Lamuká! ya ntina mingi oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ
1 Bato mingi basepelaka koyoka banzembo ya bandɛkɛ mpe komona kolala ya moi. Kasi, mingi bandimaka te ete Tata moko ya bolingo, oyo afandaka na likoló, nde akelá biloko nyonso wana. Tokozwa libaku mpenza ya koyebisa bato ete Yehova nde akelá biloko nyonso, ntango tokokabola Lamuká! oyo ya ntina mingi. (Yis. 40:28; 43:10) Lamuká! mobimba ya Sɛtɛmbɛ ekolobela motó ya likambo oyo: “Mozalisi azali mpenza?”
2 Na teritware: Soki likoki ezali, salá programɛ ya kosakolaka ndako na ndako mokolo nyonso ya pɔsɔ elongo na lisangá. Nzokande, kokakatana te mpo na kokabola Lamuká! wana ya ntina mingi na mikolo mosusu. Na ntembe te, balakisi mpe bato mosusu oyo bateyaka bakosepela mingi na Lamuká! yango. Na bongo, esengeli koluka kokutana na bato ya ndenge wana, oyo bazali na teritware ya lisangá na bino.
3 Soki moto asepeli, tuná ye motuna moko oyo okopesa eyano na yango ntango okozongela ye. Na ndakisa, okoki kotuna ye ntina oyo Mozalisi oyo atondi na bolingo atiki nzela ete bampasi etonda boye na mokili. Ntango okozongela ye, okoki kolakisa ye mokapo 1 to mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka. To, okoki kotuna ye motuna moko etali mokano oyo Mozalisi azali na yango mpo na mabelé, mpe bokotalela mokapo 3 ntango okozongela ye.
4 Na eteyelo: Soki ozali mwana-kelasi, mpo na nini te kokabolela balakisi na yo mpe baninga na yo ya kelasi Lamuká! oyo ya ntina mingi? Soki kaka otye Lamuká! yango likoló ya mesa na yo, basusu bakoki kotuna yo mituna na makambo oyo ondimaka. Okoki mpe kozwa mabaku ya kosalela makambo oyo ezali na Lamuká! yango ntango bozali kosolola na kelasi mpe ntango ozali kobongisa lisolo moko oyo okosala liboso ya bana-kelasi mosusu. Mpo na kosalisa yo, Lamuká! yango ezali na lisolo moko ya “Mituna oyo bilenge batunaka,” oyo elobi: “Ndenge nini nakoki kolimbwela basusu ntina oyo nandimaka ete Mozalisi azali?”
5 Yehova abongi mpenza kozwa lokumu mpe nkembo mpo na biloko oyo akelá. (Emon. 4:11) Tokopesa Mozalisi na biso lokumu mpe tokosalisa basusu bápesa ye lokumu, soki tokokabola na molende mpenza Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ.