Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/08 lok. 4
  • Okoki kozala moteyi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kozala moteyi!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Yehova azali kopesa biso formasyo mpo na mosala ya kosakola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Yekola koteya
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
  • Kokanisa te ete okokoka te mpo ozali na makoki ya kosala yango te
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 11/08 lok. 4

Okoki kozala moteyi!

1. Libaku malamu nini mosakoli mokomoko azali na yango?

1 Koteya moto solo ya Biblia ezali moko ya makambo oyo esepelisaka mingi na mosala ya kosakola. Ezalaka mpenza esengo komona moto azali kondima nsango ya Bokonzi, mpe kosalisa ye apusana penepene na Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Yak. 4:⁠8) Mosakoli mokomoko asengeli komityela mokano ya koteya moto oyo azali na nzala ya elimo mpe kosalisa ye abongola bomoto, makanisi, mpe etamboli na ye.​—⁠Mat. 28:​19, 20.

2. Mpo na nini bandeko mosusu bakakatanaka mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia, mpe nini ekosalisa bango bálonga mokakatano yango?

2 Tyelá Yehova motema: Na ntango ya kala, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova bakanisaki ete bakokoka te kokokisa mikumba oyo apesaki bango. Moize, Yilimia, Amosa, mpe bato mosusu oyo batalelamaki lokola bato mpamba batyelaki Yehova motema; yango esalisaki bango bátika kokakatana to kobanga mpe bákokisa mosala monene. (Ex. 4:​10-12; Yil. 1:​6, 7; Amo. 7:​14, 15) Ntoma Paulo mpe ‘azwaki mpiko,’ to akómaki na “elobeli ya polelepolele.” Azwaki yango wapi? Alobaki ete azwaki yango “na lisalisi ya Nzambe na biso.” (1 Tes. 2:⁠2) Biso nyonso tokoki kozala na elikya ete Yehova akopesa biso lisalisi, bwanya, mpe makasi oyo tosengeli na yango mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia oyo ebotaka mbuma.​—⁠Yis. 41:10; 1 Kol. 1:​26, 27; 1 Pet. 4:⁠11.

3, 4. Formasyo nini tozwaka mpo tóyeba koteya Liloba ya Nzambe?

3 Ndimá kozwa formasyo: Yehova Nzambe, Molakisi na biso monene, apesaka biso formasyo na nzela ya mateya oyo tozwaka mbala na mbala, mpo tókóma bateyi ya malamu. (Yis. 54:13; 2 Tim. 3:​16, 17) Ndimá formasyo yango mpe salelá mabaku nyonso mpo na kokolisa boyebi na yo ya Makomami mpe kobongisa lolenge na yo ya koteya solo ya Biblia. Atako wana ezali mokano ya liboso ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ya Likita ya Mosala, makita nyonso ya lisangá epesaka biso formasyo mpo tóyeba koteya Liloba ya Nzambe.

4 Luká koyekola ndenge ya pɛtɛɛ ya koteya ata mateya ya mozindo ya Biblia. Buku Eteyelo ya mosala, na lokasa 227, elobi boye: “Soki olingi ete bato bákanga ntina ya lisolo na yo, esengeli ete yo moko okanga naino mpenza ntina na yango.” Kopesa biyano na makita esalisaka biso tóbosana te makanisi ya ntina oyo tokosalela na mosala ya kosakola. Soki ozali komibongisa malamu, okokóma na makoki ya koteya, mpe kobanga na yo ekosila mokemoke.

5. Formasyo nini mosusu tozwaka na lisangá mpo tókolisa makoki na biso ya koteya?

5 Banda kala, baklisto bazwaka mayele ya koteya epai ya baninga na bango baklisto ntango bazali na mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Luka 10:⁠1) Soki likoki ezali, bimáká elongo na basakoli oyo bayebi koteya malamu, na ndakisa babongisi-nzela, bankulutu, mpe bakɛngɛli-batamboli ntango bakei koyekola na bato Biblia. Talá ndenge bazali kosalela bandakisa ya pɛtɛɛ mpe bililingi, bitanda, mpe makambo mosusu oyo ezali na buku ya boyekoli mpo na kolimbola mateya ya Biblia. Sɛngá bango batoli oyo ekosalisa yo okóma moteyi malamu. (Mas. 1:5; 27:17) Ndimá formasyo nyonso wana, mpe talelá yango lokola nde euti epai ya Yehova.​—⁠2 Kol. 3:⁠5.

6. Nini mpenza ekosalisa yo okóma moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe?

6 Tyelá Yehova motema, mpe zwá matomba na formasyo oyo azali kopesa. Bondelá Yehova asalisa yo okola na elimo. (Nz. 25:​4, 5) Yo mpe okoki koyoka esengo ya kosalisa moto akóma moteyi ya Liloba ya Nzambe lokola yo!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto