Bomoi ya seko na mabelé—Elikya oyo Nzambe apesá
“Bozalisi etyamaki na kati ya kozanga ntina . . . mpo na elikya.”—LOM. 8:20.
1, 2. (a) Mpo na nini elikya ya bomoi ya seko na mabelé ezali na ntina mingi mpo na biso? (b) Mpo na nini bato mingi bandimaka mpenza te ete bomoi ya seko ekozala na mabelé?
MBALA mosusu obosanaka te esengo oyo oyokaki ntango oyebaki mpo na mbala ya liboso ete mosika te bato bakonuna lisusu te mpe bakokufa lisusu te, kasi bakozala na bomoi libela na libela awa na mabelé. (Yoa. 17:3; Emon. 21:3, 4) Mbala mosusu ozalaki na esengo ya koyebisa bato mosusu elikya wana oyo Biblia epesi. Elikya ya bomoi ya seko ezali moko ya makambo ya ntina mingi na nsango malamu oyo tosakolaka. Elikya yango ebongolaka lolenge na biso ya kotalela bomoi.
2 Mangomba mingi ya boklisto elobelaka te elikya ya bomoi ya seko na mabelé. Atako Biblia eteyaka ete molimo ekufaka, mangomba mingi eteyaka liteya ya lokuta oyo elobi ete ntango moto akufi, molimo na ye ekobaka kozala na bomoi na mokili ya bilimo. (Ezek. 18:20) Yango wana, bato mingi bandimaka mpenza te ete bomoi ya seko ekozala awa na mabelé. Na yango, tokoki komituna boye: Biblia eteyaka mpenza ete bomoi ya seko ekozala awa na mabelé? Soki ezali bongo, ntango nini Nzambe apesaki bato elikya yango mpo na mbala ya liboso?
“Etyamaki na kati ya kozanga ntina . . . mpo na elikya”
3. Ndenge nini mokano ya Nzambe mpo na bato emonisamaki polele ntango kaka akelaki bato ya liboso?
3 Yehova ayebisaki polele mokano na ye mpo na bato ntango kaka akelaki bato ya liboso. Nzambe amonisaki polele ete Adama akozala na bomoi ya seko soki atosi. (Gen. 2:9, 17; 3:22) Na ntembe te, bana ya libosoliboso ya Adama bayebaki ndenge moto abungisaki bomoi ya kokoka, mpe bilembeteli ya polele ezalaki komonisa yango. Nzela ya kokɔta na Edene ekangamaki, mpe bato babandaki konuna mpe kokufa. (Gen. 3:23, 24) Nsima ya bambula, bomoi ya moto ebandaki kokóma mokuse. Adama aumelaki na bomoi mbula 930. Semi oyo abikaki na Mpela aumelaki kaka mbula 600, mpe mwana na ye Alafasada aumelaki mbula 438. Tela, tata ya Abalayama, aumelaki mbula 205. Abalayama aumelaki mbula 175, mwana na ye Yisaka aumelaki mbula 180, mpe Yakobo aumelaki mbula 147. (Gen. 5:5; 11:10-13, 32; 25:7; 35:28; 47:28) Na ntembe te, lokola bomoi ezalaki se kokóma mokuse, bato mingi bamonaki ete elikya ya bomoi ya seko ebungi! Bakokaki nde kolikya ete bomoi ya ndenge wana ekozonga?
4. Mpo na nini bato ya sembo ya kala bazalaki na ntina ya kondima ete Nzambe akozongisa mapamboli oyo Adama abungisaki?
4 Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bozalisi etyamaki na kati ya kozanga ntina . . . mpo na elikya.” (Lom. 8:20) Elikya nini? Esakweli ya libosoliboso ya Biblia elobelaki “momboto” oyo asengelaki ‘kopanza motó ya nyoka.’ (Tángá Genese 3:1-5, 15.) Elaka ya momboto yango epesaki bato ya sembo elikya ete Nzambe akobosana te mokano na ye mpo na bato. Endimisaki bato lokola Abele mpe Noa ete Nzambe akozongisa mapamboli oyo Adama abungisaki. Mbala mosusu bato yango bayebaki ete ‘kozoka ya momboto na litindi’ ekosɛnga ete makila esopana.—Gen. 4:4; 8:20; Ebe. 11:4.
5. Nini emonisi ete Abalayama azalaki kondima ete lisekwa ekozala?
5 Tózwa ndakisa ya Abalayama. Ntango Abalayama amekamaki, “ekoki kolobama ete akabaki . . . [Yisaka] mwana na ye mobotami-se-moko mbeka.” (Ebe. 11:17) Mpo na nini andimaki kosala yango? (Tángá Baebele 11:19.) Azalaki kondima ete lisekwa ekozala! Abalayama azalaki na ntina ya kondima ete lisekwa ekozala. Kutu, Yehova azongiselaki Abalayama makoki ya kobota mpe asalaki ete ye ná mwasi na ye Sala bábota mwana atako bakómaki mibange. (Gen. 18:10-14; 21:1-3; Lom. 4:19-21) Longola yango, Abalayama azalaki na elaka ya Yehova. Nzambe ayebisaki ye boye: “Oyo ekobengama momboto na yo ekoya na nzela ya Yisaka.” (Gen. 21:12, NW) Na yango, Abalayama azalaki mpenza na bantina ya kondima ete Nzambe akosekwisa Yisaka.
6, 7. (a) Kondimana nini Yehova asalaki na Abalayama? (b) Ndenge nini elaka oyo Yehova apesaki Abalayama epesaki bato elikya?
6 Lokola Abalayama azalaki na kondima makasi, Yehova asalaki na ye kondimana mpo na bana to “momboto” na ye. (Tángá Genese 22:18.) Moto ya libosoliboso ya “momboto” yango ezali Yesu Klisto. (Gal. 3:16) Yehova ayebisaki Abalayama ete “momboto” na ye ekokóma mingi “lokola minzoto na likoló mpe lokola zɛlɔ na libongo ya mai,” elingi koloba motángo oyo Abalayama ayebaki te. (Gen. 22:17) Kasi, na nsima, motángo yango eyebanaki. Yesu Klisto ná bato 144 000, oyo bakoyangela na ye na Bokonzi na ye, basali “momboto” yango. (Gal. 3:29; Emon. 7:4; 14:1) Na nzela ya Bokonzi ya Masiya nde “mabota nyonso na nse bakopambolama.”
7 Mbala mosusu, Abalayama ayebaki te ndimbola nyonso ya kondimana oyo Yehova asalaki na ye. Atako bongo, Biblia elobi ete “azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo.” (Ebe. 11:10) Engumba yango ezali Bokonzi ya Nzambe. Mpo azwa mapamboli ya Bokonzi yango, ekosɛnga Abalayama azonga na bomoi. Akozala na likoki ya kozwa bomoi ya seko awa na mabelé na nzela ya lisekwa. Likoki ya kozala na bomoi ya seko ekozala mpo na baoyo bakobika na Armagedona mpe baoyo bakosekwa.—Emon. 7:9, 14; 20:12-14.
‘Elimo ezali kotɔka na kati na ngai’
8, 9. Mpo na nini tokoki koloba ete mokanda ya Yobo elobeli kaka te minyoko oyo moto moko akutanaki na yango?
8 Na eleko oyo ekaboli Yozefe, oyo azalaki nkɔkɔ ya Abalayama, mpe mosakoli Moize, ezalaki na moto moko nkombo na ye Yobo. Mokanda ya Yobo, oyo mbala mosusu Moize nde akomaki, elimboli ntina oyo Yehova atikaki ete Yobo amona mpasi, mpe elobeli ndenge makambo na ye esukaki. Kasi, mokanda ya Yobo elobeli kaka te lisolo ya moto moko oyo akutanaki na minyoko; elobeli mingimingi makambo ya ntina oyo etali bato nyonso. Mokanda yango esalisi biso tóyeba ete Yehova ayangelaka na boyengebene, mpe emonisi ete ntembe oyo ebimaki na Edene etali bosembo mpe elikya ya bomoi ya basaleli nyonso ya Nzambe awa na mabelé. Atako Yobo ayebaki ntembe yango te, apesaki baninga na ye nzela te ete bátinda ye akanisa ete azali lisusu sembo te liboso ya Nzambe. (Yobo 27:5) Yango esengeli kolendisa kondima na biso mpe kosalisa biso tóyeba ete tokoki kotikala sembo mpe kozala na ngámbo ya boyangeli ya Yehova.
9 Ntango bato misato oyo balobaki ete bayei kobɔndisa Yobo basilisaki koloba, “Elihu, mwana ya Balakele, Mobuzu, ayanolaki.” Nini etindaki ye aloba? Alobaki boye: “Natondi na maloba; elimo ezali kotɔka na kati ya libumu na ngai.” (Yobo 32:5, 6, 18, NW) Atako makambo oyo Elihu alobaki na lisalisi ya elimo santu ekokisamaki ntango minyoko ya Yobo esilaki, maloba na ye ezali mpe na ntina mpo na bato mosusu. Epesi elikya na bato nyonso oyo bazali kotikala sembo epai ya Nzambe.
10. Nini emonisi ete likambo oyo Yehova alobi na moto moko ekoki ntango mosusu kotala bato nyonso?
10 Ntango mosusu, Yehova akoki koloba na moto moko likambo mpe likambo yango ekoki kotala bato nyonso. Tokoki komona yango na esakweli ya Danyele oyo elobeli ndɔtɔ ya Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, oyo amonaki bazali kosɛnga bákata nzete moko ya molai. (Dan. 4:10-27) Atako esakweli yango ekokisamaki epai ya Nebukadanesala, ezalaki elilingi ya likambo moko ya monene koleka. Emonisaki ete boyangeli ya Nzambe oyo emonisamaki awa na mabelé na bokonzi ya bakitani ya Davidi, ekomonana lisusu nsima ya mbula 2520, kobanda na mobu 607 L.T.B.a Boyangeli ya Nzambe awa na mabelé emonisamaki lisusu ntango Yesu Klisto atyamaki Mokonzi na likoló na mobu 1914. Kanisá naino ndenge oyo Bokonzi yango ekokokisa bilikya ya bato ya botosi mosika te!
“Kotika ye akita na libulu te!”
11. Maloba ya Elihu emonisaki nini mpo na Nzambe?
11 Ntango Elihu alobaki na Yobo, alobelaki “momemi-nsango moko, molobeli, moko na kati ya nkóto moko, mpo na koyebisa moto bosembo na ye.” Ekozala boni soki momemi-nsango yango ‘abondeli Nzambe mpo asepela na ye’? Elihu alobaki ete: “Boye [Nzambe] akomonisela ye boboto mpe akoloba: ‘Kotika ye akita na libulu te! Nazwi lisiko! Mosuni na ye ekóma ya sika koleka oyo ya bolenge; azonga na mikolo oyo azalaki na makasi ya bolenge.’” (Yobo 33:23-26, NW) Maloba yango emonisaki ete Nzambe akondima “lisiko” mpo na bato oyo babongoli motema.—Yobo 33:24.
12. Maloba ya Elihu epesi elikya nini mpo na bato nyonso?
12 Mbala mosusu Elihu ayebaki mpenza te ndimbola nyonso ya lisiko, ndenge kaka basakoli bazalaki te kokanga ntina ya makambo nyonso oyo bazalaki kokoma. (Dan. 12:8; 1 Pet. 1:10-12) Atako bongo, maloba ya Elihu epesaki elikya ete mokolo mosusu Nzambe akondima lisiko mpe akolongola moto na boombo ya konuna mpe ya liwa. Maloba ya Elihu epesaki elikya kitoko ya bomoi ya seko. Mokanda ya Yobo emonisi mpe ete lisekwa ekozala.—Yobo 14:14, 15.
13. Maloba ya Elihu ezali na ntina nini mpo na baklisto?
13 Tii lelo, maloba ya Elihu ezali na ntina epai ya bamilio ya baklisto oyo bazali na elikya ya kobika ntango mokili oyo ekobomama. Baoyo bakozala mibange bakozongela makasi na bango ya bolenge. (Emon. 7:9, 10, 14-17) Longola yango, elikya ya komona ndenge bato oyo bakosekwa bakozonga bilenge ezali se kosepelisa bato ya sembo. Kasi, mpo baklisto bapakolami bázwa bomoi oyo ezangi kufa na likoló, mpe mpo “bampate mosusu” ya Yesu bázwa bomoi ya seko awa na mabelé, bango nyonso basengeli kozala na kondima na mbeka ya lisiko ya Klisto.—Yoa. 10:16; Lom. 6:23.
Liwa elongolami na mabelé
14. Nini emonisi ete Bayisalaele basengelaki na eloko mosusu oyo eleki Mibeko ya Moize mpo bázala na elikya ya bomoi ya seko?
14 Bakitani ya Abalayama bakómaki ekólo ya bonsomi ntango Nzambe asalaki na bango kondimana. Ntango Yehova azalaki kopesa bango Mibeko, alobaki boye: “Bosengeli kobatela mibeko na ngai mpe bikateli na ngai ya lisambisi, oyo soki moto akobatela yango, asengeli kozala na bomoi na nzela na yango.” (Lev. 18:5, NW) Nzokande, lokola Bayisalaele bakokaki te kotosa Mibeko yango na ndenge ya kokoka, Mibeko yango ezalaki kokweisa bango; yango wana basengelaki kosikolama.—Gal. 3:13.
15. Elimo santu etindaki Davidi alobela lipamboli nini oyo Nzambe akopesa?
15 Nsima ya Moize, elimo santu ya Yehova etindaki mpe bakomi mosusu ya Biblia bálobela elikya ya bomoi ya seko. (Nz. 21:4; 37:29) Na ndakisa, na nsuka ya nzembo oyo elobeli bomoko ya basambeli ya solo na Siona, mokomi ya nzembo Davidi akomaki boye: “Kuna nde Yehova apesaki mitindo ete lipamboli ezala, ɛɛ, bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”—Nz. 133:3, NW.
16. Elaka nini Yehova apesaki na nzela ya Yisaya mpo na “mokili mobimba”?
16 Elimo santu ya Yehova etindaki mpe Yisaya asakola mpo na bomoi ya seko awa na mabelé. (Tángá Yisaya 25:7, 8.) Lisumu mpe liwa ezali lokola “ezipeli” to elamba ya kilo oyo ezali kokanga bato mpema. Yehova alaki basaleli na ye ete lisumu mpe liwa ekolongolama “na mokili mobimba.”
17. Yisaya asakolaki mokumba nini ya Masiya oyo ekofungwela bato nzela ya bomoi ya seko?
17 Tótalela mpe malako oyo Mibeko ya Moize epesaki na ntina na ntaba mpo na Azazele. Mbala moko na mbula, na Mokolo ya Mbɔndi, nganga-nzambe monene azalaki ‘kotya mabɔkɔ na ye mibale na motó ya ntaba oyo ezali na bomoi mpe azalaki koyambola likoló na yango mabunga nyonso ya bana ya Yisalaele, mpe azalaki kotya yango na motó ya ntaba yango mpe ntaba yango ezalaki komema mabunga na bango nyonso na kati ya mokili oyo ezali mpamba.’ (Lev. 16:7-10, 21, 22, NW) Yisaya asakolaki koya ya Masiya oyo akosala mosala ya ndenge wana mpe akomema “mpasi,” “mawa,” mpe “mabe ya bato mingi” mpe na ndenge yango, akofungola nzela ya kozwa bomoi ya seko.—Tángá Yisaya 53:4-6, 12.
18, 19. Elikya nini ezali na Yisaya 26:19 mpe na Danyele 12:13?
18 Na nzela ya Yisaya, Yehova alobaki na bato na ye ya Yisalaele boye: “Bakufi na yo bakobika, bibembe na ngai ekotɛlɛma. Ee bafandi kati na putulu, bólamuka! Bóyemba na esengo! Mpo ete mamwɛ na yo ezali mamwɛ ya pole, [mpe mabelé yango moko ekobimisa ata baoyo bazangi makasi kati na liwa, NW].” (Yis. 26:19) Makomami ya Liebele elobeli polele elikya ya lisekwa mpe ya bomoi ya seko awa na mabelé. Na ndakisa, ntango Danyele akómaki na mbula pene na 100, Yehova apesaki ye elaka oyo: “Okopema, mpe okotɛlɛma mpo na [libula, NW] na yo na nsuka ya mikolo.”—Dan. 12:13.
19 Lokola Malata azalaki na elikya ya lisekwa, alobaki na Yesu mpo na ndeko na ye oyo akufaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo ya nsuka.” (Yoa. 11:24) Mateya ya Yesu mpe mikanda ya bayekoli na ye ebongolaki elikya yango? Kozala na bomoi ya seko awa na mabelé ezali tii lelo elikya oyo Yehova apesi bato? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
Okoki kolimbola?
• Bozalisi “etyami na kati ya kozanga ntina” mpo na elikya nini?
• Nini emonisi ete Abalayama azalaki kondima lisekwa?
• Maloba ya Elihu epai ya Yobo epesi bato elikya nini?
• Ndenge nini Makomami ya Liebele emonisi polele elikya ya lisekwa mpe ya bomoi ya seko awa na mabelé?
[Elilingi na lokasa 5]
Maloba ya Elihu epesaki elikya ete mokolo mosusu moto akolongwa na boombo ya konuna mpe ya liwa
[Elilingi na lokasa 6]
Nzambe alakaki Danyele ete ‘akotɛlɛma mpo na libula na ye na nsuka ya mikolo’