Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/7 nk. 17-19
  • Bazali kosepela kosala mokano ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bazali kosepela kosala mokano ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Balendisami ete bátika mokano ya Yehova etambwisa bango
  • Kosala mokano ya Yehova na mosala ya kosakola
  • Bana-kelasi ya Gileadi balendisami ‘bábanda kotimola’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bazali na mposa ya kosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bazali komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Eteyelo ya Galaad: Eumeli mibu 50 mpe ezali kosala na nguya mingi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/7 nk. 17-19

Bazali kosepela kosala mokano ya Nzambe

YESU atikelá baklisto nyonso ndakisa malamu mpenza na ndenge abondelaki Tata na ye ete: “Ezala, mokano na ngai te, kasi oyo ya yo esalema.” (Luka 22:42) Bamilio ya basaleli ya Yehova lelo oyo bazali komonisa mpe elimo wana ya botosi. Na kati na bango, tokotánga bayekoli 52 ya kelasi ya mbala ya 120 ya Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Na mokolo ya 11 Marsi 2006, bandeko yango oyo bazwaki badiplome na bango basepelaki makasi na libaku oyo bazwaki ya kokende kosala mokano ya Nzambe na mikili ndenge na ndenge, atako na kati ya mikakatano.

Nini etindaki bana-kelasi yango bátika mokano ya Yehova etambwisa bomoi na bango? Ndeko Chris ná mwasi na ye Leslie, oyo batindamaki na Bolivie, balobi boye: “Lokola tomiboi biso moko, tomipesi mpo na kosala nyonso oyo esengeli na kati ya ebongiseli ya Yehova.” (Malako 8:34) Ndeko Jason ná mwasi na ye Chere, oyo batindamaki na Albanie, babakisaki boye: “Mokumba mokomoko oyo tozali kozwa na ebongiseli ya Yehova ezali na mikakatano na yango. Kasi, na nyonso wana, tomoni ete Yehova abongi mpenza ete tótyela ye motema.”

Balendisami ete bátika mokano ya Yehova etambwisa bango

George Smith, oyo asalaka na Betele na Departema ya mayemi, asalaki libondeli ya ebandeli. Stephen Lett, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova mpe azalaki mokambi ya likita yango, atombelaki bayangani nyonso boyei malamu. Bandeko oyo bautaki na bikólo 23 bayaki na eteyelo monene ya Watchtower, na engumba Patterson, na etúká ya New York, mpo na likita yango. Ndeko Lett ayebisaki bana-kelasi ete bakokokisa “likambo moko ya monene.” Abendaki likebi na “biloko oyo epikamá makasi,” lokola mateya ya lokuta, oyo bamisionɛrɛ bakobanda kokweisa na nguya ya Makomami. (2 Bakolinti 10:4, 5) Asukisaki boye: “Ekozala esengo monene mpo na bino komona ndenge Yehova akobanda kosalela bino mpo na kokweisa biloko oyo epikamá makasi na mitema ya bato ya sembo epai bazali kotinda bino!”

Harold Jackson, oyo asalaka na biro monene ya Batatoli ya Yehova, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo, “Mwa makambo oyo bosengeli kobosana te.” Alobaki ete bamisionɛrɛ basengeli kobosana ata mokolo moko te “koluka liboso bokonzi mpe boyengebene” ya Nzambe. (Matai 6:33) Basengeli kobosana te ete “bolingo etongaka” mpe esalisaka mpo na kolonga. (1 Bakolinti 8:1) Alobaki ete: “Tiká ete bósalelaka bato makambo ntango nyonso na bolingo.”

Na nsima, Geoffrey Jackson, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe azalaki misionɛrɛ banda 1979 tii na 2003, asalaki lisolo: “Boyebi mokumba na bino?” Ayebisaki bana-kelasi ete basengeli komitalelaka bango moko mpe kotalela mosala ya kosakola na ndenge oyo ebongi. Baklisto basengeli kosala na molende mpenza mosala ya kobwaka mboto ya solo mpe ya kobwakelaka yango mai. Kasi, mokumba ya kokolisa bato na elimo ezali ya Yehova, mpamba te “Nzambe moto azali kokolisa.” (1 Bakolinti 3:6-9) Abakisaki boye: “Yehova azali kosɛnga bino bótikala makasi na elimo. Kasi, wapi mokumba na bino oyo eleki monene? Kolinga Yehova mpe kolinga bato oyo bozali kokende kosalisa.”

Lawrence Bowen, moko ya balakisi ya Eteyelo ya Gileadi, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo, “Bóyeba ndenge oyo bosengeli komitambwisa.” Akundwelaki bana-kelasi ete Yehova azalaki kotambwisa mpe kobatela Bayisalaele na esobe na ndenge ya likamwisi. (Exode 13:21, 22) Azali mpe kotambwisa mpe kobatela biso lelo oyo. Lolenge moko oyo azali kosala yango lelo oyo ezali na nzela ya lisangá ya baklisto bapakolami, oyo ezali “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo.” (1 Timote 3:14, 15) Bamisionɛrɛ ya sika basengeli kotombola solo ya Biblia, oyo etambwisaka mpe ebatelaka bato ya komikitisa.

Wallace Liverance, molakisi mosusu ya Gileadi, alendisaki bana-kelasi ete bábosana te liloba ya Nzambe oyo ezali na “nsima” na bango. Liloba ya Nzambe ezali na nsima na ndenge basilisaki kokoma yango eleki lelo bambula ebele. Lokola mobateli ya mpate oyo azali kobelela na nsima ya etonga na ye, Yehova azali na nsima ya basaleli na ye mpe azali kotambwisa bango na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Yisaya 30:21; Matai 24:45-47) Eteyelo ya Gileadi esalisaki bana-kelasi bákóma na botɔndi makasi lisusu mpo na moombo yango. Kutu, “moombo” yango abimisá Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami Mosantu. Molobi alendisaki bana-kelasi ete: “Bósalela makambo ya motuya oyo ezali na kati na yango mpo na koteya basusu.”​—Matai 13:52.

Kosala mokano ya Yehova na mosala ya kosakola

Na lisolo “Bamonisi mposa makasi mpo na kosakola nsango malamu,” Mark Noumair, molakisi mosusu ya Gileadi, alobelaki mwa makambo ya esengo oyo bana-kelasi bakutanaki na yango na mosala ya kosakola na boumeli ya eleko oyo bazalaki kolanda mateya. (Baloma 1:15) Asololaki na bana-kelasi lisolo oyo emonisaki ete bamonisaki mposa makasi mpenza mpo na kosakola na mabaku nyonso.

Bana-kelasi balendisamaki lisusu na lisolo oyo ndeko Kenneth Flodin asalaki elongo na bandeko misato oyo bazali sikoyo kotala masangá na États-Unis. Richard Keller mpe Alejandro Lacayo, oyo basalaki liboso na Amerika ya Sudi mpe ya Ntei, bamonisaki ndenge balongaki mikakatano ya ndenge na ndenge oyo bakutanaki na yango, mpe bayebisaki mwa mapamboli oyo bazwaki na mosala ya misionɛrɛ. Moacir Felisbino alobelaki mateya oyo azwaki ntango azalaki kosala elongo na bamisionɛrɛ na ekólo Brésil, epai akolaki.

David Schafer asololaki na Robert Jones, Woodworth Mills, mpe Christopher Slay oyo baumeli mingi na mosala ya misionɛrɛ. Bandeko misato wana bayebisaki ndenge bayekolaki kotyelaka Yehova motema na ntango bakutani na mikakatano. Bayebisaki bana-kelasi ete mateya oyo bazwi na ebongiseli ya Yehova ebongisi bango malamu mpenza mpo na mosala ya misionɛrɛ. Ndeko Mills alobaki na mokuse boye: “Eloko esalisaki ngai mingi ezalaki te boyebi ya Biblia oyo nazwaki na Gileadi, kasi nde elimo ya komikitisa mpe bolingo oyo nayekolaki na eteyelo yango.”

Guy Pierce, oyo azali na Lisangani ya Mikólo-Bakambi, asalaki lisukulu monene ya likita yango, oyo elobi: “Yehova akweaka te.” Lokola Adama akweaki, yango emonisi ete Nzambe alongaki te? Nzambe alongaki te kokela Adama moto ya kokoka, ndenge bato mosusu balobaka? Te, mpamba te “Nzambe asalaki moto ya sembo.” (Mosakoli 7:29) Molobi amonisaki ete lokola Yesu atikalaki sembo na kati ya komekama ya makasi, yango emonisi ete “Adama azalaki ata na likambo ya koloba te mpo na komilongisa na ndenge akweaki.” Komekama oyo Yesu alongaki eleki oyo Adama akutanaki na yango na elanga ya Edene. Kasi, Adama akweaki. Nzokande, Yehova akoki kokwea te. Mokano na ye ekokokisama. (Yisaya 55:11) Ndeko Pierce alobaki na bamisionɛrɛ ya sika boye: “Bozali na libaku malamu ya kokumisa Yehova na elimo na bino ya komipesa. Tiká ete Yehova azala na mokomoko na bino bipai nyonso oyo bokokende kosalela ye lokola bamisionɛrɛ.”

Nsima ya kopesa bayangani bambote oyo eutaki na babiro ya filiale ndenge na ndenge ya Batatoli ya Yehova, ndeko Lett, mokambi ya likita yango, apesaki bana-kelasi badiplome na bango mpe ayebisaki bango epai batindi bango. Vernon Wisegarver, ndeko oyo aumeli mingi na Betele, asalaki libondeli ya nsuka.

Bandeko 6872 oyo bazalaki wana bamonaki ete likita yango esalisaki bango bábakisa lisusu milende na bango mpo na kosala mokano ya Nzambe. (Nzembo 40:8) Bana-kelasi Andrew ná Anna balobaki boye: “Tomipesá na Yehova. Tolakaki Yehova ete tokosala nyonso oyo akosɛnga biso. Lelo oyo Yehova atindi biso na Cameroun, na Afrika.” Bango mpe bana-kelasi mosusu bamonisi mposa makasi ya kobanda mosala oyo ekomemela bango esengo mpe bolamu. Ya solo, bazali kosepela kosala mokano ya Nzambe.

[Etanda na lokasa 17]

MAKAMBO ETALI BANA-KELASI

Bauti na mikili: 6

Batindami na mikili: 20

Bana-kelasi bazalaki: 52

Mwayene ya mbula ya kobotama: 35,7

Mwayene ya mbula balekisi na kati ya solo: 18,3

Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 14,5

[Elilingi na lokasa 18]

Kelasi ya mbala ya 120 ya Gileadi, Eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia

Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ; banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.

(1) Wright, S.; Suárez, B.; Croisant, B.; Davenport, L. (2) Johnson, A.; Ali, C.; Cady, K.; Guerrero, P.; Ases, A. (3) Ortiz, L.; Lyall, K.; Uzeta, M.; Perez, R.; Backus, K.; Caterina, C. (4) Palmer, B.; Loving, D.; Macdonough, J.; Bostock, D.; Benetatos, L. (5) Jasicki, M.; Sarafianos, E.; Stelter, C.; Vaira, R.; Woon, J.; Prentice, K. (6) Davenport, H.; Croisant, H.; Perez, M.; Vaira, E.; Suárez, A.; Caterina, I.; Wright, C. (7) Cady, K.; Macdonough, J.; Ortiz, M.; Woon, J.; Ali, J.; Ases, M. (8) Sarafianos, G.; Lyall, D.; Uzeta, C.; Stelter, P.; Prentice, G.; Johnson, A.; Benetatos, C. (9) Palmer, J.; Jasicki, W.; Backus, J.; Bostock, S.; Guerrero, J. M.; Loving, S.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto