Lamuká! ya ntina mingi oyo tokolakisa na Novɛmbɛ!
1 Bato mingi balukaka koyeba soki Biblia ezali mpenza na ntina. Na ndakisa, bamitunaka boye: Soki bato nde bakomaki Biblia, mpo na nini kobenga yango Liloba ya Nzambe? Mpo na nini nasengeli kotika toli ya Biblia etambwisa ngai? Soki nasali milende mpenza mpo na kotánga Biblia mpe koyekola yango, nakozwa nini? Libongoli nini ya Biblia nasengeli kosalela? Wana ezali kaka ndambo ya mituna oyo biyano na yango epesami na Lamuká! ya Novɛmbɛ (na Lifalanse), oyo ezali na motó ya likambo: “Okoki kotyela Biblia motema?”
2 Ekozala malamu tókabola Lamuká! wana ya ntina mingi na teritware na biso mobimba. Soki likoki ezali, bimáká ndako na ndako elongo na lisangá na bino mokolo nyonso ya pɔsɔ na sanza ya Novɛmbɛ, mpo na kokabola yango. Lakisá Lamuká! yango epai ya bandeko na yo, baninga ya kartye, ya mosala, ya kelasi, balakisi, mpe bato oyo osololaka na bango na Biblia. Zaláká na yango ntango okei kosomba biloko to na mobembo. Bankulutu basɛngi Lamuká! yango mwa mingi koleka oyo lisangá ezwaka mpo ezanga te.
3 Bandá koyekola Biblia na moto: Soki opesi moto zulunalo yango, liboso bókóma na nsuka ya lisolo na bino, okoki koyebisa ye likambo moko oyo ekopesa yo nzela obanda koyekola na ye Biblia. Na ndakisa, okoki koyebisa ye boye: “Mbala ekoya, nakosepela kolakisa yo eyano ya Biblia na motuna oyo, ‘Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?’” Ntango okozongela ye, memelá ye buku Biblia eteyaka mpe lakisá ye nkasa 4-5, to bótalela elongo mokapo 3, paragrafe 1-3. To, okoki koloba boye: “Mbala ekoya, nakosepela tólobela esakweli moko ya Biblia oyo ezali kokokisama lelo oyo.” Ntango okozongela ye, lakisá ye mokapo 9 ya buku yango mpe bótalela elongo paragrafe 1-3. To, okoki kaka koloba boye: “Bato mingi bakangaka mpenza te ntina ya makambo oyo batángaka na Biblia. Mbala ekoya, nakosepela kolakisa yo oyo okoki kosala mpo oyeba Biblia na yo malamu.” Ntango okozongela ye, lakisá ye buku Biblia eteyaka mpe monisá ye ndenge oyo boyekoli esalemaka.
4 Kaka Biblia nde ezali na “makomi mosantu,” oyo ekoki kokómisa biso bato ya “bwanya mpo na lobiko.” (2 Tim. 3:15) Yango wana, tiká ete biso nyonso tókabola na molende mpenza Lamuká! wana ya ntina mingi mpo na kosalisa bato bátyela Biblia motema!