Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
“Batikaki te”
UTA na mikolo ya Yesu Klisto mpe bantoma na ye, bakonzi ya mangomba basili kosala nyonso oyo ekoki na bango mpo na kopekisa mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Mbala na mbala, bakonzi ya mboka na Yelusaleme “bapekisaki” bantoma makasi ete ‘baloba na nkombo na Yesu te.’ (Misala 5:27, 28, 40) Nzokande, lisoló ya Biblia elobi ete “liloba na Nzambe ekólaki, motuya na bayekoli na Yelusaleme etondaki mingi mpenza.”—Misala 6:7.
Bambula nkóto mibale na nsima, tozali kino lelo komona bakonzi ya mangomba na Yisraele oyo bazali kopusa bakonzi ya mboka ete bapekisa mosala ya baklisto ya solo kati na mboka wana. Na nsé na bopusi na bato ya mangomba ya makambo makasi, na Novɛ́mbɛ 1987, bakonzi ya Leta na engumba Tel Aviv, bapekisaki Batatoli ete bayanganaka lisusu te na Ndako na bango ya Bokonzi oyo ezali na biro ya filiale ya la Société Watch Tower. Mobeko yango ekokisamaki mpenza na Ɔkɔtɔ́bɛ 1989. Mpo na kotosa, Batatoli bakómaki koyangana na bandako ya kofutela na kartyé wana na boumeli ya bambula misato, wana Ndako ya Bokonzi na bango ezalaki kosalelama te.
Katikati na ntango yango, likambo yango lifundamaki na Esambiselo monene ya Israël. Biro monene ya Leta ya makambo matali bosembo etalelaki lisusu makambo oyo Batatoli balobaki mpe esakolaki ete likambo na bango ekoki kokweisama te na kotalela mbeba monene ya makanisi mabe oyo bato ya mangomba bazalaki na yango. Na yango, bakonzi ya mboka basengelaki bobele kobongola ekateli na bango, mpe na esengo nyonso, Batatoli ya Yehova bazongaki na Ndako ya Bokonzi na bango.
Mosala ya kosakola mozongaki nsima na boumeli ya bambula wana? Soko moke te! Na ntango Ndako ya Bokonzi ezalaki na epekiseli, ezalaki na masangá mibale na Tel Aviv mpe etuluku mosusu ya boyekoli ya Biblia pene na engumba Lod. Bambula misato na nsima, ntango Ndako ya Bokonzi efungwamaki lisusu, Batatoli ya Yehova bayikanaki na masangá minei, mpe etuluku ya sika ya boyekoli ya Biblia ezalaki koyangana na Beersheba.
Bokóli na Israël esuki te bobele epai na bituluku mibale ya minene, baoyo balobaka Arabe mpe baoyo balobaka Liebele. Ezalaki na ebele ya bapaya bautaki na oyo ebéngamaki kala Union Soviétique, na yango Batatoli ya Yehova oyo balobaka lokóta ya Russe bazali sikawa koyebisa nsango malamu epai na bango. Makita mosusu na lokóta ya Russe ezali kosalema kati na masangá misato; bato koleka monkámá bautaki koyangana kala mingi te kati na liyangani moko na lokóta ya Russe.
Na ntembe te, bato ya mangomba ya makanisi mabe bakokóba mosala na bango ya kotɛmɛla losambo ya solo. Kasi basakoli ya Bokonzi bazali kokóba komekola baklisto ya ekeke ya liboso baoyo, atako bazwaki botɛmɛli, ‘batikaki te kosakola nsango malamu ete Yesu azali Klisto.’—Misala 5:42.