MOTUNA 16
Ndenge nini okoki kolonga mitungisi?
“Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo, mpe ye moko akosunga yo. Akopesa nzela ata moke te ete moyengebene atengatenga.”
“Myango ya moto ya etingya ememaka mpenza na litomba, kasi moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.”
“Kobanga te, mpo nazali na yo. Kotala epai na epai te, mpo nazali Nzambe na yo. Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza. Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.”
“Nani na kati na bino soki amitungisi akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?”
“Bongo bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”
“Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”
“Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.”