Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/03 lok. 6
  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2004

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2004
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Masolo mosusu
  • Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Ndenge oyo tozwaka matomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Programɛ ya sika ya makita ya lisangá
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 12/03 lok. 6

Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na mobu 2004

1 Yehova azali kopesa bato mpamba makoki ya kosala mosala moko ya ntina mingi na mokili mobimba. Mpo na yango, azali kosalela mpe formasyo oyo tozwaka pɔsɔ na pɔsɔ na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Osalaka masolo na eteyelo ndenge mpenza okoki kosala yango? Mwa mbongwana ekosalema na sanza ya Yanuali mpo na kosalisa bana-kelasi bázwa matomba mingi na eteyelo yango.

2 Mopesi-toli mosungi moko na mbula: Bandeko oyo basalaka lisukulu ya koteya lisangá mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia, basepelaka mingi na toli ya mopesi-toli mosungi. Na masangá oyo bankulutu ya makoki bazali mingi, mokumba ya mopesi-toli mosungi ekoki kopesama na mokomoko na bango mpo na mbula moko. Na ndenge yango, mokumba yango ekozala kaka na moto moko te; kasi likambo ya ntina ezali ete bankulutu ná basaleli na misala ya makoki bakozwa litomba na toli ya balobi mpe bateyi mingi oyo bayebi mpenza koteya.

3 Programɛ ya bozongeli ya koloba: Soki lisangá na bino ezali na liyangani ya zongazonga na pɔsɔ oyo bozongeli ya koloba esengeli kosalema, bozongeli (mpe masolo mosusu oyo esengeli kosalema na pɔsɔ yango) ekosalema na pɔsɔ oyo elandi pɔsɔ ya liyangani mpe masolo oyo esengelaki kosalema na pɔsɔ yango ekosalema na pɔsɔ ya liyangani. Kasi, ntina mpenza ya kosala bongo ezali te soki bozongeli ya koloba ekwei na pɔsɔ oyo mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bino. Na pɔsɔ yango, loyembo, toli mpo na koloba malamu, mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia ekotikala kaka ndenge ezali na lokasa ya programɛ ya eteyelo. Lisukulu ya koteya lisangá (oyo esalemaka nsima ya toli mpo na koloba malamu) ekozala oyo ya pɔsɔ elandi. Nsima ya makanisi ya ntina na botángi ya Biblia, bokosala Likita ya Mosala na boumeli ya miniti 30; ekoki kozala masolo misato ya miniti 10 to masolo mibale ya miniti 15. (Mayebisi ekozala te.) Nsima ya Likita ya Mosala, bokoyemba loyembo mpe mokɛngɛli ya zongazonga akosala lisukulu moko ya miniti 30. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ya pɔsɔ elandi ekobanda na toli mpo na koloba malamu mpe na nsima makanisi ya ntina na botángi ya Biblia kaka ndenge bapesi yango na lokasa ya programɛ; nsima na yango, bokosala bozongeli ya koloba.

4 Salelá malamu libaku nyonso oyo ekoki kosalisa yo okola na elimo. Ntango ozali kozwa matomba na mateya ya Eteyelo ya Teokrasi, ozali kolendisa lisangá na yo, yo mpe ozali kosala ete bisakweli ya Biblia ekokisama, mpe ozali kopesa lokumu na Nkolo ya nsango ya malamu oyo tosengeli kosakola.​—Yis. 32:3, 4; Emon. 9:19.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto