Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/8 nk. 4-7
  • Epai ya nani osengeli kozala sembo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Epai ya nani osengeli kozala sembo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mokakatano ya kopona soki okozala sembo epai ya nani
  • Kozala mpenza sembo emonisaka bolingo
  • Kozala sembo epai ya Nzambe etindaka na kosala misala ya malamu
  • Bosembo oyo boyebi ya sikisiki ebongisi
  • Mpo na nini esengeli kozala sembo?
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Tótalela baoyo bazali sembo!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Kozala sembo—Ezali na motuya nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/8 nk. 4-7

Epai ya nani osengeli kozala sembo?

“Ekólo na biso: . . . Tiká yango elongaka kaka; esala malamu, esala mabe, ezali se ekólo na biso.”​—⁠Stephen Decatur, mokonzi ya basoda ya États-Unis oyo babundaka na mai, mobu 1779 tii mobu 1820.

BATO mingi bakanisaka ete basengeli kozala libosoliboso sembo na ekólo na bango ata soki bazali liboso ya likambo nini. Bamosusu babongolaka maloba ya Stephen Decatur na ndenge mosusu ete, ‘Lingomba na ngai, tiká yango elongaka kaka; esala malamu, esala mabe, ezali se lingomba na ngai.’

Tozalaka sembo na lingomba to na ekólo moko mpo tobotamaki na kati na yango; kasi, kopona epai ya nani to na nini tosengeli kozala sembo, ezali ekateli ya ntina mingi oyo ezali kosɛnga ete tókanisa malamu liboso ya kozwa yango. Nzokande, kotalela soki moto to makambo oyo tozalaka na yango sembo banda bomwana ezali ya malamu to te esɛngaka mpiko mpe ebimisaka mikakatano.

Mokakatano ya kopona soki okozala sembo epai ya nani

Mwasi moko oyo akolá na Zambie alobi boye: “Banda bomwana na ngai, nazalaki komipesa mingi na makambo ya losambo. Na libota na biso, tozalaki kosambela mikolo nyonso na esika moko ya bosantu na kati ya ndako, tozalaki kosala bafɛti nyonso ya lingomba, mpe tozalaki kokende na ndako-nzambe. Lingomba na ngai mpe losambo na ngai eyokanaki na makambo ya bonkɔkɔ na biso, esika nazalaki kofanda mpe libota na ngai.”

Atako bongo, ntango akolaki mwa moke, akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe mwa moke na nsima azwaki ekateli ya kolongwa na lingomba na ye. Okoki nde koloba ete azalaki lisusu sembo te?

Mobali moko na nkombo Zlatko akolaki na Bosnie, mpe na eleko moko, abundaki bitumba oyo ezalaki na ekólo na bango. Ye mpe akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Lelo oyo, aboyaka kosimba mondoki mpo na koboma ata moto nini. Okoki nde koloba ete azali lisusu sembo te?

Biyano oyo okoki kopesa na mituna yango ezali kotalela makanisi na yo mpo na likambo yango. Mwasi oyo toutaki kolobela alobaki boye: “Na mboka na biso, kotika lingomba oyo obotamá na yango mpe kokɔta na lingomba mosusu ezali likambo ya nsɔni mingi; emonanaka lokola kozanga bosembo, lokola ete moto aboyi libota na ye mpe bato ya mboka na ye.” Ndenge moko mpe, basoda oyo bazalaki kobunda ngámbo moko na Zlatko, bazalaki komona ete moto oyo aboyi kobunda na ngámbo na bango azali kotɛka mboka. Kasi mwasi yango na Zlatko bazali na likanisi ete kozala sembo epai ya Nzambe, oyo eleki ndenge nyonso ya kozala sembo nde etindaki bango na kosala makambo oyo basalaka. Kasi, motuna oyo eleki ntina ezali ya koyeba ndenge nini Nzambe atalelaka bato oyo bazali sembo epai na ye.

Kozala mpenza sembo emonisaka bolingo

Mokonzi Davidi alobaki na Yehova Nzambe ete: “Epai na moto na sembo okomimonisa sembo.” (2 Samwele 22:26) Liloba ya Liebele oyo ebongolami na “komimonisa sembo” na vɛrsɛ oyo, ezali na likanisi ya boboto oyo moto amonisaka mpo alingi eloko to moto tii ntango mposa na ye ekokokisama. Yehova akangamaka na bato oyo bazali sembo epai na ye mpo na komonisela bango bolingo, se ndenge mama azalaka na mwana na ye oyo azali komɛlisa. Yehova ayebisaki basaleli na ye ya sembo na Yisalaele na ntango ya kala ete: “Mwasi akoki nde kobosana mwana oyo anungi ye naino? Ayoka mawa lisusu te mpo na mwana mobali ya libumu na ye? Ata baoyo bakobosana nde ngai nakobosana yo te.” (Yisaya 49:15) Baoyo bazali kotya bosembo na bango epai ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na bango bandimi ete akobatela bango na bolingo nyonso.

Bolingo nde etindaka moto azala sembo epai ya Yehova. Etindaka moto alinga makambo oyo Yehova alingaka mpe ayina makambo mabe oyo Yehova ayinaka. (Nzembo 97:10) Lokola bolingo ezali ezaleli ya Yehova oyo eleki monene, kozala sembo epai ya Nzambe ekopekisa moto kosalela basusu makambo na kozanga bolingo. (1 Yoane 4:⁠8) Yango wana, soki moto atiki lingomba moko mpe akɔti na lingomba mosusu mpo na komonisa ete azali sembo epai ya Nzambe, yango elingi koloba te ete alingi lisusu libota na ye te.

Kozala sembo epai ya Nzambe etindaka na kosala misala ya malamu

Mwasi oyo touti kolobela mwa liboso alimboli makambo oyo asalaki: “Boyekoli na ngai ya Biblia esalisaki ngai nayeba ete Yehova azali Nzambe ya solo, mpe nakómaki moninga na ye. Yehova akeseni mpenza na banzambe oyo nazalaki kosambela liboso; bolingo, boyengebene, bwanya mpe nguya na ye ezali nyonso na bokatikati mpenza. Lokola Yehova asɛngaka tósambela kaka ye, nasengelaki kotika kosambela banzambe mosusu nyonso.

“Baboti na ngai bazalaki koyebisa ngai mbala na mbala ete bazali kosepela na ngai ata moke te mpe ete nazali koyokisa bango mpasi na motema. Ezalaki kosala ngai mpasi mingi, mpamba te nalingaka mpenza ete baboti na ngai bándima makambo oyo nazali kosala. Kasi, na ntango boyebi ya mateya ya solo ya Biblia ezalaki kobakisama mokemoke, namonaki polele ekateli nini nasengelaki kozwa. Nakokaki kopesa Yehova mokɔngɔ te.

“Mpo naponaki kozala sembo epai ya Yehova na esika ya kozala sembo na makambo ya lingomba oyo nabotamá kati na yango, elingi koloba te ete nazali lisusu sembo te na libota na ngai. Na maloba mpe makambo na ngai, nasalaka makasi mpo na komonisa bango ete nayebi ndenge nini bazali komiyoka. Kasi soki nazali sembo epai ya Yehova te, wana nde nakokangela libota na ngai nzela ya koyeba ye mokolo mosusu, mpe kosala yango ekozala mpenza kozanga bosembo.”

Ndenge moko mpe, tokoki koloba te ete moto atɛki mboka na ye soki kozala sembo epai ya Nzambe esɛngi ete akɔta na makambo ya politiki te mpe asimba mindoki te mpo na koboma bato mosusu. Zlatko alimboli likambo oyo asalaki na maloba oyo: “Atako nabɔkwamaki na lingomba ya boklisto, nabalaki mwasi oyo azalaki moklisto te. Ntango bitumba ebandaki, ngámbo nyonso mibale ezalaki kosɛnga ete nazala sembo epai na yango. Natindamaki na makasi napona soki nakobunda na ngámbo nini. Nabundaki bitumba mbula misato na ndambo. Nsukansuka, ngai na mwasi na ngai tokimaki na ekólo Croatie, esika tokutanaki na Batatoli ya Yehova.

“Boyekoli na biso ya Biblia esalisaki biso na komona ete tosengeli kozala sembo libosoliboso epai ya Yehova mpe ete alingi ete tólinga bazalani na biso ata soki bazali na lingomba nini to ata soki bazali bato ya mposo nini. Lelo oyo, ngai na mwasi na ngai tosangani na losambo ya Yehova, mpe nayebi sikoyo ete nakoki kozala sembo epai ya Nzambe te soki nazali kobundisa mozalani na ngai.”

Bosembo oyo boyebi ya sikisiki ebongisi

Lokola Yehova azali Mozalisi na biso, kozala sembo epai na ye esengeli kotyma liboso ya kozala sembo na makambo to epai ya bato mosusu. (Emoniseli 4:11) Nzokande, mpo ete kozala sembo epai ya Nzambe etinda biso te na kosala makambo ya mabe kozanga kokanisa, esengeli boyebi ya sikisiki ebongisa biso mpo na kozala sembo. Biblia ezali kolendisa biso boye: “Kasi ete bosengeli kokómisama sika na kati ya bokasi oyo ezali kopusa makanisi na bino, mpe . . . kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya . . . bosembo.” (Baefese 4:​23, 24, NW) Mobali oyo akomaki maloba yango ayebani mingi, azwaki mpiko ya kotala malamumalamu soki makambo oyo azalaki sembo na yango banda bomwana na ye ezalaki ya malamu to te. Yango etindaki ye asala mbongwana oyo ememelaki ye matomba.

Ya solo, Saulo asengelaki kopona soki akozala sembo epai ya nani, se ndenge oyo bato ebele bazali kosala yango na mikolo na biso. Saulo akolaki na mimeseno ya makasimakasi ya libota na ye, mpe akómaki na molende koleka mpo na komonisa ete azali sembo na lingomba oyo abotamaki kati na yango. Bosembo na makambo ya lingomba etindaki ye anyokola baoyo bazalaki na makanisi oyo ekeseni na oyo ya ye. Saulo ayebanaki mingi na ndenge azalaki kokɔtela baklisto na bandako mpe komema bango na makasi mpo na kopesa bango etumbu, to mpe koboma bango.​—⁠Misala 22:​3-5; Bafilipi 3:​4-6.

Kasi, ntango kaka Saulo azwaki boyebi ya sikisiki ya Biblia, asalaki likambo oyo baninga na ye bamonaki ete ekoki kosalema ata moke te. Akɔtaki na lingomba mosusu. Saulo, ye oyo na nsima akómaki ntoma Paulo, aponaki kozala sembo epai ya Nzambe na esika ya kozala sembo na makambo ya bonkɔkɔ. Bosembo epai ya Nzambe oyo euti na boyebi ya sikisiki etindaki Saulo akóma kondima ete bato mosusu bázala na makanisi ekeseni na oyo ya ye, alinga mpe alendisa bato, makambo oyo ekeseni mpenza na bizaleli ya mobulu mpe na molende ya kosala makambo ya mabe oyo azalaki na yango kala.

Mpo na nini esengeli kozala sembo?

Soki totiki ete makambo oyo tozalaka na yango sembo eutaka na mitinda ya Nzambe, ekomemela biso matomba mpenza. Na ndakisa, lapolo ya ebongiseli moko oyo etalelaka makambo ya libota na ekólo Australie (Australian Institute of Family) mpo na mobu 1999, eyebisaki ete makambo mosusu ya ntina oyo esalaka ete mabala eumela mpe ezala na esengo ezali “kotyelana motema mpe kozala sembo . . . [mpe] kolinga makambo ya elimo.” Kaka lapolo yango emonisaki ete “mabala oyo ezalaka na kimya mpe na esengo” esalaka ete mibali na basi bázala na esengo koleka, bázala nzoto kolɔngɔnɔ koleka, mpe bázala na bomoi ya molai, mpe bana oyo babotamaka na mabala ya ndenge wana bazalaka mingimingi malamu koleka basusu.

Na mokili ya lelo oyo makambo ezali se kobongwana, bosembo ezali lokola nsinga euti na masuwa oyo moto azali kobundana na kati ya mai asimbi yango mpo azinda te. Soki “moto oyo azali kobundana na kati ya mai” azali sembo na likambo moko te, akoki komemama epai na epai na mbonge mpe na mopɛpɛ. Kasi soki azali sembo na makambo oyo ebongi te, ekozala lokola nde nsinga yango euti na masuwa oyo ezali kozinda. Lokola Saulo, ekoki kotinda ye asala makambo ya mobulu mpe ya mabe. Kasi, bosembo epai ya Nzambe oyo moto azali na yango nsima ya kozwa boyebi ya sikisiki, ezali lokola nsinga oyo ebatelaka biso tótɛngatɛnga te mpe ememaka biso na lobiko.​—⁠Baefese 4:​13-15.

Yehova alaki bato oyo bazali sembo epai na ye ete: “Yehova alingi boyengebene, mpe akotika te bato na ye oyo bazali sembo. Akobatela bango tii na ntango oyo eyebani nsuka te.” (Nzembo 37:​28, NW) Etikali moke, bato nyonso oyo bazali sembo epai ya Yehova bákɔta na paladiso awa na mabele, epai bakoyoka lisusu mawa mpe mpasi te mpe bakozala na boninga oyo bokabwani mpo na mangomba mpe na makambo ya politiki ekobebisa yango lisusu te.​—⁠Emoniseli 7:​9, 14; 21:​3, 4.

Ata sikoyo, bamilio ya bato na mokili mobimba bamoni ete bolamu ya solo eutaka se na kozala sembo epai ya Yehova. Tozali kolendisa yo oluka Batatoli ya Yehova mpo básalisa yo na kotalela malamumalamu soki makambo oyo ozalaka na yango sembo eyokani na solo ya Biblia. Biblia elobi na biso ete: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.”​—⁠2 Bakolinti 13:​5, NW.

Esɛngaka kozala na mpiko mpenza mpo na kotalela bindimeli na biso mpe komituna mpo na nini tozali sembo na yango, kasi matomba oyo tokozwa ezali na ntina mingi soki esalisi biso tókóma baninga ya motema ya Yehova Nzambe. Mwasi oyo tolobelaki liboso amonisi makanisi oyo bato mingi bazali na yango ntango alobi boye: “Nayebi sikoyo ete kozala sembo epai ya Yehova mpe na mitinda na ye esalisaka biso tófanda malamu na bandeko na biso mpe esalisaka biso tókóma bato malamu koleka na mboka. Ata soki ezali mpasi mingi mpo na kopona yango, soki tozali sembo epai ya Yehova, akozala mpe sembo epai na biso.”

[Bililingi na lokasa 6]

Boyebi ya sikisiki etindaki Saulo atika makambo oyo azalaki na yango sembo

[Elilingi na lokasa 7]

Mpo na nini te kotalela malamumalamu soki makambo oyo ozalaka na yango sembo eyokani na solo ya Biblia

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]

Churchill, na likólo na lobɔkɔ ya mwasi: Fɔtɔ ya U.S. National Archives; Joseph Göbbels, na nsuka na lobɔkɔ ya mobali: Library of Congress

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto