Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/3 nk. 10-14
  • Tótalela baoyo bazali sembo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótalela baoyo bazali sembo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bosembo: Ezaleli oyo ekeseni na mosusu nyonso
  • Yehova, Ye oyo aleki sembo
  • Yesu Klisto, Mwana ya sembo
  • Bato ya kozanga kokoka oyo bazalaki sembo
  • Basembwi na ntango na biso
  • “Yo moko kaka nde ozali sembo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Tólónga ntembe ya kozala sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Kozala sembo—Ezali na motuya nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Epai ya nani osengeli kozala sembo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/3 nk. 10-14

Tótalela baoyo bazali sembo!

“Nani akozanga [kobanga yo, Yehova, “NW”]? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali [sembo].”​—EMONISELI 15:4.

1. Litatoli nini J. F. Rutherford apesaki na ntina na bosembo ya C. T. Russell, oyo azalaki liboso na ye?

JOSEPH F. RUTHERFORD, oyo akitanaki C. T. Russell lokola prezidá ya la Société Watch Tower na 1917, abandaki lisoló na ye na molulu ya bokundi Russell na maloba oyo: “Charles Taze Russell azalaki sembo epai na Nzambe, sembo epai na Klisto Yesu, sembo epai na misala ya Bokonzi ya Masiya. Azalaki sembo kino kati ya motema mpenza​—ee, sembo kino kufa.” Ya solo, yango ezalaki bokumisi monene oyo bokokaki kopesama na mosaleli oyo akangamaki mpenza na Yehova Nzambe. Ezali na bokumisi mosusu te tokoki kopesa na moto, oyo ezali monene koleka oyo ya koloba ete alóngaki ntembe ya kozala sembo, ete azalaki sembo​—sembo kino na kati ya motema.

2, 3. (a) Mpo na nini kozala sembo ezali mpenza ntembe? (b) Banani babongisami mpo na kobundisa baklisto kati na milende na bango ya kotikala sembo?

2 Komonisa bosembo ezalaka likambo ya pɛtɛɛ te. Mpo na nini? Mpamba te bosembo eyokanaka te na ezaleli ya komilukela litomba. Bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bazali liboso kati na baoyo bazangi bosembo epai na Nzambe. Lisusu, lelo oyo kozanga bosembo kati na libala esili kopalangana koleka bileko nyonso mosusu. Ekobo ezali kosalema mingi. Kozanga bosembo epalangani mpe mingi kati na makambo matali mombongo. Na ntina na yango, elobamaki ete: “Bakambi ya kompanyi mpe bato ya mosala mingi . . . bakanisi ete bobele bazoba mpe bilémá nde bakoki kozala sembo epai na kompanyi na bango.” Bato oyo bazali “sembo mingi” batyolamaka. Prezidá ya kompanyi moko ya kopesa toli mpo na botambwisi bakompanyi amonisaki yango na maloba oyo: “Bosembo bobele moko mpe ya liboso esengeli kozala epai na yo moko.” Koloba ete moto asengeli kozala sembo epai na ye moko ezali bongo kobebisa ndimbola ya liloba wana. Ezali kokundwela biso maloba oyo mazali na Mika 7:2 ete: “Mosembwi moko kati na bato azali te.”

3 Na meko oyo eleki monene, Satana mpe bademó na ye babongisami mpo na kobundisa biso, bazali na ekateli makasi ya kosala ete tózanga bosembo epai na Nzambe. Ezali mpo na ntina yango nde Baefese 6:12 eyebisi na baklisto ete: “Zambi tozali kobunda na mosuni mpe makila te, kasi na bisika na lokumu mpe na nguya mpe na mikonzi na mokili oyo na molili, mpe [bilimu] mabe kati na Likoló.” Ee, tosengeli kolanda likebisi oyo: “Bómisɛnzɛla, bólala mpongi te; motɛmɛli na bino, oyo mabe, azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani.”​—1 Petelo 5:8.

4. Bizaleli nini bizali kosala ete komonisa bosembo ekóma likambo ya mpasi?

4 Lisusu bizaleli ya moimi oyo tosangolaki na baboti na biso ezali kosala ete komonisa bosembo ekóma likambo ya mpasi, lokola Genese 8:21 emonisi yango ete: “Makanisi na motema na moto izali mabe longwa na bolenge na ye.” Biso banso tozali kokutana na mokakatano oyo ntoma Paulo alobelaki na ntina na ye moko: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango.”​—Baloma 7:19.

Bosembo: Ezaleli oyo ekeseni na mosusu nyonso

5, 6. Tokoki koloba nini na ntina na oyo bosembo ezali, mpe balimbolaki yango lolenge nini?

5 Liloba “Bosembo” ekeseni mpenza na mosusu nyonso. Na yango búku Insight on the Scriptures eyebisi ete: “Emonani lokola ete ezali na maloba te na Lingelesi mpo na komonisa na bosikisiki ndimbola mpenza ya maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo ekokani na yango, kasi ‘bosembo,’ esangisi likanisi ya komipesa mpe ya kokangama, oyo ntango esalelami mpo na Nzambe mpe mosala na ye, ezali kopesa mwa moke likanisi yango.”a Na ntina na “bosembo” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki kala ete: “Bokangami, kokokisa mokumba, bolingo, lisɛngisi, botosi. Boyokani nini bozali kati na maloba oyo nyonso? Nyonso ezali mitindo mikeseni ya bosembo.” Ee, ebele ya bizaleli malamu ezali mitindo mikeseni ya bosembo. Ya solo, ezali likambo ya ntina ete bosembo mpe boyengebene ekangisami esika moko kati na Makomami.

6 Bandimbola oyo elandi ezali mpe na ntina: ‘Bosembo ekoki komonisa bokangami ya koumela, oyo ebongi na kotyela motema mpe botosi, libateli liboso na kotɛngatɛnga to komekama.’ ‘Bosembo epesi likanisi ya kokangama na maloba na yo to botosi ya kozanga kotika epai na ebongiseli to mitindá oyo moto azali komona ete akangami na yango; liloba yango lipesi te bobele likanisi ya kondima likambo kasi epesi lisusu likanisi ya kotɛmɛla kolɛngolama mpe kopɛngola mosika na likambo yango oyo ondimi.’ Na yango, bato oyo bazali kokóba kozala ngwi ata kati na komekama, na botɛmɛli mpe na minyoko babongi kotángama ete bazali “sembo.”

7. Bokeseni nini bozali kati na bosembo mpe kozala ngwi?

7 Nzokande, na likambo oyo, ebongi tómonisa na ndakisa moko bokeseni oyo ekoki kosalema kati na bosembo mpe bokangami to kozanga kobongwana. Na wɛ́sti ya Etats-Unis, ezali na liziba moko oyo ebimisaka mai ya mɔ́tɔ nsima soko ya ngonga mokomoko. Ezangisaka te na boye ete yango ebéngamaki ete Mobangé oyo akangami na mosala na ye. Biblia ezali kolobela biloko bizangi bomoi lokola sanza ete bikangami na mosala na yango, mpamba te ebongi na kotyelama motema. Nzembo 89:37 elobeli sanza ete ezali “motatoli [ya sembo] na likoló.” Ekoki kolobama ete maloba ya Nzambe makobongwanaka te. Emoniseli 21:5 elobi ete: “Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete, Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika. Alobi mpe ete, Komá ete maloba oyo makoki kobongwana te mpe mazali solo.” Biloko nyonso wana bizali ngwi, bikoki kotyelama motema, kasi yango ekoki te komonisa bosembo.

Yehova, Ye oyo aleki sembo

8. Bilembeteli nini ya Makomami bizali komonisa ye oyo azali ndakisa eleki monene ya bosembo?

8 Ntembe ezali soko moke te ete, Yehova Nzambe azali ndakisa eleki monene ya bosembo. Yehova azali sembo epai na libota ya bato, kino apesaki kutu Mwana na ye ete bato bákoka kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Na Yilimia 3:12, tozali kotánga ete: “Ɛ Yisalaele, mozongi na nsima, butwá lisusu, [Yehova] alobi bongo; nakokweisa nkanda na ngai likoló na bino te, zambi ngai nazali [sembo].” Bilembeteli mosusu ya bosembo ya Yehova bizwami na maloba oyo mazali na Emoniseli 16:5, ete: “Ozali sembo, Oyo azali mpe azalaki, Oyo [Moyengebene].” Lisusu, Nzembo 145:17, eyebisi ete: “[Yehova] azali na boyengebene na nzela na ye nyonso; azali mpe na [bosembo] na misala na ye nyonso.” Ya solo, Yehova aleki monene kati na bosembo na ye na boye ete Emoniseli 15:4 eyebisi ete: “Nani akozanga [kobanga yo, Yehova, NW]? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali [sembo].” Yehova Nzambe azali sembo na meko oyo eleki bonene.

9, 10. Bosembo nini Yehova amonisaki kati na boyokani na ye elongo na libota ya Yisalaele?

9 Lisoló ya libota ya Yisalaele yango moko ezali na bilembeteli mingi oyo emonisi ete Yehova azalaka sembo epai na basaleli na ye. Na ntango ya Basambisi, mbala na mbala Yisalaele epɛngwaki mosika na losambo ya solo, kasi Yehova atikaki te koyokela bango mawa. (Basambisi 2:15-22) Na boumeli ya bikeke mitano oyo Yisalaele eyangelamaki na bakonzi, Yehova amimonisaki sembo epai na libota yango.

10 Bosembo ya Yehova ekómisaki ye motema pɛtɛɛ epai na libota na ye, lokola emonisami na 2 Ntango 36:15, 16 ete: “[Yehova], Nzambe na batata na bango atindaki lisusu mpe lisusu na nzela na bantoma na ye, zambi ayokelaki bato na ye mpe efandelo na ye mawa. Kasi bazalaki koseka bantoma na Nzambe mpe kotiola maloba na ye mpe kotuka basakoli na ye; nkanda na [Yehova] epelisami liboso na bato na ye, kino akokaki kotika lisusu te.”

11. Endimiseli to libɔndisi nini bosembo ya Yehova ezali kopesa na biso?

11 Mpo ete Yehova azali sembo mpenza, ntoma Paulo akokaki kokoma, lokola tozali kotánga na Baloma 8:38, 39, ete: “Nandimi solo ete ata kufa, ata bomoi, ata baanze, ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bozindo, ata eloko mosusu nini ekoki kotangola biso te na bolingo na Nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.” Ee, Yehova andimisi biso ete: “Nakotika yo soko moke te, nakosundola yo mpe te.” (Baebele 13:5) Ya solo, ezali libɔndisi na koyeba ete Yehova Nzambe azali ntango nyonso sembo!

Yesu Klisto, Mwana ya sembo

12, 13. Elembeteli nini tozali na yango na ntina na bosembo ya Mwana ya Nzambe?

12 Yesu Klisto azalaki mpe azali ye oyo amekolaki Yehova na kolóngáká ntembe ya kozala sembo. Ntoma Petelo akokaki na elónga nyonso kotánga Nzembo 16:10 mpe kosalela yango epai na Yesu Klisto kati na Misala 2:27 ete: “Mpo ete okotika bomoi na ngai na esika na bakufi te, okotika [Mosembwi] na yo komona kopola mpe te.” Na lolenge lobongi Yesu Klisto abyangami “mosembwi.” Na makambo nyonso, azali sembo epai na Tata na ye mpe epai ya Bokonzi ya Nzambe oyo elakamaki. Liboso Satana amekaki kobebisa bosembo ya Yesu na nzela ya masɛnginya, na makambo oyo makoki kopusa moto ete aluka kokokisa mposa na ye ya moimi. Wana alóngaki te kati na yango, Zábolo asalelaki monyoko, mpe na nsuka asalaki ete Yesu abomama likoló na nzeté ya mpasi. Yesu atɛngatɛngaki soko moke te kati na bosembo na ye epai na Tata na ye ya likoló, Yehova Nzambe.​—Matai 4:1-11.

13 Yesu Klisto azalaki sembo epai na bayekoli na ye na kobateláká elaka na ye oyo ezwami na Matai 28:20 ete: “Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.” Mpo na kokokisa elaka yango, azali na bosembo nyonso kotambwisa lisangá na ye uta Pantekote ya mobu 33 T.B. kino na mikolo na biso.

Bato ya kozanga kokoka oyo bazalaki sembo

14. Ndakisa nini ya bosembo Yobo atikaki?

14 Sikawa, ezali boni mpo na bato ya kozanga kokoka? Bakoki kozala sembo epai na Nzambe? Tozali na ndakisa monene ya Yobo. Satana abimisaki ntembe polele na likambo na ye. Yobo azalaki sembo epai na Yehova Nzambe, to azalaki kosalela ye bobele mpo na biloko oyo azalaki na yango? Satana amikumisaki ete akokaki kopɛngwisa Yobo mosika na Yehova na kopesáká ye mpasi. Ntango Yobo abungisaki biloko na ye nyonso, bana na ye nyonso, mpe ata kolɔngɔ́nɔ́ na ye, mwasi na ye apusaki ye ete: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufa!” Kasi Yobo azalaki sembo, mpamba te alobaki na ye ete: “Yo ozali koloba lokola ekolobaka basi na bilémá. Nini? Tokozwa malamu na mabɔkɔ na Nzambe; bongo tokozwa mabe mpe te? Na oyo nyonso Yobo asalaki lisumu na bibebu na ye te.” (Yobo 2:9, 10) Ya solo, epai na baoyo bamilobaki babɔndisi na ye, Yobo alobaki ete: “Ata soki [Nzambe] abomi ngai, ata bongo nakolikya epai na ye.” (Yobo 13:15, New International Version) Ezali likambo ya kokamwa te ete Yehova asepelaki na Yobo! Mpo na yango, Yehova alobaki na Elifaza, Motemani ete: “Nkanda na ngai epeleli yo mpe baninga mibale na yo; zambi bolobi likambo na sembo mpo na ngai te lokola moombo na ngai Yobo alobi.”​—Yobo 42:7, 10-16; Yakobo 5:11.

15. Elembeteli nini ya Makomami tozali na yango na ntina na bosembo ya basaleli mingi ya Yehova Nzambe?

15 Mibali mpe basi nyonso ya kondima oyo balobelami kati na Baebele mokapo 11 bakoki kotángama ete bazalaki sembo. Bazalaki te bobele kokangama na mosala na bango kasi bazalaki lisusu sembo liboso na minyoko. Na bongo, tozali kotánga na ntina na “baoyo . . . mpo na kondima, . . . bazipi minɔkɔ na bankosi, bazimisi nguya na mɔ́tɔ, [babiki na] mopotu na mopanga . . . Bamosusu batukami mpe babɛtami na fimbo, ɛɛ bakangami mpe batyami na bɔlɔ́kɔ. Babwakelami mabángá, bazengami ndambo mibale na mosumani, babomami na mopanga; batamboli na mposo na mpate mpe na mposo na ntaba, bazangi, banyokolami, basalelami makambo mabe.”​—Baebele 11:33-37.

16. Ndakisa nini ya bosembo ntoma Paulo atikaki?

16 Makomami ya Greke ya boklisto mazali mpe komonisa ndakisa ya kokamwa ya ntoma Paulo. Akokaki mpenza koloba epai na baklisto ya Tesaloniki na ntina na mosala na ye ete: “Bino bozali batatoli mpe Nzambe lokola, ete ezaleli na biso liboso na bino bandimi ezalaki na bulɛɛ mpe na boyengebene mpe na kozanga ekweli.” (1 Batesaloniki 2:10) Tozali na bilembeteli mosusu ya bosembo ya Paulo kati na maloba na ye mazwami na 2 Bakolinti 6:4, 5, epai tozali kotánga: “Kasi lokola basáli na Nzambe, tokomilobela biso mpenza kati na makambo nyonso na mpiko monene, na bolɔ́zi, na mpasi, na makamba, na kobɛtama, na kokangama, na yikiyiki, na misala mingi, na kolambela, na nzala.” Nyonso wana ezali kotatola ete ntoma Paulo azalaki na limemya ya ye moko mpamba te azalaki sembo.

Basembwi na ntango na biso

17. Maloba nini ya J. F. Rutherford mazali komonisa ekateli makasi oyo azalaki na yango ya kotikala sembo?

17 Mpo na oyo etali ntango na biso, tozali na ndakisa malamu oyo tosili kolobela na maloba ya ebandeli. Talá oyo eyebisami kati na búku Libateli ya molongo mobimba na nse ya Boyangeli ya “Mokonzi na kimya,” na lokasa 146 na nsé ya motó ya likambo moke “Sembo ata kati na bolɔ́kɔ.” Kuna ezalaki koloba ete: “Kotikaláká sembo epai na lisanga ya Yehova na boumeli ya bolɔ́kɔ na ye, na 25 Dɛsɛ́mbɛ 1918 prezidá Joseph F. Rutherford akomaki boye: ‘Mpo naboyi kosala boyokani elongo na Babilone mpe lokola nasali nyonso mpo na kosalela Nkolo na bosembo, nazali na bolɔ́kɔ, mpe nazali na botɔ́ndi mpo na yango . . . Eleki malamu ete nazala na bolɔ́kɔ mpe kozala na esengo na kondimama na ye, na esika ete nazala na bonsomi mpe kokumisama epai na bato nyonso ya mokili mpo nasali boyokani elongo na Nyama na yauli to natosi ye.’”b

18, 19. Bandakisa nini ya kolendisa mpo na oyo etali bosembo tozali na yango na mikolo na biso?

18 Tozali mpe na bandakisa eleki malamu ya bosembo ya baklisto mosusu mingi oyo bayikaki mpiko kati na minyoko. Kati na bato ya bosembo lolenge yango tokoki kotánga Batatoli ya Allemagne na boumeli ya bokonzi ya Nazi, lokola yango emonisami na kaseti ya video Purple Triangles, oyo ekabolamaki mingi na Lingelesi. Lisusu, Batatoli ya Yehova mingi ya Afrika, lokola baoyo ya Malawi babongi kolobelama. Kuna, mokɛngɛli moko ya bolɔ́kɔ atatolaki mpo na bosembo ya Batatoli, ete: “Bakobebisa bosembo na bango soko moke te. Motángo na bango mozali sé kokóla.”

19 Tokoki te kotánga Annuaire des Témoins de Jéhovah ya sika kozanga kokamwa na bosembo oyo emonisami na baklisto ya solo, lokola bosembo ya baoyo bazali na Grèce, na Mozambique mpe na Pologne. Mingi kati na bango banyokwamaki makasi mpenza; basusu babomamaki. Lokasa 177 ya Annuaire 1992 ezali komonisa bililingi ya mibali baklisto libwa ya mboka Ethiopie oyo balóngaki ntembe ya kozala sembo kino kobomama. Lokola tozali Batatoli ya Yehova, totondi na nsaí ete tozali na bandakisa mingi ya malamu oyo ezali kolendisa biso ete tólónga ntembe ya kozala sembo, boye te?

20. Mbano nini ekolanda soki totikali sembo?

20 Na kotɛmɛláká masɛnginya mpe mpasi na bosembo nyonso, tokokólisa limemya ya biso moko. Bongo, na ngámbo na nani tolingi kozala kati na likambo oyo etali bosembo? Na kolóngáká ntembe ya kozala sembo, tozali komitya na ngámbo ya Yehova Nzambe kati na likambo yango mpe tozali komonisa ete Satana Zábolo azali mobuki-lokuta ya monene mpe ya nsɔ́mɔ! Na lolenge yango Mozalisi na biso, Yehova Nzambe akosepela na biso, mpe akopesa biso mbano ya bomoi ya seko na esengo. (Nzembo 37:29; 144:15b) Na mbala ya nsima tokotalela oyo ezali kosɛngama mpo na kolónga ntembe ya kozala sembo.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Encyclopédie ya bolimboli Biblia oyo ezali na búku mibale, ebimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

b Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

◻ Mpo na nini kozala sembo ezali ntembe monene?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete “bosembo” ezali liloba moko oyo ekeseni na maloba mosusu?

◻ Bandakisa nini ya Makomami tozali na yango ya bato bazangi kokoka oyo bazalaki sembo?

◻ Bandakisa malamu nini ya bosembo tozali na yango na mikolo na biso?

[Elilingi na lokasa 11]

Charles Taze Russell

[Elilingi na lokasa 12]

Yesu azalaki solo “mosembwi” ya Yehova

[Elilingi na lokasa 13]

Atako Yobo azalaki moto ya kozanga kokoka, amimonisaki sembo epai na Nzambe

[Elilingi na lokasa 14]

Paulo atikaki ndakisa moko malamu mpenza ya bosembo epai na Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto