Manaka mpo na makita ya mosala
LIYEBISI: Kobanda na sanza oyo, Mosala na biso ya Bokonzi ekobanda mpe kozala na manaka mpo na Likita ya Mosala oyo ekosalema na pɔsɔ ya liboso ya sanza oyo ekolanda. Mbongwana oyo ezali mpo na kopesa masangá nzela ya kosalaka makita na bango malamu ata soki Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ekolanda ekómi naino te.
Pɔsɔ ebandi na 6 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo matali lisangá oyo mazwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá lapolo ya mosala ya kosakola ya sanza ya Augusto mpo na ekólo mobimba mpe mpo na lisangá na bino.
Min. 15: “Tólanda ndakisa ya Yehova, ye aponaka bilongi te.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te, mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Pesá ndimbola ya “kopona bilongi te,” lobelá ndenge Yehova amonisaka ezaleli yango, mpe ndenge tokoki komonisa ezaleli yango na mosala na biso ya kosakola.—Talá buku Étude perspicace, volime 1 lokasa 1175, paragrafe 8 kino lokasa 1176 paragrafe 3.
Min. 20: “Toyoká naino makambo oyo te?” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Sɛngá na bayangani bálobela ndenge oyo kozongela mateya esalisaki bango báyeba solo malamu mpe básepela na yango lisusu mingi koleka.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1995, lokasa 21 kino 22 mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1993, lokasa 13 kino 14, paragrafe 10 kino 12.
Loyembo 218 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 13 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Pesá makanisi mpo na ndenge ya koyanola na bambote ya Noele mpe ya Bonane. Soki lisangá ezali na buku Moto oyo alekaki bato nyonso to buku Moteyi Monene, monisá lolenge oyo ekoki kosalelama malamumalamu na mosala ya kosakola na eleko ya Noele.
Min. 15: “Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2000.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Lobelá mbongwana oyo ezali na manaka ya mbula ya sika. Lisolo No. 3 ekouta na mwa buku ya moke oyo ezali na motó na likambo ete “Masolo ya kosolola na Biblia.” Lisolo No. 4 ekozala na masolo oyo ezali kolobela moto moko oyo alobelami na Biblia, masolo makouta na buku Étude perspicace des Écritures mpe sanza misato liboso ete mbula esila, masolo na yango ekouta na mwa buku “Masolo ya kosolola na Biblia.” Soki motó ya likambo ya lisolo No. 4 ezali na elembo oyo (#) liboso na yango, esengeli kopesa lisolo yango na ndeko mobali. Lendisá bandeko nyonso ete bátángaka Biblia pɔsɔ na pɔsɔ mpe básalaka mikumba nyonso oyo bapesi bango na eteyelo.
Min. 20: “Ndenge nini okoki kosolola na moto oyo andimaka Nzambe te?” Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá makambo ndenge na ndenge oyo etindaka bato mingi ete bándimaka lisusu Nzambe te. Monisá mwa makanisi oyo tokoki kosalela mpo na kosolola na bango, kosalisa bango bándima ete Nzambe azali. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale. Mpo na koyeba makambo mingi, talá buku Comment raisonner, lokasa 106 kino 112, mpe buku L’humanité à la recherche de Dieu, mokapo 14.
Loyembo 220 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 20 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Sɛngá na basakoli bálobela makambo oyo bauti kokutana na yango na mosala ya kosakola, oyo ekoki kobenda likebi.
Min. 15: Soko moto aboyi kosolola na biso. Lisolo elongo na bayangani mpe bilakiseli. Lobelá makambo oyo ezali na buku Comment raisonner na lokasa 15 kino 16. Poná “maloba” moko to mibale oyo ezali na lokasa 16 kino 20, “oyo ezali kolakisa ete moto aboyi koyoka,” to salelá makambo oyo bato balobaka mbala mingi na teritware na bino mpo na koboya kosolola na bino. Lobelá mwa biyano oyo ekomami na buku, mpe monisá mpo na nini yango ekoki kobimisa matomba malamu na teritware na bino. Salá mwa bilakiseli mpo na komonisa lolenge ya kosalela makanisi yango. Sɛngá bayangani bálobela biyano oyo bapesaki, oyo ebimisaki matomba malamu.
Min. 20: Nakoki kondima kosala mosala mpo na lingomba moko? Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1999, lokasa 28 kino 30. Bato mosusu bandimaki mosala motindo yango mpe na nsima bamonaki ete makambo oyo bazalaki kosala ezalaki na boyokani te na mibeko ya Biblia. Lobelá mituna oyo tosengeli komituna ntango tozali kozwa ekateli ya kosala mosala oyo ezali na boyokani na makambo mosusu ya lingomba. Lendisá bandeko nyonso ete bálanda nzela oyo ekosalisa bango bázala na etamboli malamu liboso ya Yehova.—2 Kol. 6:3, 4, 14-18.
Loyembo 109 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 27 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Soki lisangá na bino ekobongola mikolo ya makita mpo na mobu ya sika, pesá bandeko nyonso mwa bilendiseli na boboto ete bálanda koyangana na makita nyonso mpe bámimesenisa na mikolo yango. Bóyebisa bato oyo bazali koyekola Biblia mpe baoyo bazali kosepela na solo mikolo oyo bokómi kosala makita mpe bósalela lokasa ya libyangi oyo ezali komonisa mikolo yango. Yebisá bandeko nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola mpo na sanza ya Desɛmbɛ.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: Tókabola babuku mpe mwa babuku ya kala na sanza ya Yanuali. Lisukulu mpe bilakiseli. Lakisá babuku ya kala mibale to misato ya nkasa 192, oyo ebimaki liboso ya mobu 1986, soki ezali na lisangá, mpe lendisá basakoli bámema ndambo ya babuku yango na mosala ya kosakola. (Soki lisangá na bino ezali na babuku yango te, bólobela mikanda ndenge na ndenge oyo bokoki kolakisa na sanza ya Yanuali.) Limbolá ete babuku yango ata ekómi ya kala ekoki kobenda likebi ya bato ete básepela na Biblia. Na buku mokomoko, monisá makambo oyo ezali kobenda likebi mpe bililingi oyo bokoki kosalela mpo na kobanda lisolo. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale. Lakisá ndenge ya kosalela mwa babuku Bilimu ya bakufi mpe Ba Témoins de Jéhovah ya ntango na biso soki ezali na lisangá. Soki moto asepeli, tokoki kosalela mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda boyekoli elongo na ye.
Loyembo 224 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 3 Yanuali
LIYEBISI: Soki bakoyamba mokɛngɛli ya zongazonga te, masangá esengeli te kopusa Likita na bango ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 3 Yanuali ete básala yango liboso ya mokolo oyo yango esalemaka.
Min. 8: Mayebisi ya lisangá.
Min. 17: Yebá kopesa eyano. (Kols. 4:6) Lisukulu mpe lisolo na bayangani. Buku Comment raisonner ezali esaleli moko malamu oyo ezali kosalisa biso tómonisa bato mosusu solo ya Biblia. Soki moto oyo tozali kosolola na ye aboi kondima mateya na biso mosusu, mbala mosusu tokoki kosalela eteni oyo elobi “Si quelqu’un vous dit (Soki moto alobi na yo ete)—” oyo ezali na nsuka ya eteni oyo ezali kolobela mateya yango. Lobelá makambo oyo elobami mpo na Biblia, oyo ezali na lokasa 57 kino 60, mpe monisá mpo na nini biyano oyo epesami wana ekoki kobimisa litomba malamu.
Min. 20: “‘Batosi ya Liloba ya Nzambe’—Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2000.” Mokomeli ya lisangá akosala lisolo oyo ezali na siplema na mituna mpe biyano. Tángá liboso mokanda ya 15 Desɛmbɛ 1999 oyo eyebisi esika oyo liyangani na bino ekosalema. Salelá mikapo oyo ezali na lisolo yango mpo na komonisa ntina oyo biso nyonso tosengeli kolanda malamumalamu malako oyo ezali kouta na Biro. Bendá likebi ya moto mokomoko ete amibongisaka libela mpo na kozwa konje mpo akoka koyangana na mikolo nyonso ya liyangani, banda mokolo ya mitano. Pesá bandeko longonya mpo na ndenge bazali kolanda bibongiseli ya la Société.
Loyembo 56 mpe libondeli ya nsuka.