Toyoká naino makambo oyo te?
1 Tosilá koyoka yango! Yehova azongelaka makambo mingi oyo ezali na kati ya Liloba na ye mpo na bolamu ya basaleli na ye. Yesu azalaki mpe mbala na mbala kozongela mateya na ye oyo etali mitindo ndenge na ndenge ya makambo ya Bokonzi. Bantoma na ye bazalaki mpe kozongela makambo ya elimo epai ya bato oyo bamipesaki mpenza na solo.—Lom. 15:15; 2 Pet. 1:12, 13; 3:1, 2.
2 Na mikolo na biso, ebongiseli ya Yehova ezali kosala ete mateya ya ntina ezongelamaka mbala na mbala na makita ya lisangá. Mikanda mosusu toyekolá yango mbala na mbala. Ya solo, ezali malamu tóyokaka mpe makambo oyo tosilá koyoka !
3 Bozongeli ezali na ntina mingi: Makundoli ya Yehova ekolisaka boyebi na biso, efungolaka makanisi na biso, mpe elendisaka ekateli na biso ya kotikala makasi na elimo. (Nz. 119:129) Kozongela mitinda ya Nzambe mpe mibeko na ye ezali lokola komitala na talatala. Esalisaka biso tómitalela malamumalamu mpo tózala te lokola ‘moyoki oyo akobosanaka.’—Yak. 1:22-25.
4 Soki tozali komikundwela mateya ya solo te, makambo mosusu ekobebisa motema na biso. Makundoli ya Yehova elendisaka biso ete tóboya elimo ya mokili ya Satana. (Nz. 119:2, 3, 99, 133; Filp. 3:1) Makundoli ya mikano ya Nzambe oyo toyokaka mbala na mbala epusaka biso ete ‘tókɛngɛlaka.’ (Mko. 13:32-37) Kozongela mbala na mbala mateya ya solo ezali kosalisa biso tótambola na nzela ya bomoi ya seko ntango nyonso.—Nz. 119:144.
5 Ndenge nini moto na moto akoki kozwela yango litomba: Tosengeli ‘kofungola motema na biso epai na makundoli ya Nzambe.’ (Nz. 119:36, NW) Soki lisolo moko oyo tosilá koyoka mbala na mbala ekosalema lisusu na likita ya lisangá, tosengeli komibongisa malamu liboso, kotánga mikapo nyonso oyo ezali na kati, mpe kokanisa ndenge oyo tokoki kosalela makambo yango na bomoi na biso. Tóbosanaka te komibongisa mpo na bozongeli ya kokóma na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, tókanisa te ete yango ezali na ntina te. (Luka 8:18) Lokola mateya ya solo ezongelamaka mbala na mbala na makita na biso, yango esengeli soko moke te kopusa biso ete tótyelaka yango likebi te.—Ebe. 5:11.
6 Tiká tómonisa elimo moko na mokomi na nzembo oyo alobaki ete: ‘Nasepeli na nzela ya makundoli na yo koleka biloko nyonso ya motuya.’ (Nz. 119:14, NW) Ya solo, tosilá koyoka makambo yango ya motuya, mpe tokoyoka yango lisusu. Mpo na nini? Mpamba te Yehova ayebi ete tosengeli koyoka yango!