“Batosi ya Liloba ya Nzambe”—Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2000
1 “Nakotɔnda yo kati na koyangana monene mpe nakosanzola yo kati na bato mingi.” (Nz. 35:18) Tókanisa naino esengo oyo Davidi akokaki kozala na yango lelo oyo na komona bankóto ya bato bazali koyangana na kimya nyonso mpo na kolanda mateya ya Nzambe na mayangani na biso ya etúká! Ozalaki kati na bato 250 000 oyo bazalaki na liyangani ya etúká “Liloba ya esakweli ya Nzambe”? Kobanda na katikati ya sanza ya Yuli tii na nsuka ya sanza ya Augusto 1999, mayangani ya etúká 77 ebongisamaki na bingumba 59 ya République démocratique du Congo mpe na Congo Brazzaville.
2 Na Nzembo 122:1 mokomi na nzembo alobaki ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókenda na ndako ya [Yehova].” Na ntembe te ozalaki na esengo ndenge wana ntango ozwaki siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo ezalaki kolobela liyangani ya etúká. Ntembe ezali te ete ozali komikundola makambo kitoko oyo oyokaki na liyangani yango. Na ekeke ya liboso ntoma Petelo akundwelaki baklisto ete bakosala malamu soki batii likebi na liloba ya esakweli lokola “na miinda oyo ezali kopela na esika ya molili mabe.” (2 Pet. 1:19) Yango ezali mpe bongo mpo na biso lelo oyo. Lokola tozali kofanda na mokili oyo etambwisami na Satana, tozali komonisa botɔndi na ndenge balongoli biso na molili ya elimo. (Kols. 1:13; 1 Pet. 2:9; 1 Yoa. 5:19) Mpo tótambola ntango nyonso na nzela ya pole, tosengeli kozala na kondima makasi mpe kotya likebi na Liloba oyo euti na Yehova. Liyangani ya etúká elendisaki biso ete tósalaka bongo.
3 Bato nyonso oyo bayanganaki na liyangani bakokisaki mposa na bango? Ntina oyo liyangani yango esalemaki, ekokisamaki? Maloba ya bato mingi oyo bayanganaki na liyangani emonisi ete mateya yango ebongaki mpenza na mikolo oyo tozali na yango. Ndeko moko alobaki boye: “Liyangani yango ekosalisa ngai nabosana te ete nazali moto ya kozanga kokoka, na yango nakozela mokolo ya Yehova kozanga litɔnɔ ya mokili.” Ndeko mobali moko oyo aumeli mingi kati na solo alobaki ete: “Liyangani yango ezongisaki biso na nzela ya malamu. Esalisaki biso tómona soki tozali kaka kotambola na nzela ya malamu.” Ndeko mobali mosusu alobaki ete: “Na kotalela mikakatano oyo tozali na yango lelo oyo, nandimaki te ete nakoki koyangana na liyangani lokola oyo. Yango emonisi ete atako tozali kofanda mosikamosika, kondima na biso ezali kosangisa biso esika moko. Yehova ayebi kokaba mpe azali bolingo. Azali komibanzabanza mpo na biso.” Tozali koyoka mawa mpo na milende oyo tosalaki mpo na koyangana na liyangani na mbula oyo? Soko moke te.
4 Liyangani na biso ya etúká mpo na mobu 2000 ekopesa biso libaku mosusu ya kozala na baninga na biso oyo basanzolaka Yehova, oyo ‘bayebi bobola na bango na elimo’ mpe bazali na esengo mpe na mposa ya ‘koyoka makambo oyo elimo elobi na masangá.’—Mat. 5:3 NW; Emon. 2:29.
5 Okozala na liyangani yango? Bandá komibongisa uta sikoyo. Zwá ekateli ya koyangana mikolo nyonso misato na elambo yango kitoko ya elimo, kobanda na loyembo ya ebandeli tii na libondeli ya nsuka. Mbala mingi, liyangani epai bobyangami ezali oyo ekosalema pene mpenza na esika oyo bofandaka. Na yango, la Société asali nyonso mpo ete bózala na mokakatano te mpo na likambo yango. Esika mosusu ya sika ebakisami na liste ya bisika ya mayangani mpo na kopesa nzela na mokomoko kati na biso ete alya na elimo esika moko na libota na ye. (Det. 31:12) Bokoki kobanda kobomba mwa mbongo uta sikoyo mpo na transport ya libota na bino. Bato mosusu basalaki milende makasi mpo na koyangana na liyangani ya etúká na mobu 1999. Na ndakisa ndeko mobali moko amemaki mwana na ye na velo kilomɛtrɛ 300 mpo na kokóma na liyangani. Alongwaki na mboka na ye mikolo misato nsima ya liwa ya mwasi na ye oyo akufaki ntango azalaki kobota. Ndeko mobali atikaki mwana oyo autaki kobotama na libota ya mwasi na ye mpo bábatela ye mpe ye akendaki na liyangani epai asalaki kutu lisukulu! Mpo na komonisa botɔndi na bibongiseli oyo la Société asili kozwa, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na koyangana na liyangani na mobu 2000.
6 Bisika ya kolala: Na momeseno bapaya bayambamaka na bandako ya bandeko. Tosengeli komonisa botɔndi epai ya bandeko oyo bandimi koyamba biso na bandako na bango. Lisusu, ekozala malamu te mpo na baoyo bayambami ete bábakisa bozito na kosɛngisáká ete báfanda wana ntango molai liboso to nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesamaka bobele na boumeli ya mikolo ya liyangani. Baoyo bazali koyambama na bisika ya bandeko basengeli komonisa limemya mpo na biloko ya bandeko oyo bayambi bango, basengeli kobebisa eloko moko te, bakokenda te na bisika oyo bapesi bango ndingisa te, mpe basengeli kokeba ete bana na bango mpe básala bobele bongo. Soki bandeko oyo bayambi bapaya bazwi mokakatano moko na likambo yango, basengeli nokinoki koyebisa yango na departema ya boyambi bapaya, oyo ekoluka ndenge ya kopesa lisungi. Mpo ete departema ya boyambi bapaya esala mosala na yango na molɔngɔ mpe malamu, esengeli ete bandeko nyonso básala na bomoko. (Ebe. 13:17) Toyokaka ete bandeko mosusu bazali kotika bango moko esika ya kolala oyo bapesaki bango mpo na kokende na esika mosusu epai oyo moninga moko to moto moko oyo bayebani na ye azali. Yango epesaka mokakatano na bandeko oyo bazali kosala na departema ya koyamba bapaya. Tozali kosɛnga na bino nyonso ete bósala na bomoko na departema yango.
7 Ntembe ezali te ete Yehova asungaka biso na misala oyo esalemaka mpo na mayangani ya mbula na mbula. Lokola bandeko mingi oyo balongwaka na bamboka na bango mpo na kokende na liyangani ya etúká bazalaka na mposa ya kozwa bisika ya kolala, tokoki komindimisa ete Yehova akokokisa bamposa na bango na ndenge ebongi. Lokola makambo yango ezali na boyokani na losambo ya solo, tosengeli kolanda na esengo nyonso mitinda oyo mipesami. Tómonisa ete tozali sembo na oyo ezali moke mpenza, boye tokozwa matomba mingi oyo mazali kozela baoyo Yehova alingaka.—Luka 16:10.
8 Tóbosana te bandeko oyo bazali na mikakatano: Mibange to bibɔsɔnɔ, basaleli ya ntango nyonso to bandeko mosusu bakoki kozala na mposa ete básalisa bango bázala na liyangani. Bandeko na bango ya mosuni, bankulutu to bandeko ya lisangá na bango baoyo bayebi ezalela na bango malamu bakoki na bolingo nyonso kosala oyo esengeli, kasi basengeli te kobwaka mokumba yango likoló na bandeko oyo bazali kotambwisa liyangani.—Talá 1 Timote 5:4.
9 Satana alukaki kopɛngola likebi na yo na makambo ya elimo? Ezali mawa na komona bandeko mingi mpe mabota na bango kozanga bilei ya ntina ya elimo. Ndenge nini? Na mokolo ya mitano bazalaka na liyangani ya etúká te. Na bantango mosusu emonanaki ete bandeko mingi balandaka te mateya ya elimo mpe bazangisaka libaku ya kozala elongo na bandeko na bango baklisto na mokolo ya mitano.
10 Ekoki kozala ete bandeko mosusu bakakatanaka mpo na kosɛnga bankonzi na bango ya mosala konze mpo na koyangana na liyangani. Yango ezali mpe bongo mpo na yo? Mpo na nini te koyebisa likambo yango epai ya Yehova na nzela ya libondeli mpe ozala na mpiko ya kolimbola likambo yango epai ya mokonzi na yo ya mosala? Omikundola matomba malamu oyo Nehemia azwaki, ye azalaki na ezalela ndenge moko na yo. (Neh. 2:1-6) Zalá na kondima ete Tata na biso ya likoló alingi kosalisa yo, yebá ete soki otii matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, akopesa yo biloko ya ntina mpo na bomoi.—Mat. 6:32b, 33.
11 Bopusi nini liyangani na biso ezali na yango epai na yo? Ndeko mwasi moko na ɛsti ya États-Unis akomaki boye: “Matɔndi mingi mpo na liyangani ya etúká ya 1999. Kozala esika moko na bandeko oyo namonaka bango bobele mbala moko na mbula epesaka ngai esengo mingi. Ntango nayebaki solo nazalaki elenge mpe na zemi, nazali naino kumikundola na esengo mpenza ntango ndeko oyo azalaki koyekola na ngai Biblia amemaki ngai na liyangani na ngai ya liboso. Natalaki mapata likoló ya motó na ngai na esika ya masano oyo ezalaki polele wana tozalaki koyemba nzembo ya Bokonzi ‘Makiasikiasi ya bandeko,’ mpe nalelaki. ‘Natalaki bato malamu oyo bazalaki zingazinga na ngai,’ namitunaki, ‘Yehova akokondima ngai ndenge nini?’ Mokolo wana nazwaki ekateli ya kosalela mpenza Yehova.” Ndakisa oyo ezali mpenza kosimba motema! Ezali mpenza esengo kosangana na basaleli ya Yehova oyo bazali pɛto, boye te?
12 Lokola mikolo ya nsuka elingi kosila, tozali na mposa ya liyangani na biso ya etúká koleka ndenge tozalaki koyoka liboso. Yango ezali ebongiseli oyo euti epai ya Yehova mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya elimo na biso mpo tózala na bokatikati. Yango wana, zwá ekateli ya koyangana mikolo nyonso misato na liyangani ya etúká ya mbula oyo “Batosi ya Liloba ya Nzambe.” Ndenge nini okoki kotosa ekateli na yo? Sɛngá patrɔ na yo konze libela mpo na koyangana mikolo nyonso misato ya liyangani. Soki ozali na makoki mingi te, banda kobomba mwa mbongo oyo okozala na mposa na yango mpo na kokende na liyangani. Sɛngá Yehova asalisa yo olonga makambo oyo ekoki kopekisa yo kokende na liyangani. Wana ozali kosala bongo, okoki kozala na elikya mpe okosepela ete okokutana na bandeko na yo ya elimo mpe okoyoka maloba ya bomoi ya seko oyo euti na Tata na biso ya likoló, Yehova.—Kokanisá na Yoane 6:68.
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:30 na ntɔngɔ — 5:00 nsima ya nzanga
Mwalomingo
9:30 na ntɔngɔ — 4:00 nsima ya nzanga
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na liyangani “Batosi ya Liloba ya Nzambe”
1. Soki ekosɛnga ete osala mobembo molai mpo na kokóma na esika ya liyangani, bandá kobomba mbongo mpo na transport na yo mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá ye na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16; Mas. 3:9.
3. Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli malamu na liyangani mpe soki tokozala na elateli malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
4. Bótosa makambo oyo bandeko oyo bayambaka bato bakosɛnga bino. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, luká kolya bilei ya pɛpɛlɛ, mpo okoka kolanda malamu manaka ya nsima ya nzanga. Bilei ya kilo epesaka mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká biteni ya papye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo bibongisami mpo na kobwaka biloko ya bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.