Likita ya nsuka ya mbula
ƆKƆTƆ́BƐ 1, 1994
LIKITA YA NSUKA YA MBULA ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, likosalema na Ɔkɔtɔ́bɛ 1, 1994, na Ndako ya Liyangani ya Batatoli ya Yehova, oyo ezali na Bulevare Kennedy N0. 2932, na Jersey City, kati na etúká ya New Jersey. Likita moko ya ebandeli likoyanganisa bobele basangani ya la Société, likosalema na 9h30, likolandana na likita ya nsuka ya mbula, na 10h00.
Basangani ya la Société baoyo basili kosanzé baadresi na bango na boumeli ya mbula eleki, bakoyebisa yango uta sikawa na Biro ya Sekretere mpo ete lokasa ya libyangi mpe bakalati, ekoka kokómela bango na boumeli ya Yulí.
Bakalati oyo ekotindama epai na basangani ya la Société elongo na nkasa ya likita ya nsuka ya mbula, esengeli kozongisama na Biro ya Sekretere ya la Société liboso ya Augústo 1. Mosangani moko na moko asengeli kotondisa kalati na ye mpe kozongisa yango kozanga koumela, koyebisáká soko akoyangana na likita to akoyangana te. Makambo oyo akokoma na kalati moko na moko masengeli kotikala bobele bongo, mpamba te makosalisa biso na koyeba liboso banani oyo bakoya na likita.
Ebongisami ete pologalámi mobimba, bakisá mpe likita moke ya ebandeli mpe lapólo oyo ekopesama nsima, esuka na 13 h 00 to mwa moke nsima. Likita likozala na nsima ya nzánga te. Mpo ete bisika bizali mingi te, moto oyo akokɔta bobele oyo azali na lokasa ya libyangi. Pologalámi ya likita oyo ya nsuka ya mbula ekolandama na nzela ya telefone te.