LOYEMBO 120
Tómekola motema pɛtɛɛ ya Kristo
Ya Papye
1. Yesu Kristo aleki bato nyonso
Kasi azalaki na lolendo te.
Atako Nzambe atombolaki ye
Atosaki ye na komikitisa.
2. Abengi baoyo bamemi kilo,
Báya na yango amemela bango.
Báluka Bokonzi n’e, bakopema.
Ye alingi bato ya lolendo te.
3. Alobi na biso: ‘Toza’ bandeko.’
Tómikitisa, tózala neti ye.
Bato nyonso’a bongo, na miso’a Nzambe,
Baza’ motuya, bakozwa mabele.
(Talá mpe Mas. 3:34; Mat. 5:5; 23:8; Rom. 12:16.)