Kelasi ya mbala ya 125 ya Gileadi
Balendisaki Bamisionɛrɛ bázala Lokola Yilimia
NDEKO Geoffrey Jackson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alobaki ete: “Kelasi ya Gileadi ya mbala oyo ezali ya ntina mingi.” Asololaki na bato 6 156 oyo bayaki koyangana na likita ya kopesa bana-kelasi ya mbala ya 125 badiplome ya Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia, oyo esalemaki na mokolo ya 13 Sɛtɛmbɛ 2008. Soki tosangisi bana 56 ya kelasi oyo, Eteyelo ya Gileadi esili kotinda bamisionɛrɛ koleka 8 000 tii “na esika eleki mpenza mosika na mabelé!”—Mis. 1:8.
Ndeko Jackson, prezida ya likita yango, atunaki boye: “Bizaleli na yo ekotinda bato bándima mosala na yo?” Na nsima atángaki makambo minei oyo ekoki kosala ete bato bázwa mosala ya bamisionɛrɛ na kilo: kozala na makanisi oyo ebongi, kopesa ndakisa malamu, kosalelaka mingi Biblia mpo na koteya, mpe kosalisa bato báyeba nkombo ya Yehova.
Ndeko David Schafer, oyo asalaka na Komite ya Mateya, asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Bokoyeba makambo nyonso?” Ayebisaki bana-kelasi ya Gileadi ete bakoki ‘koyeba makambo nyonso’ oyo basengeli na yango na mosala na bango ya misionɛrɛ soki bakobi koluka Yehova mpe soki bazali kondima “moombo ya sembo mpe ya mayele” na komikitisa nyonso.—Mas. 28:5; Mat. 24:45.
Na nsima, Ndeko John Barr ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Eloko moko te ekabola bino na bolingo ya Nzambe.” Ndeko Barr alendisaki bana-kelasi mpe baboti na bango lokola tata moko ya bolingo, mpe yango elongolaki kobanga oyo bakokaki kozala na yango na ntina ya makambo oyo bamisionɛrɛ bakoki kokutana na yango na bateritware oyo bakokende. Alobaki lisusu ete “kozala na kati ya bolingo ya Nzambe ezali libateli oyo eleki nyonso na bomoi na biso.” Eloko moko te ekoki kokabola bamisionɛrɛ na bolingo ya Nzambe longola kaka soki bango moko bamikaboli na ye.
Ndeko Sam Roberson ya Departema ya biteyelo ya Teokrasi alendisaki bayangani bálata “elamba oyo eleki bilamba nyonso.” Ayebisaki bana-kelasi ete soki bazali koyekola makambo oyo Yesu asalaki mpe bazali kosalela yango, bakoki ‘kolata Nkolo Yesu Klisto.’ (Lom. 13:14) Na nsima, Ndeko William Samuelson, mokɛngɛli ya Departema ya biteyelo ya Teokrasi, alobelaki likambo oyo epesaka moto kilo. Amonisaki ete makanisi ya bato te nde epesaka moto kilo, kasi ndenge Nzambe atalelaka ye.
Ndeko Michael Burnett, moko ya balakisi, asɛngaki bana-kelasi báloba makambo oyo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola ntango bazalaki na eteyelo na Patterson, na New York. Atako bana-kelasi mingi basakolaki na teritware oyo esakolamá mobimba mpe mbala na mbala, bakutanaki na bato oyo basepelaki na nsango malamu. Ndeko Gerald Grizzle oyo asalaka na Biro ya Mayangani asololaki na bandeko misato ya bakomite ya filiale ya bikólo mosusu oyo bayaki na eteyelo na bango. Makambo oyo balobaki esalisaki bana-kelasi bámibongisa mpo na makambo oyo ezali kozela bango na bateritware na bango.
Ndeko David Splane ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo akɔtaki kelasi ya Gileadi ya mbala ya 42 asalaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Bózala lokola Yilimia.” Atako Yilimia abangaki mokumba oyo azwaki, Yehova apesaki ye makasi. (Yil. 1:7, 8) Nzambe akosala mpe bongo mpo na bamisionɛrɛ ya sika. Ndeko Splane alobaki boye: “Soki ozwani matata na ndeko moko, fandá mpe komá makambo zomi oyo osepelaka na yango epai ya ndeko yango. Soki okoki kobimisa makambo zomi te, yango elimboli ete osengeli kosala makasi mpo oyeba ndeko yango malamu.”
Yilimia amipesaki mingi. Ntango alingaki kotika kosakola, abondelaki, mpe Yehova asalisaki ye. (Yil. 20:11) Ayebisaki bana-kelasi ete: “Soki bokómi kolɛmba mosala na bino, bóyebisa yango mbala na mbala epai ya Yehova. Bokokamwa ndenge Yehova akosalisa bino.”
Na nsuka ya likita yango, prezida ayebisaki bayangani ete bana-kelasi bamoni makambo mingi oyo ekoki kosala ete bato bándima bango. Na bateritware na bango, soki bato bomoni ete bakoki kotyela bamisionɛrɛ motema, nsango oyo bazali komema ekozala na nguya.—Yis. 43:8-12.
[Etanda na lokasa 22]
MAKAMBO ETALI BANA-KELASI
Bauti na mikili: 6
Batindami na mikili: 21
Bana-kelasi bazalaki: 56
Mwayene ya mbula ya kobotama: 32,9
wayene ya mbula balekisi na kati ya solo: 17,4
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 13
[Elilingi na lokasa 23]
Bana-kelasi ya mbala ya 125 ya Gileadi, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia
Bankombo na bango ekomami awa na nse na kolanda ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ, banda na moto ya liboso na lobɔkɔ ya mwasi; mpe banda na molɔngɔ ya liboso tii na molɔngɔ ya nsuka.
(1) Hodgson, A.; Wall, A.; Beerens, K.; Hortelano, M.; Newman, L.; De Caso, A. (2) Jenkins, J.; Jarzemski, T.; Méndez, N.; Corona, V.; Canalita, L. (3) Fryer, H.; Savage, M.; Tidwell, K.; Erickson, N.; Dyck, E.; McBeath, R. (4) Perez, L.; Puse, L.; Skidmore, A.; Young, B.; McBride, N.; Rondón, P.; Goodman, E. (5) Beerens, M.; Ferguson, J.; Pearson, N.; Chapman, L.; Wardle, J.; Canalita, M. (6) Perez, P.; De Caso, D.; Young, T.; Rondón, D.; Goodman, G.; Jenkins, M.; Dyck, G. (7) Corona, M.; Wall, R.; Puse, S.; Méndez, F.; Jarzemski, S.; Savage, T. (8) Newman, C.; Ferguson, D.; Skidmore, D.; Erickson, T.; McBride, J.; Pearson, M.; Chapman, M. (9) Hodgson, K.; Wardle, A.; McBeath, A.; Tidwell, T.; Fryer, J.; Hortelano, J.