Luka bozwi boleki wolo na motuya
Solo ya Biblia ekoki kokokisama na wolo, na palata, soko mpe na biloko mosusu na motuya oyo bibombami. Ata soki oluka naino wolo mpenza te to palata te, ata bongo oyebi ete mpo na kozwa yango ezali kosenga mosala mingi mpe kolendendela Nzokande, mbala mingi batimoli na biloko yango na motuya bazali kozwa eloko te.
Kasi, soko moto azali koluka biloko na motuya bibombami na Biblia akoki kozanga yango soko moke te. Makomami mazali kopesa biso elikya oyo na kolendisa ete: “Soko okoluka ye lokola palata, mpe okolukaluka ye lokola na biloko na motuya bibombami, mbɛ okososola (kobanga Jéhovah, MN) mpe okozwana na boyebi na koyeba Nzambe.” (Masese 2:4, 5). Kasi, mpo na yango, osengeli koluka.
“Luka mpe mona”
“Luka mpe mona ete mosakoli moko akobima na Galilai te.” Na ekeke ya liboso, wana ezalaki toli oyo Bafalisai Bayuda bapesaki na Nikodeme, ye mpe Mofalisai lokola. “Luka mpe mona”. Ya solo mpenza, yango ezalaki toli malamu. Moto akokaki koluka mpe kozwa solo, oyo eleki wolo na motuya mingi.
Kasi, mpo “na likambo yango, baoyo bapesaki toli ya ‘koluka mpe komona’ bango moko bazalaki kosala yango te. Mpo na nini?
Bakonzi na mangomba mpe Bafalisai batindaki bapolisyé mpo na kokanga Yesu Klisto. Kokamwaka lolenge na ye ya koteya, bazongaki kozanga ete bakanga ye. Na yango, Bafalisai batunaki bango boye: “Bino mpe bokosami?” Nikodeme akotelaki bango na kolobaka ete: “Mibeko na biso mikokweisa moto soko miyoki ye liboso te mpe boyebi makambo masili ye kosala te?” Na maloba yango azwaki toli ya ‘koluka mpe komona.’—Yoane 7:32, 45-52.
Na bongo, mpo na nini banganga mpe Bafalisai basalaki yango te? Bayebaki te to baboyaki kondima ete atako Yesu abokwamaki na Galilai, kasi abotamaki na Beteleme. Nzokande, mosakoli Mika asakolaki ete: “Uta na yo (beteleme) moko akobima mpo na ngai oyo akozala mokolo—na—mokili kati na Yisraele.” (Mika 5:2) Na yango, bato oyo minene balukaki te mpe bamonaki te bilembeteli oyo bilakisaki ete Yesu azalaki mosakoli, oyo asengelaki kozala mokonzi na Yisraele. Ezalela yango ememaki bango na makama minene mpe emonisi ntina ya koluka mpe kozwa solo nyonso. Kasi ndenge nini solo yango ezali mbala mingi kotalelama?
Solo ebebisamaki
Mokomi moko na ekeke ya 19 alobaki ete: “Lokola wolo kitoko, solo eboyami, mpamba te bato bamonaki ete ezali mpasi te mpo na kobebisa solo na esika ya kolanda yango.” Maloba oyo makokani na makambo oyo mazali koleka kati na mangomba Satan le Diable, “tata na lokuta,” ye nde na kobombana azali kotambwisa mosala oyo na kobebisa solo. (Yoane 8:44; Emoniseli 12:9) Azali kosalela mangomba ya lokuta mpo na kobebisa mateya ya solo likoló na mituna na ntina lokola oyo: Nzambe azali nani? Esika na Yesu ezali nini liboso na ye? Avenir ya mabelé mpe bato ekozala ndenge nini?
Banganga mpe Bafalisai bakokaki koluka mpe komona solo. Bakokaki kozwa bozwi mingi oyo eleki wolo na motuya. Ya solo, bakokaki koyeba solo nyonso likoló na Yesu ‘na koyokaka ye mpe na koyebaka oyo azalaki kosala’, engebene toli ya Nikodeme. Soki bakokaki kosala yango na bosembo nyonso, ntembe ezali te ete Yesu akokaki kolimbolela bango makambo matali bango, lokola asalaki yango epai na bayekoli na ye. (Malako 4:34) Kasi epai wapi tokoki kozwa solo na mikolo na biso? Tokoki kondimisama ete tokolonga na bolukiluki na biso mpe koyeba solo nyonso?
[Elilingi na lokasa 4]
Bakonzi ya mangomba bakokaki koyeba solo nyonso likolo na Yesu na ‘koyokaka ye’