Tikeláká bato bazulunalo mbala na mbala mpo na kokolisa mposa na bango
1. Ndenge nini tokoki kosalela bazulunalo mpo na kokolisa mposa ya bato oyo basepeli?
1 Bato mingi oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola bandimaka ete tókendeke kotala bango mpe basepelaka mingi na mikanda oyo topesaka bango, kasi bakakatanaka mpo na kondima koyekola Biblia. Lolenge moko ya kosalisa bango básepela na nsango malamu ezali ya kotikelaka bango bazulunalo mbala na mbala. Soki opesi moto bazulunalo, nkoma nkombo na ye ná adrɛsi na ye, mokolo oyo okozongela ye, zulunalo oyo azwaki, vɛrsɛ oyo botángaki, mpe makambo nyonso oyo omonaki, oyo endimisaki yo ete moto yango asepeli mpenza. Soki bazulunalo ya sika eyei, luká makambo oyo ekosepelisa bato oyo otikelaka bazulunalo mbala na mbala, mpe lakisá bango yango ntango okozongela bango. (1 Kol. 9:19-23) Nsima ya mikolo, ntango mosusu likambo moko oyo bakotánga na bazulunalo na biso ekolamusa mposa na bango mpe ekotinda bango báluka koyeba makambo mingi.
2. Mpo na nini bato basengeli sikoyo koluka Yehova na lombangu mpenza, mpe tokoki kosala lisusu nini mpo na kosalisa bango?
2 Atako bongo, toyebi ete bato mingi bakokóma basaleli ya Yehova te kaka mpo bazali kotánga bazulunalo bango moko. Lokola bato basengeli sikoyo koluka Yehova na lombangu mpenza, tokoki kosala lisusu nini mpo na kosalisa bango? (Sef. 2:2, 3; Emon. 14:6, 7) Tokoki kosalisa bango básepela na nsango malamu soki tozali kotángelaka bango vɛrsɛ moko oyo toponi malamu, mbala nyonso oyo tokei kotikela bango bazulunalo.
3. (a) Ndenge nini tokoki kobongisa masolo na vɛrsɛ moko kaka? (b) Masolo nini ebendaka likebi ya bato mingi na teritware na bino?
3 Lisolo ya vɛrsɛ moko kaka: Kanisá bato oyo otikelaka bazulunalo mbala na mbala, mpe bongiselá moto mokomoko lisolo na vɛrsɛ moko kaka oyo eyokani na bamposa na ye. (Filp. 2:4) Na ndakisa, soki moto moko autaki kokufela ndeko to moninga na ye, okoki kozongela ye mbala na mbala mpo na kosolola na ye makambo oyo Biblia elobi na oyo etali bakufi mpe elikya ya lisekwa. Okoki mpe kosalela makambo oyo ezali na buku Comment raisonner na motó ya likambo “Mort” (Liwa) mpe “Résurrection” (Lisekwa), mpo na kobongisa lisolo yango na vɛrsɛ moko kaka. Mbala mosusu okomona malamu bótalela masolo mosusu oyo elobeli likambo yango, na ndakisa ndenge oyo maladi, konuna mpe liwa ekosila mpo na libela. Sɛkɛlɛ ezali kaka koluka lisolo oyo ekosepelisa moto mpe ekomonisa ye mokemoke oyo Biblia elobi na likambo yango.
4. Mpo na nini ezali na ntina kosalisa bato bákanga ntina ya vɛrsɛ oyo tolobeli, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
4 Salisá ye akanga ntina: Atako mbala mingi ezalaka malamu kosala lisolo ya pɛtɛɛ mpe ya mokuse, esengeli kosuka kaka te na kotánga vɛrsɛ. Satana asili kozipa makanisi ya bato mpo bándima nsango malamu te. (2 Kol. 4:3, 4) Ata bato oyo bameseni na Biblia bazalaka na mposa básalisa bango na kokanga ntina na yango. (Mis. 8:30, 31) Na bongo, zwá ntango ya kolimbola vɛrsɛ mpe komonisa ndenge ya kosalela yango, ndenge kaka osalaka na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. (Mis. 17:3) Luká koyeba soki moto yango azali komona mpenza ntina ya kosalela Liloba ya Nzambe na bomoi na ye.
5. Ndenge nini moto oyo totikelaka ye bazulunalo mbala na mbala akoki kokóma moyekoli ya Biblia?
5 Soki moto yango azali kosepela na makambo oyo azali koyekola, bandá mokemoke kolobela ata vɛrsɛ mibale to misato mbala nyonso oyo okei kotala ye. Luká ndenge ya kokɔtisa ye na mwa buku Azali kosɛnga to na buku Boyebi. Na ndenge yango, moto oyo otikelaka bazulunalo mbala na mbala akoki mbala mosusu kokóma moyekoli ya Biblia.