MOKAPO YA SAMBO
“Nakosilisa mposa ya molimo oyo elɛmbi”
1. Na mapamboli nyonso oyo tokozwa na mokili ya sika, wapi oyo yo ozelaka mpenzampenza?
“MOKILI ya sika.” Ntango oyokaka maloba wana, mapamboli nini okanisaka mpenza? Mbala mosusu okanisaka ndenge okozala na nzoto ya kokoka, ndenge oyo bilei kitoko ekozala ebele, ndenge oyo banyama bakofanda na kimya, to ndenge oyo bato bakofanda na kimya na bandako na bango. Ntembe ezali te ete oyebi malamu bavɛrsɛ ya Biblia oyo ezali kolobela mapamboli yango. Kasi kobosana te mapamboli oyo mosusu: kozala malamu na elimo mpe kozala na kimya ya makanisi. Soki yango ezali te, bisengo mosusu nyonso ekozala na valɛrɛ te.
2, 3. Makomi ya Yirimia epesi biso elikya ya lipamboli nini ya ntina mingi?
2 Ntango Nzambe atindaki Yirimia asakola ete Bayuda bakolongwa na boombo na Babilone, Nzambe alobelaki mpe ndenge oyo bato yango bakomiyoka; alobaki ete: “Okomikembisa na bambonda na yo ya moke ya mabɔkɔ mpe okokɔta na mabina ya baoyo bazali kosɛka.” (Tángá Yirimia 30:18, 19; 31:4, 12-14.) Nzambe abakisaki likambo mosusu oyo ekoki kolendisa yo mpenza, alobaki ete: “Nakosilisa mposa ya molimo oyo elɛmbi, mpe molimo nyonso oyo elɛmbi nakotondisa yango.” Biblia mosusu (NET Bible) ebongoli elaka yango boye: “Nakokokisa mpenza mposa ya bato oyo basili makasi mpe nakobɔndisa mpenza molimo ya bato oyo basenzwi.”—Yir. 31:25.
3 Elikya yango ezali kitoko mpenza, boye te? Yehova alaki ete akosilisa, to akokokisa mposa nyonso ya moto oyo alɛmbi nzoto mpe asili makasi. Ɛɛ, mpe oyo Nzambe alaki, akokisaka yango. Makambo oyo Yirimia akomaki epesi biso elikya ete Nzambe akokokisa mpe bamposa na biso. Lisusu, makomami yango ezali kosalisa biso tóyeba ndenge oyo, banda lelo, tokoki kolendisama mpe kozala na elikya. Longola yango, ezali komonisa ndenge oyo tokoki kolendisa basusu, mpe kosalisa bango bákokisa mposa ya milimo na bango oyo elɛmbi.
4. Mpo na nini tokoki komiyoka ndenge oyo Yirimia amiyokaki?
4 Elaka yango ebɔndisaki Yirimia mingi, yango ekoki mpe kobɔndisa biso. Mpo na nini? Kanisá lisusu likambo oyo Mokapo 1 ya buku oyo elobeli; elobi ete Yirimia ‘azalaki moto [oyo azalaki na mayoki] lokola biso,’ kaka ndenge Eliya azalaki. (Yak. 5:17) Kanisá mwa makambo oyo mbala mosusu elɛmbisaki Yirimia nzoto to enyokolaki ye mwa moke na makanisi. Kanisá mpe ndenge oyo olingaki komiyoka soki ozalaka na esika ya Yirimia mpe mpo na nini makambo oyo ozali kokutana na yango ekoki kolɛmbisa yo.—Rom. 15:4.
5. Mbala mosusu makambo nini elɛmbisaki Yirimia nzoto?
5 Ekoki kozala ete bato ya engumba ya Yirimia balɛmbisaki mpe ye nzoto. Akolaki na Anatote. Anatote ezalaki engumba ya Balevi oyo ezalaki na ntaka ya mwa bakilomɛtrɛ na nɔrdi-ɛsti ya Yerusaleme. Mosakoli ayebanaki na bato ya Anatote mpe mbala mosusu azalaki na bandeko na engumba yango. Yesu alobaki ete mosakoli azalaka na lokumu te na mboka na ye moko, mpe yango ezalaki mpe bongo mpo na Yirimia. (Yoa. 4:44) Bato ya engumba yango baboyaki koyoka liloba oyo Yirimia azalaki kosakola, mpe bazangaki limemya epai na ye. Longola yango, mokolo moko, Nzambe alobaki ete ‘bato ya Anatote bazalaki koluka molimo’ ya Yirimia. Na nkanda nyonso, balobaki na ye ete: “Osengeli kosakola na nkombo ya Yehova te, noki okufa na lobɔkɔ na biso.” Ezali mpenza mawa komona ndenge oyo bazalani na ye to mbala mosusu bandeko na ye babangisaki ye, nzokande bango nde basengelaki kosalisa ye!—Yir. 1:1; 11:21.
6. Soki bato oyo osalaka na bango to bato mosusu bazali kotɛmɛla yo, ndenge nini makambo oyo Yirimia akutanaki na yango epai ya “bato ya Anatote” ekoki kosalisa yo?
6 Soki bato oyo bafandaka pene na yo, oyo otángaka na bango, oyo osalaka na bango, to mbala mosusu bato ya libota na yo bazali kotya yo mpanzi likoló, koyeba ndenge oyo Yehova asalisaki Yirimia ekobɔndisa yo. Na ntango yango, Nzambe ayebisaki ye ete ‘akotyela [bato ya Anatote] likebi,’ bato oyo bazalaki kotɛmɛla mosakoli na ye. (Tángá Yirimia 11:22, 23.) Na ntembe te, elaka wana ya Yehova esalisaki Yirimia alonga botɛmɛli nyonso ya bato ya engumba na ye. Na nsima, Yehova atyelaki bato ya Anatote likebi: ‘ayeiselaki bango mpasi.’ Yo mpe osengeli koyeba ete Yehova ayebi makambo nyonso oyo ozali kokutana na yango mpe azali kotyela batɛmɛli na yo likebi. (Nz. 11:4; 66:7) Soki ‘okangami’ na mateya ya Biblia mpe ozali kosala makambo ya malamu, okoki kosalisa banguna mosusu bákima mpasi oyo ekoki koyela bango soki babongwani te.—1 Tim. 4:16.
Na mokanda ya Yirimia, nini emonisi ete Nzambe atyaka likebi na ndenge oyo basaleli na ye bamiyokaka, mpe ndenge nini koyeba likambo yango esalisaki Yirimia?
MAKAMBO OYO EKOKI KOLƐMBISA MOTO NZOTO
7, 8. Ndenge nini Yirimia anyokwamaki mpe amiyokaki ndenge nini?
7 Kobangisa oyo bato ya engumba ya Yirimia babangisaki ye esukaki kaka na maloba te. Pashure,a oyo azalaki nganga-nzambe mpe mobali moko ya lokumu na Yerusaleme, azalaki moko na bato oyo banyokolaki Yirimia. Biblia elobi ete ntango Pashure ayokaki esakweli ya Nzambe, “abɛtaki mosakoli Yirimia mpe akɔtisaki ye na bikanga-makolo.” (Yir. 20:1, 2) Maloba yango emonisi mbala mosusu ete Pashure asukaki kaka te na kobɛta Yirimia mbata na elongi. Bato mosusu balobaka ete Pashure abɛtaki Yirimia fimbo pene na 40. (Mib. 25:3) Ntango Yirimia azalaki koyoka mpasi na nzoto, mbala mosusu bato bazalaki kotyola ye, kofinga ye, to kobwakela ye nsoi. Kasi esukaki wana te. Pashure akangaki Yirimia na “bikanga-makolo” butu mobimba. Liloba ya Ebre oyo basaleli awa epesi likanisi ete bakangaki nzoto ya Yirimia mpe bafinaki yango makasi. Ya solo, banyokolaki Yirimia makasi butu mobimba, mbala mosusu bafinaki ye nzoto na kati ya mabaya.
8 Yirimia amiyokaki ndenge nini ntango banyokolaki ye bongo? Ayebisaki Nzambe boye: “Nakómi eloko ya kosɛka mokolo mobimba.” (Yir. 20:3-7) Kutu likanisi ya kotika koloba na nkombo ya Nzambe eyelaki ye. Kasi oyebi malamu ete Yirimia akokaki te kosala bongo, mpe asalaki bongo te. Nzokande, nsango oyo Nzambe apesaki ye asakola “ezalaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa [ya Yirimia]” mpe amonaki ete asengeli kosakola na ntina na Yehova.—Tángá Yirimia 20:8, 9.
9. Komanyola likoló ya makambo oyo Yirimia akutanaki na yango ekoki kosalisa biso ndenge nini?
9 Likambo oyo ekómelaki Yirimia ekoki kosalisa biso soki bato oyo toyebi, elingi koloba bandeko ya libota na biso, bato oyo bafandaka pene na biso, bato oyo tosalaka na bango, to bato oyo totángaka na bango, bazali kotyola biso. Tosengeli kokamwa te soki, na bantango mosusu, botɛmeli ya ndenge wana elɛmbisi biso nzoto mwa moke. Tokoki mpe komiyoka ndenge wana soki bazali konyokola biso mpo tokangami na losambo ya solo. Makambo ya ndenge wana etungisaki Yirimia, oyo azalaki moto ya kozanga kokoka. Biso nyonso mpe tomiyokaka lokola ye, boye te? Ata bongo, tóbosana te ete, na lisalisi ya Nzambe, Yirimia akómaki lisusu na esengo mpe na elikya. Ya solo, Yirimia alɛmbaki nzoto, kasi mpo na libela te; esengeli mpe kozala bongo mpo na biso.—2 Ko. 4:16-18.
10. Biblia emonisi nini na oyo etali mayoki ya Yirimia?
10 Na bantango mosusu, Yirimia azalaki komiyoka ete azali na esengo, kasi na mbala moko, esengo na ye ebongwani mawa, mpe mbala mosusu mbongwana yango ezalaki makasi mpenza. Likambo ya ndenge wana ekómelaka mpe yo? Elingi koloba ntango mosusu motema na yo etondi na elikya mpe esengo kasi na mbala moko olɛmbi nzoto mpe okómi mawamawa? Talá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo mokolo mosusu, Yirimia azalaki na esengo, na mokanda ya Yirimia 20:12, 13. (Tángá.) Nsima ya kolongwa na mpasi oyo Pashure amonisaki ye, Yirimia asepelaki mpo azalaki lokola mobola oyo abikisami “na lobɔkɔ ya basali-mabe.” Ekoki kozala ete na bantango mosusu yo mpe oyokaki esengo mpe ozalaki na mposa ya koyembela Yehova mpo obikaki na likama moko boye to mpo likambo moko ya malamu esalemaki na bomoi na yo to na mosala na yo ya bokristo. Komiyoka ndenge wana ezalaka mpenza esengo!—Misala 16:25, 26.
Ntango bato bazali kotɛmɛla biso to kotyola biso, yango ekoki kosala ete tómiyoka ndenge nini?
11. Soki mayoki na biso ebongwanaka mbala mingi, likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali Yirimia?
11 Kasi, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ndenge oyo tomiyokaka ebongwanaka. Yango ekómelaki mpe Yirimia. Kaka nsima ya koloba ete “bóyembela Yehova,” Yirimia abungisaki esengo nyonso, mpe mbala mosusu atangisaki mpisoli. (Tángá Yirimia 20:14-16.) Alɛmbaki nzoto mpenza mpe amitunaki mpo na nini abotamaki! Mawa oyo azalaki na yango etindaki ye aloba ete moto oyo amemaki nsango ya kobotama na ye alakelama mabe mpe akóma lokola Sodoma ná Gomora. Kasi likambo ya ntina yango oyo: Yirimia abungisaki elikya na ye libela? Asundolaki nde mosala na ye mpe akanisaki ete bomoi na ye mobimba ekobonga lisusu te? Te, asalaki nde makasi alɛmba nzoto libela te, mpe alongaki. Na nsima, Mokonzi Zidikiya atindaki Pashure, oyo azalaki nkumu kasi nganga-nzambe te, epai ya Yirimia mpo na kotuna na ntina etali mapinga ya Babilone oyo ezingaki Yerusaleme. Na libaku yango, Yirimia abangaki te kasi asakolaki na mpiko bitumbu ya Yehova mpe makambo oyo ekokwela bango. (Yir. 21:1-7) Yango emonisi polele ete Yirimia akobaki kosakola na molende!
12, 13. Tokoki kosala nini soki mayoki na biso ebongwanaka mbala mingi?
12 Lelo oyo, basaleli mosusu ya Nzambe bazalaka na mokakatano wana. Likambo yango ekoki kouta na mbongwana oyo esalemaka na kati ya nzoto, mpe monganga akoki mbala mosusu kopesa nkisi to toli oyo ekoki kosalisa mpo likambo yango etungisa mingi te. (Luka 5:31) Kasi nsai mpe mawa oyo mingi kati na biso toyokaka ekómelaka moto nyonso mpe elekaka ndelo te. Mbala mingi, tozalaka na makanisi ya mabe mpe mayoki ya mabe mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Mayoki yango ekoki koyela biso soki nzoto elɛmbi to nsima ya liwa ya moto oyo tolingaki mingi. Soki tomiyoki ndenge wana, tóbosana te ete Yirimia mpe amiyokaki ndenge wana, kasi Nzambe aboyaki ye te. Mpo na kolonga mayoki yango, mbala mosusu ekosɛnga tóbongola mwa moke programɛ na biso mpo na kozwa ntango ya kopema mingi. To mbala mosusu ekosɛnga mwa ntango eleka mpo tózwa lisusu makasi nsima ya liwa ya ndeko to moninga na biso. Kasi, ezali mpe na ntina mingi koyangana ntango nyonso na makita mpe kosangana na misala ya Bokonzi mbala na mbala. Yango nde makambo ya ntina oyo ekoki kosalisa biso tózala na bokatikati mpe tóbatela esengo na biso na mosala ya Nzambe.—Mat. 5:3; Rom. 12:10-12.
13 Ezala olɛmbaka nzoto mingi to te, kotalela ndenge oyo Yirimia azalaki komiyoka, ekoki kosalisa yo. Ndenge tomoni yango, na bantango mosusu, azalaki kolɛmba nzoto. Ata bongo, atikaki te ete yango etinda ye apesa Nzambe mokɔngɔ, Nzambe oyo ye alingaki mpe azalaki kosalela na bosembo. Ntango batɛmɛli na ye bazongiselaki ye mabe nzokande ye asalelaki bango malamu, abondelaki Yehova mpe atyelaki ye motema. (Yir. 18:19, 20, 23) Zwá ekateli ya komekola Yirimia.—Bil. 3:55-57.
Soki na bantango mosusu olɛmbaka nzoto to omiyokaka mawamawa, ndenge nini okoki kosalela makambo oyo ezali na mokanda ya Yirimia?
BƆNDISÁ MILIMO OYO ELƐMBI
14. Nani alendisaki mpenza Yirimia?
14 Ekozala malamu tótya likebi na ndenge oyo Yirimia alendisamaki mpe ndenge oyo ye mpe alendisaki bato oyo bazalaki ‘milimo oyo elɛmbi.’ (Yir. 31:25) Yehova nde moto oyo alendisaki mpenza Yirimia. Kanisá makasi oyo olingaki kozwa soki Yehova ye moko alobaki na yo ete: “Kasi ngai, talá, nakómisi yo lelo engumba oyo ebatelami makasi . . . Bakobunda na yo mpenza, kasi bakolonga yo te, mpo ‘nazali elongo na yo,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpo na kobikisa yo.’” (Yir. 1:18, 19) Yirimia azalaki mpenza na ntina ya koloba mpo na Yehova ete azali ‘makasi na ye mpe esika makasi ya libateli na ye, mpe esika na ye ya kokima na mokolo ya mpasi.’—Yir. 16:19.
15, 16. Na kotalela lolenge oyo Yehova alendisaki Yirimia, maloba ya ndenge nini tokoki kosalela mpo na kolendisa bandeko?
15 Simbá ete Yehova ayebisaki Yirimia ete: “Nazali elongo na yo.” Omoni ndenge oyo maloba yango ekoki kosalisa yo oyeba ndenge okoki kolendisa moto oyo alɛmbi nzoto? Koyeba ete ndeko moko ya lisangá to ndeko moko ya libota azali na mposa ya lisalisi ekoki te, kasi eleki malamu kokokisa mposa na bango na ndenge oyo esengeli. Mbala mingi, likambo ya malamu koleka oyo tokoki kosala ezali oyo Nzambe asalelaki Yirimia, elingi koloba, kozala elongo na moto oyo azali kotungisama. Na nsima, na ntango moko boye, yebisá ye maloba ya kolendisa, kasi koloba maloba ebeleebele te. Mwa maloba moke kaka ekoki kolendisa moto yango, kopesa ye elikya mpe kobɔndisa ye, soki oponi maloba yango malamu. Ezali mpe na ntina te osalela maloba ya mindɔndɔmindɔndɔ. Salelá nde maloba ya pɛtɛɛ oyo ekomonisa ete ozali kotyela ndeko oyo olingi kosalisa likebi, ete ozali komibanzabanza mpo na ye, mpe ete ozali na bolingo mpo na ye. Maloba ya ndenge wana ekosalisa mingi mpenza.—Tángá Masese 25:11.
16 Yirimia abondelaki boye: “Ee Yehova, kanisá ngai mpe tyelá ngai likebi na yo.” Likambo nini esalemaki na nsima? Mosakoli ye moko alobi boye: “Maloba na yo ezwamaki, mpe nalyaki yango; mpe liloba na yo ekómaki nsai epai na ngai mpe esengo na motema na ngai.” (Yir. 15:15, 16) Mbala mosusu ndeko oyo ozali koluka kolendisa azali mpe na mposa ete bátyela ye likebi na boboto mpenza. Ezali solo ete maloba na yo ekokokana te na oyo ya Yehova. Ata bongo, okoki kosalela maloba mosusu ya Nzambe oyo ezali na Biblia mpo na kolendisa ndeko yango. Maloba ya ndenge wana oyo euti mpenza na motema, mpe oyo esimbami na bavɛrsɛ ya Biblia, ekoki mpenza kosepelisa motema ya ndeko oyo alɛmbi nzoto.—Tángá Yirimia 17:7, 8.
17. Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na ndenge oyo Yirimia ayokaki Zidikiya mpe Yohanane na likebi ntango bayaki kotuna ye likanisi na ye?
17 Simbá ete Nzambe alendisaki Yirimia, kasi mosakoli yango azalaki mpe kolendisa basusu. Na ndenge nini? Mokolo moko, Mokonzi Zidikiya ayebisaki Yirimia ete azali kobanga Bayuda oyo bakendaki na ngámbo ya bato ya Babilone. Mosakoli alendisaki mokonzi yango mpe asɛngaki ye atosa Yehova mpo makambo esukela ye malamu. (Yir. 38:19, 20) Nsima ya kobebisama ya Yerusaleme, Bayuda kaka moke batikalaki na mokili, mpe Yohanane, oyo azalaki mokonzi ya basoda, azwaki ekateli ya komema bango na Ezipito. Kasi liboso Yohanane asala bongo, atunaki naino likanisi ya Yirimia. Mosakoli ayokaki Yohanane na likebi mpe abondelaki Yehova. Na nsima, ayebisaki ye eyano ya kolendisa ya Yehova, mpe alobaki na ye ete bakozala malamu soki balandi toli ya Nzambe oyo esɛngaki bango bátikala na mokili na bango. (Yir. 42:1-12) Na mbala nyonso mibale oyo batunaki Yirimia likanisi na ye, ayokaki naino bango na likebi liboso ya koloba. Mpo na kolendisa basusu, koyoka bango na likebi ezali na ntina mingi. Tikelá ndeko oyo alɛmbi nzoto mwa ntango mpo afungolela yo motema. Yoká makambo oyo azali koyebisa yo, oyo ezali kotungisa ye mpe kobangisa ye. Na ntango oyo esengeli, lendisá ye na maloba ya malamu. Ezali solo ete Nzambe akoloba na yo na emonaneli te mpo na kopesa yo maloba oyo osengeli koyebisa moto oyo alɛmbi nzoto. Ata bongo, okoki kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kozwa makanisi ya kolendisa, makanisi oyo etali mapamboli tokozwa na mikolo ezali koya.—Yir. 31:7-14.
18, 19. Ndakisa nini ya kolendisa bato mosusu tozwi na lisolo ya Barekabe mpe na oyo ya Ebede-meleke?
18 Ezala Zidikiya to Yohanane, moko te andimaki toli ya kolendisa oyo Yirimia apesaki bango. Lelo oyo mpe, bato mosusu bakoki koboya koyokela yo. Kotika te ete yango elɛmbisa yo nzoto. Bato mosusu bayokelaki Yirimia ntango alendisaki bango. Mbala mosusu bato mingi bakoyokela yo mpe. Tózwa ndakisa ya Barekabe, libota moko ya Bakeni oyo bazalaki na boyokani na Bayuda na boumeli ya bambula mingi. Nkɔkɔ na bango Yonadabe apesaki bango mibeko; moko na yango esɛngaki na bango ete, lokola bafandi bapaya, basengeli te komɛla vinyo. Ntango mampinga ya Babilone eyaki kobundisa Yerusaleme, Yirimia amemaki Barekabe na ndako ya kolya na kati ya tempelo mpe ndenge Nzambe ayebisaki ye, atyaki vinyo liboso na bango. Lokola Barekabe bazalaki komemya nkɔkɔ na bango, mpe bazalaki lokola Bayisraele te, batosaki mpe baboyaki komɛla vinyo. (Yir. 35:3-10) Yirimia ayebisaki bango ete Yehova asepelaki mingi na likambo oyo basalaki mpe apesaki bango elaka. (Tángá Yirimia 35:14, 17-19.) Yo mpe okoki kolanda ndakisa na ye: Pesaká basusu longonya na motema moko soki likoki ezali.
19 Yirimia asalaki mpe bongo mpo na Ebede-meleke, moto moko ya Etiopi oyo azalaki kosala na ndako ya Mokonzi Zidikiya. Bankumu ya Yuda babwakaki Yirimia na libulu ya pɔtɔpɔtɔ mpo akufa kuna, atako bayebaki ete asalaki likambo te. Ebede-meleke akendaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye likambo yango, mpe mokonzi apesaki ye nzela abimisa Yirimia na libulu. Moto yango oyo azalaki mopaya, akendaki kobikisa Yirimia, atako likambo yango ekokaki kotinda bankumu bátɛmɛla ye makasi. (Yir. 38:7-13) Lokola mbala mosusu likambo oyo Ebede-meleke asalaki esepelisaki bankumu ya Yuda te, ekoki kozala ete Ebede-meleke akómaki kobanga mpo na bomoi na ye. Yirimia akangaki monɔkɔ te mpe akanisaki te ete Ebede-meleke ye moko akolonga kobanga na ye. Alobaki, mpe ayebisaki Ebede-meleke mapamboli oyo Nzambe abombelaki ye mpo na mikolo ezali koya, mpe yango ezalaki maloba ya kolendisa mpenza.—Yir. 39:15-18.
20. Likambo nini tosengeli kosalela bandeko na biso, ezala bilenge to mikóló?
20 Ya solo, mokanda ya Yirimia ezali na bandakisa malamu mpenza oyo emonisi ndenge oyo mokomoko na biso akoki kosala mpo na kolanda toli oyo Paulo apesaki bandeko ya Tesaloniki. Alobaki na bango boye: “Bókoba kobɔndisana mpe kolendisana . . . Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na bino.”—1 Tes. 5:11, 28.
Makambo nini oyekoli na mokanda ya Yirimia, oyo okoki kosalela ntango ozali kosala makasi mpo na kolendisa milimo oyo elɛmbi?
a Na boyangeli ya Zidikiya, ezalaki mpe na moto mosusu oyo nkombo na ye ezalaki Pashure; azalaki nkumu mpe asɛngaki mokonzi aboma Yirimia.—Yir. 38:1-5.