Basepelisaki mitema ya baboti na bango
“MWANA na ngai, soki motema na yo ezali na [bwanya], motema na ngai ekosepela, motema na ngai mpenza.” (Masese 23:15) Ya solo, baboti baklisto basepelaka ntango bana na bango bazwi bwanya ya Nzambe. Mwapɔsɔ, 10 Sɛtɛmbɛ 2005, bato 6859, oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge bayanganaki na Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, mpo na kolanda likita ya kopesa badiplome na bana-kelasi ya mbala ya 119. Bato nyonso oyo bazalaki wana basepelaki makasi, mingimingi baboti ya bana-kelasi 56.
David Walker, ndeko moko oyo aumeli mingi na Betele ya États-Unis, afungolaki likita yango na libondeli. Na nsima, prezida ya programɛ yango, David Splane, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, abandaki programɛ yango na koyebisa baboti ya bana-kelasi boye: “Ebongi mpenza tópesa bino longonya. Bizaleli oyo bolonaki epai ya bana na bino esalisi bango bákóma bamisionɛrɛ.” Baboti wana bakokaki kozala na mawa, mpo nsima ya mwa ntango bana na bango bakokende mosika. Kasi, ndeko Splane alendisaki bango boye: “Bomitungisa te mpo na bana na bino. Yehova akoki kobatela bango koleka ndenge bino bokoki kobatela bango.” Na nsima alobaki boye: “Bókanisa naino malamu oyo bana na bino bakosala. Bato oyo bazali komona mpasi, bakozwa libɔndisi mpo na mbala ya liboso na bomoi na bango.”
Ndenge ya kokoba komemela basusu esengo
Prezida ya programɛ atángaki nkombo ya balobi minei. Ya liboso, Ralph Walls, oyo azali na komite ya filiale ya États-Unis, asalaki lisolo oyo elobi: “Bófungola miso.” Amonisaki ete kokufa miso na elimo ezali mabe koleka kokufa miso na mosuni. Lisangá ya Laodikia na ekeke ya liboso ekufaki miso na elimo. Baklisto ya lisangá yango oyo bakufaki miso na elimo bazwaki lisalisi, kasi ezali malamu mingi tófungolaka miso na biso ya elimo ntango nyonso mpo na kokima likambo yango. (Emoniseli 3:14-18) Molobi alobaki boye: “Bófungola miso, mpe bótalelaka bandeko oyo bazali kokamba lisangá ndenge Yehova atalelaka bango.” Bana-kelasi basengeli komitungisa mingi te soki mikakatano ebimi na lisangá. Nkolo Yesu Klisto azali komona makambo nyonso wana. Na ntango ebongi, akosilisa makambo yango.
Na nsima, Samuel Herd, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ayanolaki na motuna, “Bómibongisi?” Ndenge kaka moto ya mobembo amemaka bilamba oyo akosengela na yango, bana-kelasi basengeli ntango nyonso kolata bizaleli ya bomoto ya sika. Basengeli kozala na motema mawa oyo Yesu azalaki na yango. Ntango moto moko ya maba alobaki na ye ete: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto,” Yesu alobaki boye: “Nalingi. Kómá pɛto.” (Malako 1:40-42) Na nsima, molobi alobaki ete: “Soki bozali mpenza na mposa ya kosalisa bato, bokoyeba ndenge ya kosala yango.” Bafilipi 2:3 ezali koloba na baklisto bátalelaka “bamosusu ete baleki [bango].” Ndeko Herd, alobaki ete: “Kozala na komikitisa ezali na ntina mingi koleka kozala na boyebi. Bato oyo bokokutana na bango na mosala ya kosakola mpe bandeko ya lisangá bakozwa litomba na boyebi na bino kaka soki bozali na komikitisa.” Asukisaki lisolo na ye na koloba ete soki bana-kelasi bakobi kolata bolingo ya boklisto, bakoki kozala na elikya ete bakolonga mpenza na mosala na bango epai bazali kokende.—Bakolose 3:14.
Mark Noumair, moko ya balakisi ya Gileadi, akamwisaki bato na motó ya likambo ya lisolo na ye: “Okobatela yango?” Liloba “yango” esalelami mpo na kolobela botɔndi na biso mpo na malamu ya Yehova. Nzembo 103:2 elobi ete: “Ɛ molimo na ngai, sanzolá [Yehova] mpe bosaná boboto na ye nyonso te.” Bayisalaele bamonisaki botɔndi te mpo na mana oyo ezalaki kosalisa bango bátikala na bomoi mpe babengaki yango “bilei ya pamba-pamba oyo!” (Mitángo 21:5, Bible na lingala ya lelo oyo) Atako mikolo ezalaki koleka, mana esilaki valɛrɛ te, kasi bango bazalaki kosepela na yango lisusu te. Molakisi alobaki boye: “Soki bóbosani boboto ya Yehova mpe bókómi kotalela mosala na bino ya misionɛrɛ lokola misala nyonso, yango ekozala na bopusi mabe na lolenge oyo bozali kotalela mosala oyo Yehova apesi bino.” Nzembo 103:4 elobi ete Yehova “akozingelaka yo na boboto.” Bana-kelasi bakomona boboto ya Nzambe na masangá na bango ya sika.
Molakisi mosusu ya Gileadi, Lawrence Bowen, asalaki lisolo oyo elobi “Okozwa mapamboli?” Amonisaki ete bana-kelasi ya mbala ya 119 ya Gileadi bazwi formasyo makasi mpo na kolonga na mosala na bango ya misionɛrɛ. Kasi sikoyo, basengeli kokangama na Yehova mpe na mosala oyo apesi bango. Na Emoniseli 14:1-4, balobeli bato 144 000 lokola “bato oyo bazali kokoba kolanda Mwana-Mpate epai nyonso oyo azali kokende.” Bato yango nyonso bazali kokangama na Yehova mpe Mwana na ye atako bazali kokutana na mikakatano, mpe bazali kolonga na mikano na bango. Alobaki boye: “Ezala tokutani na mokakatano nini, biso mpe tosengeli kokangama na Yehova mpe na mosala oyo apesi biso.” Soki bana-kelasi basali bongo, bakomona ete mapamboli ya Yehova ‘ekozwa’ bango.—Deteronome 28:2.
Babotaki mbuma malamu na mosala na bango
Ntango bazalaki naino na kelasi, bana-kelasi bazalaki kobima na mosala ya kosakola wikende nyonso. Ndenge Wallace Liverance, sɛkrɛtɛrɛ ya eteyelo ya Gileadi, amonisaki yango, emonanaki polele ete bana-kelasi babotaki mbuma ya malamu. Basakolaki nsango malamu na minɔkɔ soki zomi mpe bayekolaki Biblia na bato ebele. Mwana-kelasi moko na mwasi na ye babandaki koyekola Biblia na mobali moko ya ekólo Chine. Nsima ya koyekola na ye mbala mibale, batunaki ye aloba soki azali komiyoka ndenge nini lokola ayebi Yehova. Afungolaki Biblia na ye mpe asɛngaki bango bátánga Yoane 17:3. Azalaki komiyoka ete azali kolanda nzela ya bomoi.
Anthony Morris, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asololaki na bandeko misato oyo basalaka na bakomite ya filiale ya Côte d’Ivoire, Équateur mpe République Dominicaine. Bandeko yango bayebisaki bana-kelasi ete bakomite ya filiale ezali kozela bango motema likoló mpe ekosalisa bango bámesana na bateritware na bango.
Na nsima, Leonard Pearson, ya Betele ya États-Unis, asololaki na bandeko misato oyo basalaka na bakomite ya filiale ya Ouganda, Papouasie-Nouvelle-Guinée, mpe République démocratique du Congo. Bandeko yango balendisaki bana-kelasi bámipesa mingi na mosala ya kosakola. Ndeko moko ná mwasi na ye oyo basali mosala ya misionɛrɛ mbula koleka 21 na Congo basalisi bato 60 bámipesa epai na Yehova mpe bázwa batisimo. Bandeko yango bazali sikoyo koyekola Biblia na bato 30, mpe 22 bazali koyangana na makita. Na kotalela mbuma mingi wana ya elimo, oyo ezali ntango malamu mpenza ya kosala lokola misionɛrɛ.
Bópesa litatoli na lombangu
Gerrit Lösch, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisolo ya nsuka. Lisolo na ye elobaki, “Bóloba na ntina etali Nzambe mpe bópesa litatoli na ntina etali Yesu na Mokolo ya Nkolo.” Na mokanda ya Emoniseli, tokokuta maloba “litatoli,” “batatoli,” mpe “kotatola” mbala 19. Yango emonisi polele mosala oyo Yehova alingi ete basaleli na ye básala. Ntango nini tosengeli kopesa litatoli wana? Na boumeli ya “Mokolo ya Nkolo.” (Emoniseli 1:9, 10) Mokolo yango ebandaki na 1914, ezali kokoba na mikolo na biso, mpe ekokende tii na mikolo ezali koya. Na kotalela Emoniseli 14:6, 7, mosala ya koloba na ntina etali Nzambe ezali kosalema na lisalisi ya baanzelu. Emoniseli 22:17 emonisi ete mokumba ya kotambwisa mosala ya kopesa litatoli na ntina na Yesu epesami na mabɔkɔ ya baklisto bapakolami. Kasi, biso nyonso tosengeli kosalela libaku yango sikoyo. Na vɛrsɛ 20, Yesu azali koloba ete “nazali koya nokinoki.” Ndeko Lösch alendisaki bato nyonso oyo bazalaki wana ete: “Bóbenga bato ete, ‘bóya, bókamata mai ya bomoi ofele.’ Yesu azali koya noki. Tómibongisi?”
Fred Rusk, oyo azalaki molakisi na eteyelo ya Gileadi na boumeli ya mbula 11, asalaki libondeli ya nsuka mpo na kopesa Yehova matɔndi mpe libondeli yango esimbaki mpenza mitema ya bayangani nyonso. Makambo esukaki mpenza na ndenge oyo ebongi mpo na mokolo wana ya esengo monene.
[Etanda na lokasa 13]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 10
Batindami na mikili: 25
Bana-kelasi bazalaki: 56
Mwayene ya mbula ya kobotama: 32,5
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 16,4
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 12,1
[Elilingi na lokasa 15]
Bana-kelasi ya mbala ya 119 ya Gileadi, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Helgesen, S.; Daugaard, H.; Pierluissi, A.; Joseph, I.; Racanelli, C. (2) Byrge, T.; Butler, D.; Freedlun, J.; Nuñez, K.; Pavageau, C.; Doumen, T. (3) Camacho, O.; Lindqvist, L.; Broomer, A.; Wessels, E.; Burton, J.; Woodhouse, O.; Doumen, A. (4) Tirion, A.; Connally, L.; Fournier, C.; Gil, A.; Johnsson, K.; Hamilton, L. (5) Byrd, D.; Scribner, I.; Camacho, B.; Laschinski, H.; Hallahan, M.; Libuda, O. (6) Joseph, A.; Lindqvist, M.; Helgesen, C.; Nuñez, D.; Scribner, S.; Fournier, J. (7) Pierluissi, F.; Pavageau, T.; Broomer, C.; Racanelli, P.; Butler, T.; Woodhouse, M.; Libuda, J. (8) Laschinski, M.; Freedlun, S.; Burton, I.; Tirion, M.; Byrd, M.; Byrge, J. (9) Wessels, T.; Hallahan, D.; Connally, S.; Gil, D; Daugaard, P.; Hamilton, S.; Johnsson, T.