Ndenge malamu ya koluka esengo
MOTO nyonso azali na lotomo ya “koluka esengo.” Yango ezalaki makanisi ya bato oyo bakomaki mokanda oyo esakolaki lipanda ya États-Unis. Nzokande, koluka eloko moko ekeseni na kozwa yango. Na ndakisa, bilenge mingi balukaka kokóma bavedɛti ya minene, kasi mingi te nde bakómaka mpenza na lokumu oyo balukaka. Moyembi moko oyo ayebi mpasi oyo moto amonaka mpo akóma alanga-nzembo ya malamu alobi boye: “Mbala mosusu mpe okotikala kokóma moyembi ya solosolo ata mokolo moko te.”
Soki yo mpe omonaka ete kozala na esengo ezali likambo ya mpasi ndenge wana, kolɛmba nzoto te. Soki oluki esengo na ndenge oyo ebongi, okozwa yango. Mpo na nini tolobi bongo? Na lisolo oyo eleki, tolobaki ete Yehova azali “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Na Biblia, Nzambe amonisi ndenge malamu ya koluka esengo mpe kozwa yango. Yehova akoki kosalisa yo ntango okutani na makambo oyo elongolaka esengo. Tótalela na ndakisa ndenge oyo akoki kobɔndisa yo soki okufeli ndeko to moninga.
Ntango okufeli ndeko to moninga
Moto moko te akoki koloba ete liwa ezali likambo ya malamu. Liwa ekabolaka baboti na bana na bango. Liwa ekabolaka baninga ya motema mpe ebulunganisaka bato oyo bakufeli. Soki moto moko akufi na libota, bandeko na ye batikalaka na mawa.
Na ntembe te, yo moko oyebi ete liwa ezali likambo ya mabe. Nzokande, bato mosusu bakanisaka bongo te mpe bamonisaka ete liwa ezali likambo ya malamu. Na ndakisa, na ebembe ya moto moko oyo akufaki na mopɛpɛ makasi oyo ebɛtaki na sudi ya États-Unis na sanza ya Augusto 2005, sango moko alobaki boye: “Mopɛpɛ ebomi ye te. Nzambe nde abengi ye na lola.” Mwasi moko oyo asalaka na lopitalo moko alukaki kobɔndisa elenge mwasi moko oyo akufelaki mama; alobaki na ye ete amitungisa te mpo Nzambe abengi mama na ye na lola. Elenge yango agangaki ete: “Mpo na nini Nzambe akaboli ngai ná mama na ngai?”
Tomoni ete makanisi ya ndenge wana ebɔndisaka bato te. Mpo na nini? Mpo ezali ya solo te. Kutu, mateya yango emonisaka ete Nzambe asalelaka liwa mpo na kokabola biso na bandeko mpe baninga na biso. Na bongo, na esika bato bámona ete Nzambe akitisaka bato motema na ntango ya mpasi, bamonaka ete abomaka bato. Nzokande, Biblia eyebisi biso solo na oyo etali liwa.
Biblia elobi ete liwa ezali monguna. Emonisi mpe ete liwa ezali na bokonzi. (Baloma 5:17; 1 Bakolinti 15:26) Liwa ezali monguna oyo moto moko te akoki kotɛmɛla yango; lisusu bandeko mpe baninga na biso nyonso oyo bazali kokufa, bazali kaka kobakisama na molɔngɔ ya ebele ya bato mosusu oyo bakufá. Makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa emonisi ete mpasi mpe mawa oyo toyokaka ntango ndeko to moninga na biso akufi, ezali mabe te. Kasi, Nzambe asalelaka liwa mpo na kozwa bandeko to baninga na biso mpo bákende na lola? Tiká Biblia epesa eyano na motuna yango.
Mosakoli 9:5, 10 elobi boye: “Nde bakufi bayebi likambo te . . . Ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi, esika ekokende yo.” Nyonso wana elingi koloba ete bato oyo bakufá bayebaka eloko te, bayokaka te, bakanisaka mpe te. Ezali lokola nde balali mpɔngi makasi. Na bongo, tomoni polele ete soki moto akufi, elingi koloba te ete Nzambe abengi ye na lola.
Yesu amonisaki malamu likambo yango ntango moninga na ye Lazalo akufaki. Yesu akokanisaki liwa na mpɔngi. Soki Lazalo akendaki na lola epai Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azalaka, tokoki koloba ete Yesu asalaki mabe ndenge azongisaki ye awa na mabelé mpo nsukansuka akufa lisusu. Biblia elobi ete ntango Yesu akómaki na esika oyo bakundaki Lazalo, agangaki ete: “Lazalo, bimá!” Biblia ebakisi ete: “Mobali oyo akufaki abimaki.” Na maloba mosusu, Lazalo azongaki na bomoi. Yesu ayebaki ete Lazalo akendaki na likoló te. Azalaki nde na lilita.—Yoane 11:11-14, 34, 38-44.
Lisolo yango ya Biblia ezali komonisa ete Nzambe asalelaka liwa te mpo na kobenga bato na lola. Na bongo, tokoki kopusana penepene na Nzambe mpo toyebi ete apesaka biso mpasi te. Tokoki mpe kozala na elikya ete ayebi malamu mawa mpe mpasi oyo liwa epesaka biso. Lisusu, Biblia emonisi ete soki moto akufi, akendaka na lifelo te, na epongelo mpe te, kasi azalaka nde na lilita mpe ayebaka eloko moko te. Yango wana, ntango tozali kokanisa bandeko to baninga na biso oyo bakufá, tosengeli te koyina Nzambe to komitunatuna soki bazali wapi. Longola yango, na kati ya Biblia, Yehova ayebisi biso likambo mosusu oyo ekoki mpe kokitisa biso motema.
Elikya epesaka esengo
Bavɛrsɛ oyo totaleli emonisi ete elikya ezali moko na makambo oyo epesaka esengo ya solosolo. Na Biblia, liloba “elikya” elimboli kozela likambo moko ya malamu. Mpo tómona ndenge oyo elikya ekoki kopesa biso esengo, tótalela lisusu lisolo ya Lazalo.
Yesu asekwisaki Lazalo mpo na ntina soki mibale. Moko na yango ezali ete alingaki kosilisa mawa oyo Malata, Malia, mpe baninga na bango mosusu bazalaki na yango. Na ndenge yango, bakokaki lisusu kozala elongo na Lazalo. Longola yango, Yesu ayebisaki Malata ntina ya libosoliboso oyo asekwisaki Lazalo; alobaki boye: “Nayebisaki yo te ete soki okondima okomona nkembo ya Nzambe?” (Yoane 11:40) Biblia mosusu ebongoli maloba ya nsuka ya vɛrsɛ yango na “makamwisi oyo Nzambe akoki kosala.” (The New Testament in Modern English). Ntango Yesu asekwisaki Lazalo, amonisaki mwa moke makambo minene oyo Yehova akosala na mikolo ekoya. Tólobela mwa moke “makamwisi oyo Nzambe akoki kosala.”
Na Yoane 5:28, 29, Yesu alobaki boye: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” Yango emonisi ete bato nyonso oyo bakufá, ata mpe bandeko to baninga na biso, bakosekwa. Misala 15:24 ebakisi boye: “Ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” Na bongo, ata “bato oyo bazangi boyengebene,” elingi koloba bato nyonso oyo basalelaki Yehova te mpo bayebaki ye te, bakozwa libaku ya koyeba ye mpe ya kosalela ye.
Bato yango bakosekwa wapi? Nzembo 37:29 elobi boye: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Kanisá naino! Bandeko mpe baninga na biso oyo liwa ekabolá biso ná bango bakozonga na bomoi awa na mabelé. Soki okanisi ete okokutana lisusu na bandeko to baninga na yo oyo bakufá, okoki mpenza kozala na esengo.
Yehova alingi ozala na esengo
Tolobeli ndenge mibale oyo Yehova akoki kopesa yo esengo mingi atako bampasi ezali. Ya liboso, na nzela ya Biblia, azali kopesa biso boyebi mpe kolakisa biso ndenge ya kolonga mikakatano oyo tozali kokutana na yango. Batoli ya Biblia ekoki kosalisa biso tólongola mawa ntango tokufeli moto; ekoki mpe kosalisa biso ntango tozangi mbongo to tozali na maladi. Biblia ekoki mpe kosalisa yo omitungisa mingi te ntango ozali komona kozanga bosembo mpe yikiyiki na makambo ya politiki. Longola yango, soki ozali kosalela batoli ya Biblia, okoyeba nini osengeli kosala soki okutani na mikakatano mosusu.
Ya mibale, soki ozali koyekola Biblia, okozala na elikya oyo eleki eloko mosusu nyonso oyo okoki kozwa na mokili oyo. Biblia elaki ete bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá bakosekwa; yango mpe ezali kopesa yo elikya. Emoniseli 21:3, 4 emonisi yango polele: “Nzambe ye moko akozala elongo na [bato]. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” Maloba yango elimboli ete etikali moke, makambo nyonso oyo elongolaka esengo ekozala lisusu te. Makambo oyo Biblia elaki ekokokisama, mpe yo okoki kozala wana ntango makambo yango ekokokisama. Koyeba ete makambo ekozala malamu na mikolo ekoya ekoki kopesa yo esengo. Okoki mpe kozala na esengo lokola oyebi ete soki okufi okokende konyokwama te.
Tótalela ndakisa ya mwasi moko nkombo na ye Maria. Eleki sikoyo bambula mingi, mobali na ye abɛlaki kanser mpe nsukansuka akufaki. Mwa moke na nsima, ye ná bana na ye misato ya basi babimaki na ndako oyo bazalaki kofanda mpo akómaki na mikakatano ya mbongo. Mbula mibale na nsima, monganga ayebisaki Maria ete ye mpe azali na kanser. Basalaki ye lipaso ya monene mbala mibale mpe ayokaka mpasi makasi mikolo nyonso. Atako bongo, lokola amilelalelaka te, alendisaka kutu bato mosusu. Nini esalisaka ye azala ntango nyonso na esengo?
Maria alobi boye: “Soki nazali na mokakatano, nalingaka komitungisa mpenza te. Nalingaka te komituna mituna lokola: ‘Mpo na nini kaka ngai? Mpo na nini nazali komona bampasi boye? Mpo na nini nasengeli kobɛla boye?’ Makanisi ya ndenge wana esilisaka makasi. Na esika nakanisaka ndenge wana, namipesaka na mosala ya Yehova mpe nasalisaka bato mosusu. Yango nde epesaka ngai esengo.”
Ndenge nini elikya esalisaka Maria? Maria akanisaka ntango oyo Yehova akolongola maladi mpe makambo mosusu oyo ezali kotungisa bato lelo. Ntango akendaka na lopitalo, ayebisaka elikya yango epai ya bato mosusu oyo bazali kobɛla kanser oyo akutanaka na bango kuna. Ndenge nini Maria atalelaka elikya yango? Alobi boye: “Mbala mingi nakanisaka makambo oyo Biblia elobi na Baebele 6:19; na vɛrsɛ yango, ntoma Paulo alobi ete elikya ezali lokola longo mpo na molimo. Soki tozangi longo yango, tokolongwa na nzela lokola masuwa oyo ezali komemama na mopɛpɛ makasi. Kasi, soki tozali na yango, likama moko te ekokómela biso ata soki tokutani na mikakatano ya makasi.” ‘Elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, oyo akoki kobuka lokuta te, alaki’ esalisaka Maria abatela esengo. Elikya yango ekoki mpe kosalisa yo.—Tito 1:2.
Koyekola Biblia ekoki kosalisa yo ozala na esengo ata soki ozali na mikakatano. Kasi, okoki komituna soki batoli ya Biblia ekoki mpenza kosalisa yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyeba mateya ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo mpo ozala mpenza na esengo. Wana ozali kozela bilaka ya Yehova, okoki kozala na kati ya bato oyo Biblia elobi ete “bakozwa esengo mpe bakosepela, mawa mpe kokimela ekokima.”—Yisaya 35:10.
[Elilingi na lokasa 5]
Kaka mateya ya Biblia nde ekoki kolongola mawa
[Elilingi na lokasa 7]
Elikya ya lisekwa oyo euti na Biblia ekoki kopesa moto esengo