Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/7 lok. 29
  • Likita ya nsuka ya mbula

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likita ya nsuka ya mbula
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Likita ya nsuka ya mbula
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Likita ya nsuka ya mbula 7 Ɔkɔtɔbɛ 2000
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Likita ya nsuka ya mbula 7 Ɔkɔtɔbɛ 2000
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Likita ya nsuka ya mbula 4 Ɔkɔtɔ́bɛ 1997
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/7 lok. 29

Likita ya nsuka ya mbula

5 ƆKƆTƆ́BƐ 1996

LIKITA YA NSUKA YA MBULA ya basangani ya Watch Tower Bible and Tract Society, likosalema na mokolo ya 5 Ɔkɔtɔ́bɛ 1996, na Ndako ya Mayangani ya Batatoli ya Yehova, na Boulevard Kennedy 2932, na Jersey City, na etúká ya New Jersey. Likita moko ya ebandeli esengeli kosalema bobele na basangani ya la Société, na 9:15, likolandana na likita ya nsuka ya mbula, na 10:00.

Tokozala na mposa ete basangani ya la Société baoyo basili kosanzé adresi na bango na boumeli ya mbula eleki, bákoka koyebisa yango uta sikawa na Biro ya mokomeli mpo ete lokasa ya libyangi mpe bakálati oyo ekoka kokómela bango na boumeli ya sanza ya Yulí.

Nkasa ya kopesa lotómo na mosusu, oyo ekotindama epai na basangani ya la Société elongo na liyebisi ya likita ya nsuka ya mbula, esengeli kozongisama na biro ya mokomeli ya la Société liboso na 1 Augústo. Mosangani moko na moko asengeli kotondisa nkasa yango mpe kotinda yango kozanga koumela na koyebisáká sikisiki soko ye moko mpenza akoyangana na likita to te. Makambo oyo akokoma masengeli kotikala bobele bongo, mpamba te makosalisa biso na koyeba liboso motángo ya bato oyo bakoya na likita.

Ebongisami ete manáka mobimba, bakisá mpe likita moke ya ebandeli mpe balapólo oyo ekopesama, ekosuka na 13:00 to mwa moke na nsima. Ekozala na likita moko te na nsima ya nzánga. Na kotalela ete bisika bibongisami sikisiki, bobele moto oyo azali na lokasa ya libyangi nde akokɔ́ta. Bibongiseli bikamatami te mpo na kolanda likita ya nsuka ya mbula oyo na telefone.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto