobebisa bosembo na biso epai na Jehovah bongo tozanga kozwela yango mpasi. “Nzambe akokosama te. Soko moto akokona nini, akobuka bobele yango.”—Bagalatia 6:7.
19, 20. (a) Tanga mwa makama oyo ekoki kokomela moto oyo azali kotala mingi télévizió? (b) Ndakisa nini libota moko ya Batemwe epesi na likambo yango?
19 Mbala mosusu, eloko oyo ekoki kobebisa bosembo na biso ekoki kopesama na kobombama. Na ndakisa, engebene rapport moko euti na Etats-Unis, mabota mingi bazali kolekisa pene na ndambo ya ngonga na bango oyo bazali kati na ndako (longola ngonga ya mpongi) liboso na télévizió, oyo ezali kobenda mingimingi likebi ya bilenge. Soko moklisto azali koleisa elimo na ye na kotalaka bobele télévizió, oyo ezali kobenda likebi se na pite, mobulu, akoki kotika kotosa nokinoki mitinda ya boklisto. Yango ekoki komema ye ete azanga bosembo epai na Jéhovah, mpe amitangola na ye. Moninga wana mabe azali mpenza kobebisa bizaleli ya ntina. (1 Bakolinti 15:33) Tosengeli kobosana te ete Makomami mazali kolendisa biso na komibombela ntango mpo na koyekola Liloba na Jéhovah mpe kokanisa likoló na yango na mozindo. Ntango mingi oyo tokolekisa liboso na télévizió ezali na motuya ndenge moko te na ntango oyo tokoki kosalela mpo na kozwa boyebi oyo ekomema mosambeli na sembo ya Jéhovah na bomoi ya seko? Bato mingi kati na baoyo bazali kozwa boyebi ya solo lelo oyo basengeli kosala mbongwana monene kati na bizaleli na bango mpe na makanisi na bango kati na likambo yango.—1 Timoté 4:15, 16; 2 Timoté 2:15.
20 Takashi ye Mojaponé, azali moto na mombongo oyo afandi na Angleterre. Liboso, mpokwa mwa mingi to mpe mpokwa nyonso azalaki kolekisa ngonga misato to minei mpo na kotala télévizió elongo na libota na ye. Nsima wana ye mpe mwasi na ye babatisamaki, eleki sikawa mbula misato, azwaki ekateli ya kotya boyekoli ya Biblia na ye moko mpe ya libota na ye na esika ya liboso. Na kolongolaka mokolo na mokolo minutes 15 to 30 na ngonga oyo azali kolekisa liboso na télévizió, apesaki ndakisa malamu epai na libota na ye. Atako Takashi asengeli kosalela Biblia mibale mpo na koyekola, moko ya Anglais mpe mosusu ya Japoné, akolaki nokinoki na elimo mpe azali sikawa mosaleli na misala kati na lisangá moko ya Anglais. Mwasi na ye azali pionnier auxiliaire. Alobi ete: “Mpo na kobatela kolongono ya elimo ya bana na biso mibale, nasenzelaka mokolo nyonso na oyo mwasi na ngai mpe ngai topesaka bango nzela ya kotala na télévizió.” Komisembola motindo yango ekopesaka bolamu.
20 Tobosana likambo oyo te ete: Satana ayebi bolembu na biso, mbala mosusu ayebi yango koleka biso moko. Azali pene mpo na kopusa biso ete tobungisa nyonso to tolembisa bosembo na biso epai na Jéhovah. (Tala Matai 4:8, 9) Ndenge nini tokoki komibatela? Na koyebaka ntango nyonso ete tosili komipesa na Nzambe mpe soko tozali na esengo ya kokolisa makoki na biso mpo na kosalela bamposa ya elimo ya bamosusu. Lokola tozali basaleli na sembo ya Jéhovah, tosengeli kozala ntango nyonso na molende kati na mosala na ye mpe tomitika kotambwisama na Liloba na ye mosantu. Ezalela yango ekolendisa ekateli na biso ya kobebisa soko moke te bosembo na biso epai na Nzambe, ata soko eloko nini oyo Satana akoki kopesa biso.—Nzembo 119:14-16.
Bozongeli
◻ Ndenge nini Jéhovah mpe Jésus bamonisaki bosembo?
◻ Bandakisa mosusu nini ya bosembo Biblia ezali kolobela?
◻ Satana akoki kopesa biso nini to akoki komeka kopesa biso eloko nini?
◻ Ndenge nini tokoki komilendisa mpo na kotikala basaleli na sembo ya Jehovah?
21. Likambo nini tosimbi mpo na oyo etali bametode ya Satana, mpe ndenge nini tokoki komibatela na yango?