Mwaminei, 16 sanza ya 10
Bóbongisa nzela ya Yehova! Bósembolela Nzambe na biso balabala monene na mokili ekauká.—Yis. 40:3.
Mbala mosusu mobembo wana ya mpasi oyo basalaki longwa na Babilone tii na Yisraele esalaki basanza soki minei, kasi Yehova alakaki ete mokakatano moko te ekopekisa bango kozonga. Bayuda oyo bazalaki sembo, bayebaki ete mapamboli oyo bakozwa soki bazongi na Yisraele ezalaki na motuya mingi koleka makambo ya kitoko oyo balingaki kotika na Babilone. Lipamboli oyo elekaki monene ezalaki ya kozongela losambo na bango. Tempelo moko ya Yehova ezalaki te na Babilone. Etumbelo ata moko te ezalaki kuna mpo ete Bayisraele bápesa Yehova bambeka ndenge esɛngisamaki na Mobeko ya Moize, mpe nganga-nzambe moko te azalaki kuna mpo na kopesa bambeka yango. Lisusu, bato oyo bazalaki kosambela banzambe ya lokuta bazalaki mingi koleka baoyo bazalaki kotosa mibeko ya Yehova. Yango wana, Bayuda mingi oyo balingaki Yehova bazalaki kozela na mposa makasi bázonga na mboka na bango, epai bakozongela lisusu losambo ya pɛto. w23.05 14-15 par. 3-4
Mwamitano, 17 sanza ya 10
Bókoba kotambola lokola bana ya pole.—Ef. 5:8.
Tosengeli mpe na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe mpo tókoba komitambwisa lokola “bana ya pole.” Mpo na nini? Mpo ezali etumba monene kotikala pɛto na mokili oyo ya mbindo. (1 Tes. 4:3-5, 7, 8) Elimo santu ekoki kosalisa biso tóbundisa makanisi ya mokili, ata mpe filozofi ná ndenge na yango ya kotalela makambo oyo eyokani te na makanisi ya Nzambe. Elimo santu ekoki mpe kosalisa biso tómonisa “boboto na makambo nyonso [mpe] bosembo.” (Ef. 5:9) Lolenge moko oyo tokoki kozwa elimo santu ezali ya kosɛnga yango na libondeli. Yesu alobaki ete Yehova akopesa “elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango.” (Luka 11:13) Mpe ntango tosanzolaka Yehova elongo na makita, tozwaka mpe elimo santu. (Ef. 5:19, 20) Nguya ya elimo santu ya Nzambe ekosalisa biso tózala na bomoi oyo esepelisaka Nzambe. w24.03 23-24 par. 13-15
Mwapɔsɔ, 18 sanza ya 10
Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.—Luka 11:9.
Ozali na mposa ya komonisa lisusu motema molai mingi? Soki ezali bongo, bondelá mpo na yango. Motema molai ezali moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo. (Gal. 5:22, 23) Yango wana, tokoki kosɛnga Yehova elimo santu mpe kosɛnga ye asalisa biso tókolisa ezaleli yango. Soki tokutani na likambo moko oyo etye motema molai na biso na komekama, ‘tókoba kosɛnga’ Yehova elimo santu mpo esalisa biso tóbatela ezaleli yango. (Luka 11:13) Tokoki mpe kosɛnga Yehova asalisa biso mpo tótalelaka makambo ndenge ye atalelaka yango. Nsima ya kobondela, tosengeli kosala oyo tokoki mpo tómonisaka motema molai mokolo na mokolo. Soki tozali kobondela Yehova mbala na mbala mpe kosala makasi mpo na komonisa motema molai, tóyeba ete ezaleli yango ekobota misisa na motema na biso mpe ekokóma mpenza bomoto na biso. Komanyola na bandakisa ya Biblia ekosalisa yo mpe. Biblia etondi na bandakisa ya bato oyo bazalaki na motema molai. Soki toyekoli masolo ya bato yango, tokoki koyeba ndenge ya komonisa motema molai. w23.08 22 par. 10-11