Likita ya nsuka ya mbula 5 ɔkɔtɔ́bɛ 1996
LIKITA YA NSUKA YA MBULA ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, likosalema na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ 1996, na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova, na 2932 Kennedy Boulevard, na Jersey City, na etúká ya New Jersey. Likita moko ya ebandeli esengeli kosalema bobele na basangani ya la Société, na 9:30, likolandana na likita ya nsuka ya mbula, na 10:00.
Tokozala na mposa ete basangani ya la Société baoyo basili kosanzé adresi na bango na boumeli ya mbula eleki, bákoka koyebisa yango uta sikawa na Biro ya mokomeli mpo ete lokasa ya libyangi mpe bakálati ya kopesa makoki ya voti ekoka kokómela bango na boumeli ya sanza ya Yulí.
Libyangi mpe bakálati oyo ekotindama epai na basangani ya la Société esengeli kozongisama na Biro ya mokomeli ya la Société liboso na mokolo ya 1 Augústo. Mosangani moko na moko asengeli kotondisa kálati na ye mpe kotinda yango kozanga koumela na koyebisáká sikisiki soko akoyangana na likita to akoyangana te. Makambo oyo akokoma masengeli kotikala bobele bongo, mpamba te makosalisa biso na koyeba liboso motángo ya bato oyo bakoya na likita.
Ebongisami ete manáka mobimba, bakisá mpe likita moke ya ebandeli mpe balapólo oyo ekopesama, ekosuka na 13:00 to mwa moke na nsima. Likita likozala te na nsima na nzánga. Na kotalela bisika oyo bibongisami, bobele moto oyo azali na lokasa ya libyangi nde akokɔta. Bibongiseli bikozwama te mpo na kolanda likita ya nsuka ya mbula oyo na telefone.